Imam Darimi : 141
أَخْبَرَنَا يُوسُفُ بْنُ مُوسَى حَدَّثَنَا أَزْهَرُ عَنْ ابْنِ عَوْنٍ عَنْ ابْنِ سِيرِينَ قَالَ مَا دَامَ عَلَى الْأَثَرِ فَهُوَ عَلَى الطَّرِيقِ
Ayebisaki biso [Yusuf bin Musa] ayebisi biso [Azhar] uta na [Ibn ‘Aun] uta na [Ibn Sirin] alobaki; 'Ntango nyonso oyo moto azali na nzela ya engbunduka ya likolo, elakisi ete azali na nzela ya malamu'.
Imam Darimi : 142
أَخْبَرَنَا أَبُو الْمُغِيرَةِ حَدَّثَنَا الْأَوْزَاعِيُّ عَنْ يَحْيَى بْنِ أَبِي كَثِيرٍ عَنْ أَبِي قِلَابَةَ قَالَ قَالَ عَبْدُ اللَّهِ بْنُ مَسْعُودٍ تَعَلَّمُوا الْعِلْمَ قَبْلَ أَنْ يُقْبَضَ وَقَبْضُهُ أَنْ يَذْهَبَ أَهْلُهُ أَلَا وَإِيَّاكُمْ وَالتَّنَطُّعَ وَالتَّعَمُّقَ وَالْبِدَعَ وَعَلَيْكُمْ بِالْعَتِيقِ
Ayebisaki biso [Abu Al Mughirah] ayebisi biso [Al `Auza'i] uta na [Yahya bin Abu Katsir] uta na [Abu Qilabah] alobaki; [Abdullah bin Mas’ud] radliallahu ‘anhu alobaki; ’ Yekola boyebi liboso ete bálongola yango. Mpe, boyebi elongolamaki na lolenge bato ya mayele babomamaki. Yango wana, tika bid’ah, minoko ya kosangisa mpe ezaleli ya mbala mingi kosala makambo mpe koleka ndelo kino mikakatano ekokoma compliqué. Mpe, simba makasi eloko moko ya kala, elingi koloba sunnah mpe atsar -maloba ya baninga-'.
Imam Darimi : 143
حَدَّثَنَا سُلَيْمَانُ بْنُ حَرْبٍ وَأَبُو النُّعْمَانِ عَنْ حَمَّادِ بْنِ زَيْدٍ عَنْ أَيُّوبَ عَنْ أَبِي قِلَابَةَ قَالَ قَالَ ابْنُ مَسْعُودٍ عَلَيْكُمْ بِالْعِلْمِ قَبْلَ أَنْ يُقْبَضَ وَقَبْضُهُ أَنْ يُذْهَبَ بِأَصْحَابِهِ عَلَيْكُمْ بِالْعِلْمِ فَإِنَّ أَحَدَكُمْ لَا يَدْرِي مَتَى يُفْتَقَرُ إِلَيْهِ أَوْ يُفْتَقَرُ إِلَى مَا عِنْدَهُ إِنَّكُمْ سَتَجِدُونَ أَقْوَامًا يَزْعُمُونَ أَنَّهُمْ يَدْعُونَكُمْ إِلَى كِتَابِ اللَّهِ وَقَدْ نَبَذُوهُ وَرَاءَ ظُهُورِهِمْ فَعَلَيْكُمْ بِالْعِلْمِ وَإِيَّاكُمْ وَالتَّبَدُّعَ وَإِيَّاكُمْ وَالتَّنَطُّعَ وَإِيَّاكُمْ وَالتَّعَمُّقَ وَعَلَيْكُمْ بِالْعَتِيقِ
Lokola ayebisaki biso [Sulaiman bin Harb] mpe [Abu An Nu’man] uta na [Hamad bin Zaid] uta na [Ayub] uta na [Abu Qilabah] alobaki; [Ibn Mas’ud] alobaki mokolo moko ete; ‘Osengeli koyekola boyebi liboso ete bálongola yango. Mpe, boyebi elongolamaki na liwa ya bato ya mayele. Bosengeli kosalela boyebi lokola ebongiseli, mpamba te moko na bino ayebi soko moke te ntango nini akozala na mposa na yango. Kutu, okokutana na lisanga oyo balobaka ete babengi yo na Coran, atako batiaki Coran sima ya mokɔngɔ -kosundola Coran-. Yango wana, bóbongisa bino nyonso boyebi. Tika bid'ah, bilobaloba na attitude ya souvent kosala makambu pe kokende trop tiii ba problèmes ekokoma compliqués. Mpe, bokangama na sunnah mpe atsar’.
