Embrasser l'Islam, cliquez ici
ISLAM AL-HAQ: QURAN & HADITH
(The True Islam)
Free Download / Download

Imam Malik (الامام مالك) - 1594 Hadith

Hadith

Imam Malik : 241

و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ زَيْدِ بْنِ أَسْلَمَ عَنْ أَبِيهِ أَنَّ عُمَرَ بْنَ الْخَطَّابِكَانَ يُصَلِّي مِنْ اللَّيْلِ مَا شَاءَ اللَّهُ حَتَّى إِذَا كَانَ مِنْ آخِرِ اللَّيْلِ أَيْقَظَ أَهْلَهُ لِلصَّلَاةِ يَقُولُ لَهُمْ الصَّلَاةَ الصَّلَاةَ ثُمَّ يَتْلُو هَذِهِ الْآيَةَ{ وَأْمُرْ أَهْلَكَ بِالصَّلَاةِ وَاصْطَبِرْ عَلَيْهَا لَا نَسْأَلُكَ رِزْقًا نَحْنُ نَرْزُقُكَ وَالْعَاقِبَةُ لِلتَّقْوَى }

Eyebisami na ngai uta na Malik uta na [Zaid bin Aslam] uta na [tata na ye] ete [Umar bin Khatthab] azalaki kosambela na motango monene na butu, kino ntango nsuka ya butu epusanaki alamuki libota na ye mpo na kosambela. Alobaki na bango; 'ASHSHALAAH ASHSHALAAH -bondela bino, bosambela bino-'. Nsima na yango atángaki vɛrsɛ yango; '-Mpe mitindo na libota na yo kosambela mpe kozala na motema molai na kosala yango. Biso tosengaka yo soutien te, biso nde topesaka yo soutien. mpe mbano -malamu- ezali mpo na baoyo bazali bato ya Nzambe-' -Qs. Thaahaa: 132- .

Hadith

Imam Malik : 242

حَدَّثَنِي يَحْيَى عَنْ مَالِك عَنْ ابْنِ شِهَابٍ عَنْ عُرْوَةَ بْنِ الزُّبَيْرِ عَنْ عَائِشَةَ زَوْجِ النَّبِيِّ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَأَنَّ رَسُولَ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ كَانَ يُصَلِّي مِنْ اللَّيْلِ إِحْدَى عَشْرَةَ رَكْعَةً يُوتِرُ مِنْهَا بِوَاحِدَةٍ فَإِذَا فَرَغَ اضْطَجَعَ عَلَى شِقِّهِ الْأَيْمَنِ

Yahya ayebisaki ngai uta na Malik uta na [Ibn Shihab] uta na [Urwah bin Az Zubair] uta na [Aisyah] mwasi ya Ntoma sallallaahu ‘alaihi wasallam, ete Ntoma ya Allah sallallaahu ‘alaihi wasallam asambelaki rak’ah zomi na moko na butu, na witr moko ya rak’ah. Ntango asilisaki, alali na ngámbo na ye ya mobali’.

Hadith

Imam Malik : 243

و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ سَعِيدِ بْنِ أَبِي سَعِيدٍ الْمَقْبُرِيِّ عَنْ أَبِي سَلَمَةَ بْنِ عَبْدِ الرَّحْمَنِ بْنِ عَوْفٍ أَنَّهُ سَأَلَ عَائِشَةَ زَوْجَ النَّبِيِّ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَكَيْفَ كَانَتْ صَلَاةُ رَسُولِ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ فِي رَمَضَانَ فَقَالَتْ مَا كَانَ رَسُولُ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ يَزِيدُ فِي رَمَضَانَ وَلَا فِي غَيْرِهِ عَلَى إِحْدَى عَشْرَةَ رَكْعَةً يُصَلِّي أَرْبَعًا فَلَا تَسْأَلْ عَنْ حُسْنِهِنَّ وَطُولِهِنَّ ثُمَّ يُصَلِّي أَرْبَعًا فَلَا تَسْأَلْ عَنْ حُسْنِهِنَّ وَطُولِهِنَّ ثُمَّ يُصَلِّي ثَلَاثًا فَقَالَتْ عَائِشَةُ فَقُلْتُ يَا رَسُولَ اللَّهِ أَتَنَامُ قَبْلَ أَنْ تُوتِرَ فَقَالَ يَا عَائِشَةُ إِنَّ عَيْنَيَّ تَنَامَانِ وَلَا يَنَامُ قَلْبِي