Imam Darimi : 144
أَخْبَرَنَا أَبُو النُّعْمَانِ حَدَّثَنَا حَمَّادُ بْنُ زَيْدٍ حَدَّثَنَا يَزِيدُ بْنُ حَازِمٍ عَنْ سُلَيْمَانَ بْنِ يَسَارٍ أَنَّ رَجُلًا يُقَالُ لَهُ صَبِيغٌ قَدِمَ الْمَدِينَةَ فَجَعَلَ يَسْأَلُ عَنْ مُتَشَابِهِ الْقُرْآنِ فَأَرْسَلَ إِلَيْهِ عُمَرُ وَقَدْ أَعَدَّ لَهُ عَرَاجِينَ النَّخْلِ فَقَالَ مَنْ أَنْتَ قَالَ أَنَا عَبْدُ اللَّهِ صَبِيغٌ فَأَخَذَ عُمَرُ عُرْجُونًا مِنْ تِلْكَ الْعَرَاجِينِ فَضَرَبَهُ وَقَالَ أَنَا عَبْدُ اللَّهِ عُمَرُ فَجَعَلَ لَهُ ضَرْبًا حَتَّى دَمِيَ رَأْسُهُ فَقَالَ يَا أَمِيرَ الْمُؤْمِنِينَ حَسْبُكَ قَدْ ذَهَبَ الَّذِي كُنْتُ أَجِدُ فِي رَأْسِي
Ayebisaki biso [Abu An Nu’man] ayebisi biso [Hammad bin Zaid] ayebisi biso [Yazid bin Hazim] uta na [Sulaiman bin Yasar]: ‘Ezalaki na moto moko na kombo ya Shabigh oyo ayaki kotala engumba ya Medina, atunaki na ntina ya ba versets ya mutasyabih na kati ya Coran, sima Umar radliallahu ‘anhu atindaki -moto- mpo na kobenga ye, mpe abongisaki a etape ya palmier, sima atunaki: 'ozali nani? ’ ayanolaki: ‘Nazali Abdullah Shabigh’ sima [Umar] radiallahu ‘anhu azwaki lititi ya mbila ya dati mpe abɛtaki yango mpe alobaki: ‘Nazali mosali ya Allah na nkombo Umar’. Umar akobaki kobɛta ye tii motó ya Shabigh ebimaki makila. Sima na yango, Shabigh alobaki: ‘O amirul mu`minin, ekoki. oyo ezalaki na ebandeli na motó na ngai - motuna oyo etali vɛrsɛ ya mutasyabih - esili.
Imam Darimi : 145
أَخْبَرَنَا أَبُو الْوَلِيدِ الطَّيَالِسِيُّ حَدَّثَنَا حَمَّادُ بْنُ سَلَمَةَ وَيَزِيدُ بْنُ إِبْرَاهِيمَ عَنْ عَبْدِ اللَّهِ بْنِ أَبِي مُلَيْكَةَ عَنْ الْقَاسِمِ عَنْ عَائِشَةَ قَالَتْ تَلَا رَسُولُ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ { هُوَ الَّذِي أَنْزَلَ عَلَيْكَ الْكِتَابَ مِنْهُ آيَاتٌ مُحْكَمَاتٌ هُنَّ أُمُّ الْكِتَابِ وَأُخَرُ مُتَشَابِهَاتٌ } فَقَالَ رَسُولُ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ إِذَا رَأَيْتُمْ الَّذِينَ يَتَّبِعُونَ مَا تَشَابَهَ مِنْهُ فَاحْذَرُوهُمْ
Ayebisaki biso [Abu Al Walid Na Thayalisi] ayebisi biso [Hammad bin Salamah] mpe [Yazid bin Ibrahim] uta na [Abdullah bin Abu Awalkah] uta na [Al Qasim] uta na ['Aisyah] radliallahu 'anha alobaki; ' Rasulullah sallallahu 'alai wa sallam atanga verset oyo: 'HUWALLADZI `ANZALA ALAIKAL KITABA MINHU `AAYAATUN MUHKAMAATUN HUNNA UMMUL KITABI WA UKHARU MUTASYAABIHAAT' -Azali moto oyo akitisaki Buku - Coran - epai na yo. Kati na makambo na yango ezali na ba versets ya muhkamat, oyo ezali makambo ya minene ya Coran mpe ba versets misusu ya mutasyabihat - Qs. Ali Imran: 7-, Sima Rasulullah shallallahu ‘alaihi wasallam alobaki: ‘Soki omoni bato oyo balandi ba versets ya mutashabihat, keba na bango’.
Imam Darimi : 146
أَخْبَرَنَا عَبْدُ اللَّهِ بْنُ مُحَمَّدٍ حَدَّثَنَا حَفْصٌ عَنْ الْأَعْمَشِ عَنْ شَقِيقٍ قَالَ سُئِلَ عَبْدُ اللَّهِ عَنْ شَيْءٍ فَقَالَ إِنِّي لَأَكْرَهُ أَنْ أُحِلَّ لَكَ شَيْئًا حَرَّمَهُ اللَّهُ عَلَيْكَ أَوْ أُحَرِّمَ مَا أَحَلَّهُ اللَّهُ لَكَ
Ayebisaki biso [Abdullah bin Muhammad] ayebisaki biso [Hafsh] uta na [Al A’masy] uta na [Syaqiq] alobaki: ' [Abdullah] atunaki likambo moko, sima alobaki: 'Nayinaka mpenza kosala eloko oyo Allah asali mibeko mpo na yo, to kosala eloko oyo Allah subhanallahu wa ta'ala apesi yo nzela'.
Imam Darimi : 147
أَخْبَرَنَا مُحَمَّدُ بْنُ عُيَيْنَةَ عَنْ أَبِي إِسْحَقَ الْفَزَارِيِّ عَنْ ابْنِ عَوْنٍ عَنْ ابْنِ سِيرِينَ عَنْ حُمَيْدِ بْنِ عَبْدِ الرَّحْمَنِ قَالَ لَأَنْ أَرُدَّهُ بِعِيِّهِ أَحَبُّ إِلَيَّ مِنْ أَنْ أَتَكَلَّفَ لَهُ مَا لَا أَعْلَمُ
Lokola apesaki biso lapolo [Muhammad bin ‘Uyainah] uta na [Abu Ishaq Al Fazari] uta na [Ibnu ‘Aun] uta na [Ibn Sirin] uta na [Humaid bin Abdur Rahman] alobaki: ‘Koyanola na eyano oyo nayebi te ezali malamu koleka mpo na ngai na esika ya komipesa na makasi mpo na koyanola na likambo oyo nayebi te’.