Elobami na ngai uta na Malik uta na [Sa’id bin Abu Sa’id Al Maqburi] uta na [Abu Salamah bin Abdurrahman bin Auf] atunaki [Aisyah] mwasi ya Ntoma sallallaahu ‘alaihi wasallam, ‘Ndenge nini losambo ya Ntoma ya Allah sallallaahu ‘alaihi wasallam ezali na sanza ya Ramadlan? ' Na sima Aisyah ayanolaki, 'Ntoma ya Allah sallallaahu 'alaihi wasallam asambelaki koleka rak'ah zomi na moko te, ezala na sanza ya Ramadlan to na sanza mosusu. Asambelaki raka'ah minei, kotuna te soki ezali malamu boni to molai boni. Asambelaki raka'ah minei, kotuna te soki ezali malamu boni to molai boni. Sima na yango asambelaki ba raka’ah misato. Aisyah akobaki maloba na ye, ‘Na sima natunaki, ‘O Ntoma ya Allah, olali liboso ya witir? ’ Ayanolaki ete: ‘O Aisyah, ya solo miso na ngai elalaka kasi motema na ngai elalaka te’.

Hadith

Imam Malik : 244

و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ هِشَامِ بْنِ عُرْوَةَ عَنْ أَبِيهِ عَنْ عَائِشَةَ أُمِّ الْمُؤْمِنِينَ قَالَتْكَانَ رَسُولُ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ يُصَلِّي بِاللَّيْلِ ثَلَاثَ عَشْرَةَ رَكْعَةً ثُمَّ يُصَلِّي إِذَا سَمِعَ النِّدَاءَ بِالصُّبْحِ رَكْعَتَيْنِ خَفِيفَتَيْنِ

Eyebisami na ngai uta na Malik uta na [Hisyam bin Urwah] uta na [tata na ye] uta na [Aisyah] Ummul Mukminin alobaki, ‘Rasulullah sallallaahu ‘alaihi wasallam abondelaki rak’ah zomi na misato na butu. Na sima asambelaki raka'ah mibale sima ya koyoka libiangi ya tongo.

Hadith

Imam Malik : 245

و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ مَخْرَمَةَ بْنِ سُلَيْمَانَ عَنْ كُرَيْبٍ مَوْلَى ابْنِ عَبَّاسٍ أَنَّ عَبْدَ اللَّهِ بْنَ عَبَّاسٍ أَخْبَرَهُأَنَّهُ بَاتَ لَيْلَةً عِنْدَ مَيْمُونَةَ زَوْجِ النَّبِيِّ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ وَهِيَ خَالَتُهُ قَالَ فَاضْطَجَعْتُ فِي عَرْضِ الْوِسَادَةِ وَاضْطَجَعَ رَسُولُ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ وَأَهْلُهُ فِي طُولِهَا فَنَامَ رَسُولُ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ حَتَّى إِذَا انْتَصَفَ اللَّيْلُ أَوْ قَبْلَهُ بِقَلِيلٍ أَوْ بَعْدَهُ بِقَلِيلٍ اسْتَيْقَظَ رَسُولُ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ فَجَلَسَ يَمْسَحُ النَّوْمَ عَنْ وَجْهِهِ بِيَدِهِ ثُمَّ قَرَأَ الْعَشْرَ الْآيَاتِ الْخَوَاتِمَ مِنْ سُورَةِ آلِ عِمْرَانَ ثُمَّ قَامَ إِلَى شَنٍّ مُعَلَّقٍ فَتَوَضَّأَ مِنْهُ فَأَحْسَنَ وُضُوءَهُ ثُمَّ قَامَ يُصَلِّي قَالَ ابْنُ عَبَّاسٍ فَقُمْتُ فَصَنَعْتُ مِثْلَ مَا صَنَعَ ثُمَّ ذَهَبْتُ فَقُمْتُ إِلَى جَنْبِهِ فَوَضَعَ رَسُولُ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ يَدَهُ الْيُمْنَى عَلَى رَأْسِي وَأَخَذَ بِأُذُنِي الْيُمْنَى يَفْتِلُهَا فَصَلَّى رَكْعَتَيْنِ ثُمَّ رَكْعَتَيْنِ ثُمَّ رَكْعَتَيْنِ ثُمَّ رَكْعَتَيْنِ ثُمَّ رَكْعَتَيْنِ ثُمَّ رَكْعَتَيْنِ ثُمَّ أَوْتَرَ ثُمَّ اضْطَجَعَ حَتَّى أَتَاهُ الْمُؤَذِّنُ فَصَلَّى رَكْعَتَيْنِ خَفِيفَتَيْنِ ثُمَّ خَرَجَ فَصَلَّى الصُّبْحَ