Imam Darimi : 148
أَخْبَرَنَا عَبْدُ اللَّهِ بْنُ صَالِحٍ حَدَّثَنِي اللَّيْثُ أَخْبَرَنِي ابْنُ عَجْلَانَ عَنْ نَافِعٍ مَوْلَى عَبْدِ اللَّهِ أَنَّ صَبِيغًا الْعِرَاقِيَّ جَعَلَ يَسْأَلُ عَنْ أَشْيَاءَ مِنْ الْقُرْآنِ فِي أَجْنَادِ الْمُسْلِمِينَ حَتَّى قَدِمَ مِصْرَ فَبَعَثَ بِهِ عَمْرُو بْنُ الْعَاصِ إِلَى عُمَرَ بْنِ الْخَطَّابِ فَلَمَّا أَتَاهُ الرَّسُولُ بِالْكِتَابِ فَقَرَأَهُ فَقَالَ أَيْنَ الرَّجُلُ قَالَ فِي الرَّحْلِ قَالَ عُمَرُ أَبْصِرْ أَيَكُونُ ذَهَبَ فَتُصِيبَكَ مِنْهُ الْعُقُوبَةُ الْمُوجِعَةُ فَأَتَاهُ بِهِ فَقَالَ عُمَرُ تَسْأَلُ مُحْدَثَةً وَأَرْسَلَ عُمَرُ إِلَى رَطَائِبَ مِنْ جَرِيدٍ فَضَرَبَهُ بِهَا حَتَّى تَرَكَ ظَهْرَهُ دَبِرَةً ثُمَّ تَرَكَهُ حَتَّى بَرَأَ ثُمَّ عَادَ لَهُ ثُمَّ تَرَكَهُ حَتَّى بَرَأَ فَدَعَا بِهِ لِيَعُودَ لَهُ قَالَ فَقَالَ صَبِيغٌ إِنْ كُنْتَ تُرِيدُ قَتْلِي فَاقْتُلْنِي قَتْلًا جَمِيلًا وَإِنْ كُنْتَ تُرِيدُ أَنْ تُدَاوِيَنِي فَقَدْ وَاللَّهِ بَرَأْتُ فَأَذِنَ لَهُ إِلَى أَرْضِهِ وَكَتَبَ إِلَى أَبِي مُوسَى الْأَشْعَرِيِّ أَنْ لَا يُجَالِسَهُ أَحَدٌ مِنْ الْمُسْلِمِينَ فَاشْتَدَّ ذَلِكَ عَلَى الرَّجُلِ فَكَتَبَ أَبُو مُوسَى إِلَى عُمَرَ أَنْ قَدْ حَسُنَتْ تَوْبَتُهُ فَكَتَبَ عُمَرُ أَنْ ائْذَنْ لِلنَّاسِ بِمُجَالَسَتِهِ
Ayebisaki biso [Abdullah bin Salih] ayebisi ngai [Al Laits] ayebisi ngai [Ibnu ‘Ajlan] uta na [Nafi’] -mowumbu ya kala ya Abdullah-, -alobi-: ‘Shabigh Al ‘Iraqi atunaki makambo ebele na oyo etali Coran -elingi koloba ba versets ya mutasyabih- na ba soldats musulmans tii akoya na Egypte, sima ‘Amr bin Al 'Ash radliallahu 'anhu atindaki bango epai ya Umar bin Khatthab radiallahu 'anhu. Tango motindami Amru bin `ash apesaki mokanda na Umar, pe Umar atangi yango, alobaki: ‘Oyo nini babengi Shabigh? ' ye -motindami- ayanolaki: 'azali kaka na esika na ye ya kotelemela', Umar radiallahu 'anhu alobaki: 'Soki olingi, bozala na liso na ye, soki akimi nde etumbu ya makasi ekoyela bino mbala moko. Tango Shabigh ayaki, [Umar] alobaki: ‘Otunaki eloko ya sika oyo esalemaki, sima Umar amemaki Shabigh na etape moko ya mbila ya date. Umar abetaki mobali yango na nkasa ya mbila ya dati tii mokɔngɔ na ye ezokaki. Tango mpota ezongaki, Umar abɛtaki ye lisusu, mpe tango ebandaki kozonga, Umar abɛtaki ye lisusu. Tango abandaki ko se rétablir, Umar abengaki ye akutana na ye mbala moko. Na sima Shabigh alobaki: ‘Soki olingi koboma ngai, boma ngai kaka na ndenge ya malamu, kasi soki olingi kosala ngai bongo na nzela ya Allah nabiki - kotuna lisusu te na ntina ya ba versets ya mutasyabih na kati ya Coran -. Na sima apesaki ye nzela ya kozonga na mboka na ye mpe atindaki mokanda na Abu Musa Al `Ash'ari oyo elobaki: 'Po moto moko te uta na ba musulmans abengisa ye azala baninga'. Yango esalaki ete moto yango anyokwama, sima Abu Musa Al `Ash'ari radliallahu 'anhu atindaki mokanda na Umar radliallahu 'anhu: 'Boyamboli na ye ebongwani', sima Umar radliallahu 'anhu akomaki lisusu: 'Tika ye asangana na bato''.