Malik ayebisaki ngai uta na [Mahramah bin Sulaiman] uta na [Kuraib] Ibn ‘Abbas’ moombo, ete [Abdullah bin Abbas] ayebisaki ye ete alekisaki butu na esika ya Maimunah, mwasi ya Ntoma sallallaahu ‘alaihi wasallam, elingi koloba noko ya mama na ye. Abdullah bin Abbas alobaki ete; ‘Nalalaki na oreiller na mopanzi, nzoka nde Ntoma sallallaahu ‘alaihi wasallam na mwasi na ye balalaki na mopanzi molai. Rasulullah sallallaahu ‘alaihi wasallam alali tii na minuit, to mua moke, to mua sima, alamuki. Na nsima afandaki wana azalaki kopangusa mpɔngi na elongi na ye na mabɔkɔ. Mpe atángaki bavɛrsɛ zomi ya nsuka ya mokanda ya Ali Imran, na nsima atɛlɛmaki liboso ya geriba oyo ekangamaki. Asala wudu na kosilisa wudu na ye, sima na yango atɛlɛmaki mpo na kosambela. Ibn Abbas alobaki, ‘Bongo natelemaki mpe nasalaki ndenge ye asalaki, sima nakendaki kosambela pembeni na ye. Rasulullah sallallaahu 'alaihi wasallam sima atie loboko na ye ya mobali na mutu na ngai tango asimbaki litoi na ngai ya mobali pe abenda yango -mosika-. Na nsima, abondelaki raka’ah mibale, raka’a mibale, raka’a mibale, raka’a mibale, raka’a mibale mpe raka’a mibale. Na sima abondelaki losambo ya witr. Sima na yango alali tii ba muadzin bayaki epayi na ye. Abondelaki mabondeli mibale ya pole sima abimaki mpo na losambo ya tongo.

Hadith

Imam Malik : 246

و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ عَبْدِ اللَّهِ بْنِ أَبِي بَكْرٍ عَنْ أَبِيهِ أَنَّ عَبْدَ اللَّهِ بْنَ قَيْسِ بْنِ مَخْرَمَةَ أَخْبَرَهُ عَنْ زَيْدِ بْنِ خَالِدٍ الْجُهَنِيِّ أَنَّهُ قَالَلَأَرْمُقَنَّ اللَّيْلَةَ صَلَاةَ رَسُولِ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ قَالَ فَتَوَسَّدْتُ عَتَبَتَهُ أَوْ فُسْطَاطَهُ فَقَامَ رَسُولُ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ فَصَلَّى رَكْعَتَيْنِ طَوِيلَتَيْنِ طَوِيلَتَيْنِ طَوِيلَتَيْنِ ثُمَّ صَلَّى رَكْعَتَيْنِ وَهُمَا دُونَ اللَّتَيْنِ قَبْلَهُمَا ثُمَّ صَلَّى رَكْعَتَيْنِ وَهُمَا دُونَ اللَّتَيْنِ قَبْلَهُمَا ثُمَّ صَلَّى رَكْعَتَيْنِ وَهُمَا دُونَ اللَّتَيْنِ قَبْلَهُمَا ثُمَّ صَلَّى رَكْعَتَيْنِ وَهُمَا دُونَ اللَّتَيْنِ قَبْلَهُمَا ثُمَّ صَلَّى رَكْعَتَيْنِ وَهُمَا دُونَ اللَّتَيْنِ قَبْلَهُمَا ثُمَّ أَوْتَرَ فَتِلْكَ ثَلَاثَ عَشْرَةَ رَكْعَةً

Eyebisami na ngai uta na Malik uta na [Abdullah bin Abu Bakr] uta na [tata na ye] ete [Abdullah bin Qais bin Makhramah] ayebisaki ye, uta na [Zaid bin Khalid Al-Juhani] alobaki, ‘Nakosala bolukiluki na losambo ya Rasulullah sallallaahu ‘alaihi wasallam na mpokwa ya lelo’. Zaid bin Khalid Al-Juhani alobaki, ‘Na nsima nalalaki na hema na ye, to na ekuke na ye. Rasulullah sallallaahu ‘alaihi wasallam sima atelemaki mpe asambelaki ba raka’ah mibale ya milayi, raka’ah mibale ya milayi, raka’ah mibale ya milayi. Na sima asambelaki ba raka'ah mibale oyo ezalaki pete koleka ba raka'ah mibale oyo eleki. Asambelaki ba raka’ah mibale oyo ezalaki pete koleka ba raka’ah mibale oyo eleki. Asambelaki ba raka’ah mibale oyo ezalaki pete koleka ba raka’ah mibale oyo eleki. Na sima asambelaki ba raka'ah mibale oyo ezalaki pete koleka ba raka'ah mibale oyo eleki. Na nsima, abondelaki losambo ya witr, mpe esilaki na ba raka’ah zomi na misato.

Hadith

Imam Malik : 247

حَدَّثَنِي يَحْيَى عَنْ مَالِك عَنْ نَافِعٍ وَعَبْدِ اللَّهِ بْنِ دِينَارٍ عَنْ عَبْدِ اللَّهِ بْنِ عُمَرَأَنَّ رَجُلًا سَأَلَ رَسُولَ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ عَنْ صَلَاةِ اللَّيْلِ فَقَالَ رَسُولُ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ صَلَاةُ اللَّيْلِ مَثْنَى مَثْنَى فَإِذَا خَشِيَ أَحَدُكُمْ الصُّبْحَ صَلَّى رَكْعَةً وَاحِدَةً تُوتِرُ لَهُ مَا قَدْ صَلَّى

Yahya ayebisaki ngai uta na Malik uta na [Nafi’] mpe [Abdullah bin Dinar] uta na [Abdullah bin Umar], ete ezalaki na mobali moko oyo atunaki Rasulullah sallallaahu ‘alaihi wasallam mpo na losambo ya butu? Rasulullah shallallahu ‘alaihi wasallam ayanolaki: ‘Losambo ya butu esalemaka na rak’ah mibale, rak’ah mibale. Soki moko na bino azali komitungisa ete ntongo ekoya, bosambela rak’ah moko lokola witr mpo na losambo ya liboso’.