Imam Darimi : 149
أَخْبَرَنَا أَحْمَدُ بْنُ عَبْدِ اللَّهِ بْنِ يُونُسَ حَدَّثَنَا زُهَيْرٌ حَدَّثَنَا إِسْمَعِيلُ بْنُ أَبِي خَالِدٍ قَالَ سَمِعْتُ عَامِرًا يَقُولُ اسْتَفْتَى رَجُلٌ أُبَيَّ بْنَ كَعْبٍ فَقَالَ يَا أَبَا الْمُنْذِرِ مَا تَقُولُ فِي كَذَا وَكَذَا قَالَ يَا بُنَيَّ أَكَانَ الَّذِي سَأَلْتَنِي عَنْهُ قَالَ لَا قَالَ أَمَّا لَا فَأَجِّلْنِي حَتَّى يَكُونَ فَنُعَالِجَ أَنْفُسَنَا حَتَّى نُخْبِرَكَ
Ayebisaki biso [Ahmad bin Abdullah bin Yunus] ayebisi biso [Zuhair] ayebisi biso [Ismail bin Abu Khalid] alobi: ‘Nayoki [‘Amir] alobi: ‘Moto moko asengi [Ubbay bin Ka’ab] radiallahu ‘anhu fatwa, atuni: ‘E Abu Al Mundzir, okanisi nini mpo na likambo oyo mpe oyo? '. Na nsima ayanolaki ete: ‘ Makambo oyo otunaki esalemi? ', ayanolaki: 'esalemi nanu te'. Na nsima alobaki lisusu ete: “Soki esalemi naino te, zela tii ekosalema mpenza, na nsima tokomeka mpe tokoyebisa bino.”
Imam Darimi : 150
أَخْبَرَنَا يَحْيَى بْنُ حَمَّادٍ أَخْبَرَنَا أَبُو عَوَانَةَ فَأَخْبَرَنَا عَنْ فِرَاسٍ عَنْ عَامِرٍ عَنْ مَسْرُوقٍ قَالَ كُنْتُ أَمْشِي مَعَ أُبَيِّ بْنِ كَعْبٍ فَقَالَ فَتًى مَا تَقُولُ يَا عَمَّاهُ فِي كَذَا وَكَذَا قَالَ يَا ابْنَ أَخِي أَكَانَ هَذَا قَالَ لَا قَالَ فَأَعْفِنَا حَتَّى يَكُونَ
Ayebisi biso [Yahya bin Hammad] ayebisi biso [Abu ‘Awanah] ayebisi biso uta na [Firas] uta na [’Amir] uta na [Masruq] alobaki: ‘Mokolo moko natambolaki elongo na [Ubay bin Ka’ab] mpe na nsima elenge mobali moko atunaki: ‘E yaya, okanisi nini mpo na likambo oyo? ’, ayanolaki ete: ‘ Yango esalemi? ', ye - elenge mobali - ayanolaki : 'Esalemi nanu te', alobaki: 'Bongo zela tii ekosalema mpenza''.
Imam Darimi : 151
حَدَّثَنَا عَبْدُ اللَّهِ بْنُ سَعِيدٍ حَدَّثَنَا أَبُو أُسَامَةَ عَنْ الْأَعْمَشِ قَالَ كَانَ إِبْرَاهِيمُ إِذَا سُئِلَ عَنْ شَيْءٍ لَمْ يُجِبْ فِيهِ إِلَّا جَوَابَ الَّذِي سُئِلَ عَنْهُ
Eyebisami na biso ete [Abdullah bin Sa’id] ayebisi biso [Abu Usamah] uta na [Al `A’masy] ete alobaki: ‘[Ibrahim] ntango batuni ye mpo na likambo moko ayanoli yango te kasi kaka motuna oyo batuni -kaka-’.