Hadith

Imam Malik : 248

و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ يَحْيَى بْنِ سَعِيدٍ عَنْ مُحَمَّدِ بْنِ يَحْيَى بْنِ حَبَّانَ عَنْ ابْنِ مُحَيْرِيزٍأَنَّ رَجُلًا مِنْ بَنِي كِنَانَةَ يُدْعَى الْمُخْدَجِيَّ سَمِعَ رَجُلًا بِالشَّامِ يُكَنَّى أَبَا مُحَمَّدٍ يَقُولُ إِنَّ الْوِتْرَ وَاجِبٌ فَقَالَ الْمُخْدَجِيُّ فَرُحْتُ إِلَى عُبَادَةَ بْنِ الصَّامِتِ فَاعْتَرَضْتُ لَهُ وَهُوَ رَائِحٌ إِلَى الْمَسْجِدِ فَأَخْبَرْتُهُ بِالَّذِي قَالَ أَبُو مُحَمَّدٍ فَقَالَ عُبَادَةُ كَذَبَ أَبُو مُحَمَّدٍ سَمِعْتُ رَسُولَ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ يَقُولُ خَمْسُ صَلَوَاتٍ كَتَبَهُنَّ اللَّهُ عَزَّ وَجَلَّ عَلَى الْعِبَادِ فَمَنْ جَاءَ بِهِنَّ لَمْ يُضَيِّعْ مِنْهُنَّ شَيْئًا اسْتِخْفَافًا بِحَقِّهِنَّ كَانَ لَهُ عِنْدَ اللَّهِ عَهْدٌ أَنْ يُدْخِلَهُ الْجَنَّةَ وَمَنْ لَمْ يَأْتِ بِهِنَّ فَلَيْسَ لَهُ عِنْدَ اللَّهِ عَهْدٌ إِنْ شَاءَ عَذَّبَهُ وَإِنْ شَاءَ أَدْخَلَهُ الْجَنَّةَ

Eyebisami na ngai uta na Malik uta na [Yahya bin Sa’id] uta na [Muhammad bin Yahya bin Habban] uta na [Ibnu Muhairiz], ete ezalaki na mobali moko uta na Bani Kinanah na nkombo [Al-Mukhdaji], ayokaki mobali moko na nkombo ya lisɛki Abu Muhammad koloba na etuka ya Sham, ‘Witir ezali obligatoire’. Al-Mukhdaji alobaki ete; 'Na sima nakutanaki na Ubadah bin Shamit, na interceptaki ye tango azalaki kokende na mosquée.' Na nsima nayebisaki ye makambo oyo Abu Muhammad alobaki. [Ubadah] alobaki, ‘Abu Muhammad akosi. Nayokaki Rasulullah shallallahu ‘alaihi wasallam alobi: ‘Mabondeli mitano ya Allah Azza Wa Jalla ekomisi yango obligatoire likolo na Ye. Oyo akokisaka yango mpe atiki ata moko na yango te mpo azali kotyola mikumba na ye, na ntembe te akozwa elaka ya Allah ya kondima ye na lola. Oyo akosala yango te, na ntembe te akozwa elaka ya Allah te - ya kotia ye na lola -. Soki alingi, Allah akonyokola ye, pe soki alingi, Allah akotia ye na lola’.

Hadith

Imam Malik : 249

و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ أَبِي بَكْرِ بْنِ عُمَرَ عَنْ سَعِيدِ بْنِ يَسَارٍ قَالَ كُنْتُ أَسِيرُ مَعَ عَبْدِ اللَّهِ بْنِ عُمَرَ بِطَرِيقِ مَكَّةَ قَالَ سَعِيدٌ فَلَمَّا خَشِيتُ الصُّبْحَ نَزَلْتُ فَأَوْتَرْتُ ثُمَّ أَدْرَكْتُهُ فَقَالَ لِي عَبْدُ اللَّهِ بْنُ عُمَرَ أَيْنَ كُنْتَ فَقُلْتُ لَهُ خَشِيتُ الصُّبْحَ فَنَزَلْتُ فَأَوْتَرْتُ فَقَالَ عَبْدُ اللَّهِأَلَيْسَ لَكَ فِي رَسُولِ اللَّهِ أُسْوَةٌ فَقُلْتُ بَلَى وَاللَّهِ فَقَالَ إِنَّ رَسُولَ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ كَانَ يُوتِرُ عَلَى الْبَعِيرِ

Eyebisami na ngai uta na Malik uta na [Abu Bakr bin Muhammad bin Umar] uta na [Sa’id bin Yasar] alobaki, ‘Natambolaki elongo na Abdullah bin ‘Umar na balabala moko ya Makkah’. Sa’id alobaki, ‘Nazalaki komitungisa ete ntongo ekoya noki, yango wana natikaki kosambela losambo ya witr, kino nazalaki naino na ntango ya kosambela losambo ya witr. Abdullah bin Umar atunaki, 'Owuti wapi?' Nayanolaki, 'Nazalaki komitungisa mpo na ntongo, yango wana natelemaki mpo na kosambela losambo ya witr'. [Abdullah] alobaki; 'Ezali na ndakisa moko te mpo na bino uta na Ntoma sallallaahu 'alaihi wasallam?' Nayanolaki; 'Ee, na nzela ya Allah'. Alobi ete; ‘Ntoma ya Allah sallallaahu ‘alaihi wasallam abondelaki losambo ya Witr na kamela na ye.

Hadith

Imam Malik : 250

و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ يَحْيَى بْنِ سَعِيدٍ عَنْ سَعِيدِ بْنِ الْمُسَيَّبِ أَنَّهُ قَالَ كَانَ أَبُو بَكْرٍ الصِّدِّيقُإِذَا أَرَادَ أَنْ يَأْتِيَ فِرَاشَهُ أَوْتَرَوَكَانَ عُمَرُ بْنُ الْخَطَّابِ يُوتِرُ آخِرَ اللَّيْلِ قَالَ سَعِيدُ بْنُ الْمُسَيَّبِ فَأَمَّا أَنَا فَإِذَا جِئْتُ فِرَاشِي أَوْتَرْتُ

Ayebisaki ngai uta na Malik uta na [Yahya bin Sa’id] uta na [Sa’id bin Musayyab] alobaki; 'Soki [Abu Bakr Ash Shidiq] alingi kokende na mbeto na ye, azalaki kosambela losambo ya witr, nzokande [Umar bin Khatthab] azalaki kosala losambo ya witr na suka ya butu'. Sa’id bin Musayyab alobaki ete; 'Soki nalingi kolala, nasambelaka liboso losambo ya witr'.

Hadith

Imam Malik : 251

و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ نَافِعٍ أَنَّهُ قَالَ كُنْتُ مَعَ عَبْدِ اللَّهِ بْنِ عُمَرَبِمَكَّةَ وَالسَّمَاءُ مُغِيمَةٌ فَخَشِيَ عَبْدُ اللَّهِ الصُّبْحَ فَأَوْتَرَ بِوَاحِدَةٍ ثُمَّ انْكَشَفَ الْغَيْمُ فَرَأَى أَنَّ عَلَيْهِ لَيْلًا فَشَفَعَ بِوَاحِدَةٍ ثُمَّ صَلَّى بَعْدَ ذَلِكَ رَكْعَتَيْنِ رَكْعَتَيْنِ فَلَمَّا خَشِيَ الصُّبْحَ أَوْتَرَ بِوَاحِدَةٍ

Malik ayebisaki ngai uta na [Nafi’] alobaki, ‘Nazalaki elongo na [Abdullah bin Umar] na Mecque, nzokande na ntango wana lola ezalaki komonana lokola mapata. Abdullah amitungisaki ete ntongo ekoya kala mingi te, yango wana abondelaki rak’ah moko ya witr. Kasi sima na yango mapata etombolaki mpe Abdullah amonaki ete ezalaki kaka butu. Bongo akokisaki yango na raka’ah moko lisusu, sima na yango asambelaki raka’ah mibale, raka’ah mibale. Mpe ntango azalaki komitungisa ete ntɔngɔ ekoya nokinoki, abondelaki raka’a moko ya losambo ya witr.