Imam Darimi : 152
أَخْبَرَنَا إِبْرَاهِيمُ بْنُ مُوسَى حَدَّثَنَا ابْنُ الْمُبَارَكِ عَنْ سَعِيدِ بْنِ أَبِي أَيُّوبَ عَنْ عُبَيْدِ اللَّهِ بْنِ أَبِي جَعْفَرٍ قَالَ قَالَ رَسُولُ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ أَجْرَؤُكُمْ عَلَى الْفُتْيَا أَجْرَؤُكُمْ عَلَى النَّارِ
Elobami na biso ete [Ibrahim bin Musa] ayebisaki biso [Ibn Al Mubarak] uta na [Sa’id bin Abu Ayyub] uta na [’Ubaidullah bin Abu Ja’far] alobaki ete: ‘Rasulullah sallallaahu ‘alaihi wasallam alobaki: ‘Nani azali mbangu mingi na kobimisa fatwa, azali moto oyo akendaka noki mingi na lifelo''.
Imam Darimi : 153
أَخْبَرَنَا أَبُو الْمُغِيرَةِ حَدَّثَنَا الْأَوْزَاعِيُّ عَنْ عَبْدَةَ بْنِ أَبِي لُبَابَةَ عَنْ ابْنِ عَبَّاسٍ قَالَ مَنْ أَحْدَثَ رَأْيًا لَيْسَ فِي كِتَابِ اللَّهِ وَلَمْ تَمْضِ بِهِ سُنَّةٌ مِنْ رَسُولِ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ لَمْ يَدْرِ عَلَى مَا هُوَ مِنْهُ إِذَا لَقِيَ اللَّهَ عَزَّ وَجَلَّ
Elobami na biso [Abu Al Mughirah] ayebisi biso [Al `Auza'i] uta na ['Abdah bin Abu Lubabah] uta na [Ibn Abbas] radliallahu 'anhu alobaki: 'Oyo a inventer makanisi mosusu longola se Buku ya Allah pe Sunnah ya Ntoma ya Allah sallallaahu 'alaihi wasallam, ayebi te soki condition na ye ekozala nini tango akokutana na Allah na mikolo ezali koya’.
Imam Darimi : 154
أَخْبَرَنَا عَبْدُ اللَّهِ بْنُ يَزِيدَ حَدَّثَنَا سَعِيدُ بْنُ أَبِي أَيُّوبَ حَدَّثَنِي بَكْرُ بْنُ عَمْرٍو الْمَعَافِرِيُّ عَنْ أَبِي عُثْمَانَ مُسْلِمِ بْنِ يَسَارٍ عَنْ أَبِي هُرَيْرَةَ عَنْ النَّبِيِّ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ قَالَ مَنْ أُفْتِيَ بِفُتْيَا مِنْ غَيْرِ ثَبْتٍ فَإِنَّمَا إِثْمُهُ عَلَى مَنْ أَفْتَاهُ
Ayebisaki biso [Abdullah bin Yazid] ayebisi biso [Sa’id bin Abu Ayyub] ayebisi ngai [Bakar bin ‘Amru Al Mu’afiri] epai ya [Abu Uthman Muslim bin Yasar], uta na [Abu Hurairah] radiallahu ‘anhu uta na Ntoma sallallaahu ‘alaihi wasallam alobi: ‘Oyo apesi fatwa oyo ezangi moboko, lisumu - la ba conséquences ya kosala fatwa - ememami na mopesi fatwa'.
Imam Darimi : 155
أَخْبَرَنَا مُحَمَّدُ بْنُ أَحْمَدَ حَدَّثَنَا سُفْيَانُ بْنُ عُيَيْنَةَ عَنْ أَبِي سِنَانٍ عَنْ سَعِيدِ بْنِ جُبَيْرٍ عَنْ ابْنِ عَبَّاسٍ قَالَ مَنْ أَفْتَى بِفُتْيَا يُعَمَّى عَلَيْهَا فَإِثْمُهَا عَلَيْهِ
Elobami na biso [Muhammad bin Ahmad] ayebisi biso [Sufyan bin Uyainah] uta na [Abu Sinan] uta na [Sa’id bin Jubair] uta na [Ibn Abbas] tika ete Allah asepela na ye, alobi: ‘Oyo apesi fatwa oyo moboko na yango eyebani te, masumu na ye epesameli ye’.
Imam Darimi : 156
أَخْبَرَنَا الْحُسَيْنُ بْنُ مَنْصُورٍ حَدَّثَنَا الْحُسَيْنُ بْنُ الْوَلِيدِ عَنْ وُهَيْبٍ عَنْ هِشَامٍ عَنْ مُحَمَّدِ بْنِ سِيرِينَ أَنَّهُ كَانَ لَا يُفْتِي فِي الْفَرْجِ بِشَيْءٍ فِيهِ اخْتِلَافٌ
Elobami na biso ete [Al Husain bin Mansur] ayebisaki biso [Al Husain bin Al Walid] uta na [Wuhaib] uta na [Hisyam] uta na [Muhammad bin Sirin] ete apesaki ata moke te fatwa na likambo ya farji - binama ya kobotela - esika wapi bokeseni ya makanisi ezali naino na likambo oyo'.
Imam Darimi : 157
أَخْبَرَنَا مُسْلِمُ بْنُ إِبْرَاهِيمَ حَدَّثَنَا حَمَّادُ بْنُ زَيْدٍ حَدَّثَنَا الصَّلْتُ بْنُ رَاشِدٍ قَالَ سَأَلْتُ طَاوُسًا عَنْ مَسْأَلَةٍ فَقَالَ لِي كَانَ هَذَا قُلْتُ نَعَمْ قَالَ آللَّهِ قُلْتُ آللَّهِ ثُمَّ قَالَ إِنَّ أَصْحَابَنَا أَخْبَرُونَا عَنْ مُعَاذِ بْنِ جَبَلٍ أَنَّهُ قَالَ يَا أَيُّهَا النَّاسُ لَا تَعْجَلُوا بِالْبَلَاءِ قَبْلَ نُزُولِهِ فَيُذْهَبُ بِكُمْ هَا هُنَا وَهَا هُنَا فَإِنَّكُمْ إِنْ لَمْ تَعْجَلُوا بِالْبَلَاءِ قَبْلَ نُزُولِهِ لَمْ يَنْفَكَّ الْمُسْلِمُونَ أَنْ يَكُونَ فِيهِمْ مَنْ إِذَا سُئِلَ سَدَّدَ وَإِذَا قَالَ وُفِّقَ
Ayebisaki biso [Muslim bin Ibrahim] ayebisi biso [Hammad bin Zaid] ayebisaki biso [Lokola Shalt bin Rasyid] alobaki: ‘Natunaki [Thawus] mpo na mokakatano moko, na nsima atunaki: ‘mokakatano esalemi? ' Nayanolaki: 'ee, nazali na yango', alobaki: 'Na Allah subhanallahu wa ta'ala', alobaki: 'Ee, na Allah ta'ala'. Na nsima alobaki lisusu ete: ‘[Baninga] na biso bayebisaki biso epai ya [Mu’adz bin Jabal] radiallahu ‘anhu, ete alobaki ete: ‘Ee bato, bokende mbangu te mpo na komema likama liboso ete esalema, mpo ekolongola bozali na bino awa na kuna. Mpe soki okimi mbangu te mpo na komema likama, wana ba musulmans bakokabwana te, ekozala ntango nyonso na bato oyo, soki basengi bango, bakopesa bokambi, mpe soki balobi bakozwa bokambi -epai ya Allah-''.