Hadith

Imam Malik : 252

و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ نَافِعٍ أَنَّ عَبْدَ اللَّهِ بْنَ عُمَرَكَانَ يُسَلِّمُ بَيْنَ الرَّكْعَتَيْنِ وَالرَّكْعَةِ فِي الْوِتْرِ حَتَّى يَأْمُرَ بِبَعْضِ حَاجَتِهِ

Eyebisami na ngai uta na Malik uta na [Nafi’] ete [Abdullah bin Umar] tango azali kosambela losambo ya witr, azali kotanga mbote sima ya raka’ah mibale mpe raka’ah moko. Na nsima, apesaki mitindo ete bázwa mwa biloko na ye oyo azalaki na yango mposa’.

Hadith

Imam Malik : 253

و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ ابْنِ شِهَابٍ أَنَّ سَعْدَ بْنَ أَبِي وَقَّاصٍكَانَ يُوتِرُ بَعْدَ الْعَتَمَةِ بِوَاحِدَةٍقَالَ مَالِك وَلَيْسَ عَلَى هَذَا الْعَمَلُ عِنْدَنَا وَلَكِنْ أَدْنَى الْوِتْرِ ثَلَاثٌ

Eyebisamaki na ngai uta na Malik uta na [Ibn Shihab] ete [Sa’ad bin Abu Waqash] abondelaki losambo ya Witr rak’ah moko nsima ya Isha’. Malik alobaki ete; ‘Oyo ezali te oyo tosalaka. Na makanisi na biso, losambo ya wirit ya moke ezali raka'ah misato.

Hadith

Imam Malik : 254

و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ عَبْدِ اللَّهِ بْنِ دِينَارٍ أَنَّ عَبْدَ اللَّهِ بْنَ عُمَرَ كَانَ يَقُولُصَلَاةُ الْمَغْرِبِ وِتْرُ صَلَاةِ النَّهَارِ

Elobami na ngai uta na Malik uta na [Abdullah bin Dinar] ete [Abdullah bin Umar] alobaki; 'Losambo ya Maghrib ezali witr ya losambo ya midi'.

Hadith

Imam Malik : 255

حَدَّثَنِي يَحْيَى عَنْ مَالِك عَنْ عَبْدِ الْكَرِيمِ بْنِ أَبِي الْمُخَارِقِ الْبَصْرِيِّ عَنْ سَعِيدِ بْنِ جُبَيْرٍ أَنَّ عَبْدَ اللَّهِ بْنَ عَبَّاسٍرَقَدَ ثُمَّ اسْتَيْقَظَ فَقَالَ لِخَادِمِهِ انْظُرْ مَا صَنَعَ النَّاسُ وَهُوَ يَوْمَئِذٍ قَدْ ذَهَبَ بَصَرُهُ فَذَهَبَ الْخَادِمُ ثُمَّ رَجَعَ فَقَالَ قَدْ انْصَرَفَ النَّاسُ مِنْ الصُّبْحِ فَقَامَ عَبْدُ اللَّهِ بْنُ عَبَّاسٍ فَأَوْتَرَ ثُمَّ صَلَّى الصُّبْحَ

Yahya ayebisaki ngai uta na Malik uta na [Abdul Karim bin Abu Al Mukhariq Al Bashri] uta na [Sa’id bin Jubair], ete [Abdullah bin ‘Abbas] alalaki mpe na nsima alamuki. Bongo alobaki na mosaleli na ye; 'Tala oyo moto asali -na tango wana azalaki akufá miso-'. Na nsima, mosali yango alongwaki, mpe nsima ya kozonga, mosali yango alobaki ete; 'Bato basilisi mabondeli na bango ya tongo'. Abdullah bin Abbas atɛlɛmaki mpo na kosambela losambo ya witr mpe na nsima abondelaki losambo ya ntɔngɔ.

Hadith

Imam Malik : 256

و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ هِشَامِ بْنِ عُرْوَةَ عَنْ أَبِيهِ أَنَّ عَبْدَ اللَّهِ بْنَ مَسْعُودٍ قَالَمَا أُبَالِي لَوْ أُقِيمَتْ صَلَاةُ الصُّبْحِ وَأَنَا أُوتِرُ

Elobami na ngai uta na Malik uta na [Hisyam bin Urwah] uta na [tata na ye] ete [Abdullah bin Mas’ud] alobaki; 'Nazali na souci te ata soki balobi iqamat ya tongo, nakosambela kaka losambo ya witr'.