Imam Darimi : 158
حَدَّثَنَا بِشْرُ بْنُ الْحَكَمِ حَدَّثَنَا عَبْدُ الْعَزِيزِ بْنُ مُحَمَّدٍ عَنْ عَمْرِو بْنِ مَيْمُونٍ عَنْ أَبِيهِ عَنْ ابْنِ عَبَّاسٍ قَالَ سَأَلْتُهُ عَنْ رَجُلٍ أَدْرَكَهُ رَمَضَانَانِ فَقَالَ أَكَانَ أَوْ لَمْ يَكُنْ قَالَ لَمْ يَكُنْ بَعْدُ فَقَالَ اتْرُكْ بَلِيَّتَهُ حَتَّى تَنْزِلَ قَالَ فَدَلَسْنَا لَهُ رَجُلًا فَقَالَ قَدْ كَانَ فَقَالَ يُطْعِمُ عَنْ الْأَوَّلِ مِنْهُمَا ثَلَاثِينَ مِسْكِينًا لِكُلِّ يَوْمٍ مِسْكِينٌ
Ayebisaki biso [Bisyr bin Al Hakam] ayebisi biso [Abdul Aziz bin Muhammad] uta na ['Amr bin Maimun] uta na [tata na ye] uta na [Ibnu Abbas] radliallahu 'anhu: 'Mokolo moko natunaki ye -Ibnu Abbas radliallahu 'anhu- mpo na moto oyo azwaki sanza mibale ya Ramadlan, sima alobaki: 'Esalemaki to te? ', ayanolaki: 'esalemi nanu te'. Na sima alobi : 'Tika yango tiii ekosalema', alobi : 'tozuaki zinga zinga na yango na kosala lokola tozali -ko présenter- mutu, sima alobi : 'esili kosalema', sima -Ibnu Abbas- ayanolaki : 'Asengeli koleisa pona -sanza ya liboso ya Ramadlan- babola ntuku misato, mikolo nionso mobola moko''.
Imam Darimi : 159
أَخْبَرَنَا عَبْدُ اللَّهِ بْنُ عِمْرَانَ حَدَّثَنَا إِسْحَقُ بْنُ سُلَيْمَانَ حَدَّثَنَا الْعُمَرِيُّ عَنْ عُبَيْدِ بْنِ جُرَيْجٍ قَالَ كُنْتُ أَجْلِسُ بِمَكَّةَ إِلَى ابْنِ عُمَرَ يَوْمًا وَإِلَى ابْنِ عَبَّاسٍ يَوْمًا فَمَا يَقُولُ ابْنُ عُمَرَ فِيمَا يُسْأَلُ لَا عِلْمَ لِي أَكْثَرُ مِمَّا يُفْتِي بِهِ
Elobami na biso [Abdullah bin Imran] ayebisi biso [Ishaq bin Sulaiman] ayebisi biso [Al 'Umari] uta na ['Ubaid bin Juraij] alobaki: 'Na kala tango nazalaki na Makkah nazalaki ntango nyonso kofanda na -boyekoli ya siansi ya- Ibn Umar tika ete Allah asepela na ye mokolo moko mpe na -boyekoli ya- Ibn Abbas mokolo mosusu.' Mpe [Ibnu Umar] ntango batunaki ye ayanolaki mingi na eyano: ‘Nayebi te’ na esika ya kopesa fatwa na likambo yango’.
Imam Darimi : 160
أَخْبَرَنَا مُحَمَّدُ بْنُ يُوسُفَ عَنْ سُفْيَانَ عَنْ الْأَعْمَشِ عَنْ أَبِي وَائِلٍ قَالَ قَالَ عَبْدُ اللَّهِ تَعَلَّمُوا فَإِنَّ أَحَدَكُمْ لَا يَدْرِي مَتَى يُخْتَلُّ إِلَيْهِ
Ayebisi biso [Muhammad bin Yusuf] uta na [Sufyan] uta na [Al A'masy] uta na [Abu Wa`il] alobaki: '[Abdullah] alobaki: 'Bosengeli koyekola, mpo moko na bino ayebi te tango azali na matata''.