Hadith

Imam Malik : 257

و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ يَحْيَى بْنِ سَعِيدٍ أَنَّهُ قَالَ كَانَ عُبَادَةُ بْنُ الصَّامِتِيَؤُمُّ قَوْمًا فَخَرَجَ يَوْمًا إِلَى الصُّبْحِ فَأَقَامَ الْمُؤَذِّنُ صَلَاةَ الصُّبْحِ فَأَسْكَتَهُ عُبَادَةُ حَتَّى أَوْتَرَ ثُمَّ صَلَّى بِهِمْ الصُّبْحَ

Ayebisaki ngai uta na Malik uta na [Yahya bin Sa’id] alobaki; ’ [Ubadah bin Shamit] azali nganga-nzambe ya bato moko. Mokolo moko, abimaki mpo na mabondeli ya ntɔngɔ. Na sima muadzin asakolaka iqamat, sima Ubadah atelemisi iqamah na ye tiii akosala losambo ya witr. Nsima na yango abondelaki libondeli ya ntɔngɔ elongo na bango.’

Hadith

Imam Malik : 258

و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ عَبْدِ الرَّحْمَنِ بْنِ الْقَاسِمِ أَنَّهُ قَالَ سَمِعْتُ عَبْدَ اللَّهِ بْنَ عَامِرِ بْنِ رَبِيعَةَ يَقُولُإِنِّي لَأُوتِرُ وَأَنَا أَسْمَعُ الْإِقَامَةَ أَوْ بَعْدَ الْفَجْرِ يَشُكُّ عَبْدُ الرَّحْمَنِ أَيَّ ذَلِكَ قَالَ

Ayebisaki ngai uta na Malik uta na [Abdurrahman bin Al Qasim] alobaki; Nayoki [Abdullah bin ‘Amir bin Rabi’ah] alobi; 'Nakokoba kosambela witr tango nakoyoka iqamat to sima ya tongo'. Abdurrahman azalaki na tembe na oyo Abdullah bin Amru’ alobaki.

Hadith

Imam Malik : 259

و حَدَّثَنِي مَالِك عَنْ عَبْدِ الرَّحْمَنِ بْنِ الْقَاسِمِ أَنَّهُ سَمِعَ أَبَاهُ الْقَاسِمَ بْنَ مُحَمَّدٍ يَقُولُإِنِّي لَأُوتِرُ بَعْدَ الْفَجْرِ

Ayebisaki ngai uta na Malik uta na [Abdurrahman bin Al Qasim] ayokaki tata na ye [Al Qasim bin Muhammad] alobi; 'Nazali kaka kosambela witr ata sima ya tongo'.

Hadith

Imam Malik : 260

حَدَّثَنِي يَحْيَى عَنْ مَالِك عَنْ نَافِعٍ عَنْ عَبْدِ اللَّهِ بْنِ عُمَرَ أَنَّ حَفْصَةَ زَوْجَ النَّبِيِّ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ أَخْبَرَتْهُأَنَّ رَسُولَ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ كَانَ إِذَا سَكَتَ الْمُؤَذِّنُ عَنْ الْأَذَانِ لِصَلَاةِ الصُّبْحِ صَلَّى رَكْعَتَيْنِ خَفِيفَتَيْنِ قَبْلَ أَنْ تُقَامَ الصَّلَاةُ

Yahya ayebisaki ngai uta na Malik uta na [Nafi’] uta na [Abdullah bin Umar], ete [Hafshah] mwasi ya Ntoma sallallaahu ‘alaihi wasallam ayebisaki ye, ete ‘Ntango muadzin asili koloba kobenga ya tongo, sima liboso ya iqamah Ntoma sallallaahu ‘alaihi wasallam asambelaka raka’ah mibale ya losambo ya pete’.