Embrasser l'Islam, cliquez ici
ISLAM AL-HAQ: QURAN & HADITH
(The True Islam)
Free Download / Download

Imam Malik (الامام مالك) - 1594 Hadith

Hadith

Imam Malik : 201

و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ نَافِعٍ أَنَّ عَبْدَ اللَّهِ بْنَ عُمَرَكَانَ إِذَا سُئِلَ عَنْ النِّسْيَانِ فِي الصَّلَاةِ قَالَ لِيَتَوَخَّ أَحَدُكُمْ الَّذِي يَظُنُّ أَنَّهُ نَسِيَ مِنْ صَلَاتِهِ فَلْيُصَلِّهِ

Elobamaki na ngai uta na Malik uta na [Nafi’] ete [Abdullah bin Umar] ntango batunaki ye mpo na kobosana na losambo, ayanolaki ete, ‘Moto asengeli koluka oyo andimi ete abosani, sima asilisa losambo na ye’.

Hadith

Imam Malik : 202

حَدَّثَنِي يَحْيَى عَنْ مَالِك عَنْ ابْنِ شِهَابٍ عَنْ الْأَعْرَجِ عَنْ عَبْدِ اللَّهِ ابْنِ بُحَيْنَةَ أَنَّهُ قَالَصَلَّى لَنَا رَسُولُ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ رَكْعَتَيْنِ ثُمَّ قَامَ فَلَمْ يَجْلِسْ فَقَامَ النَّاسُ مَعَهُ فَلَمَّا قَضَى صَلَاتَهُ وَنَظَرْنَا تَسْلِيمَهُ كَبَّرَ ثُمَّ سَجَدَ سَجْدَتَيْنِ وَهُوَ جَالِسٌ قَبْلَ التَّسْلِيمِ ثُمَّ سَلَّمَ

Elobami na ngai ete Yahya uta na Malik uta na [Ibn Shihab] uta na [Al A’raj] uta na [Abdullah bin Buhainah] alobaki, ‘Rasulullah sallallaahu ‘alaihi wasallam abondelaki raka’ah mibale elongo na biso. Na nsima, atɛlɛmaki mbala moko kozanga kofanda, wana bato bakobaki kolanda ye batɛlɛmi. Ntango asilisaki kosambela mpe tomonaki mbote na ye, azwaki takbir nsima afukamaki mbala mibale liboso ya kopesa mbote, nsima na yango apesaki mbote mpe afandaki naino.’

Hadith

Imam Malik : 203

و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ يَحْيَى بْنِ سَعِيدٍ عَنْ عَبْدِ الرَّحْمَنِ بْنِ هُرْمُزَ عَنْ عَبْدِ اللَّهِ ابْنِ بُحَيْنَةَ أَنَّهُ قَالَصَلَّى لَنَا رَسُولُ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ الظُّهْرَ فَقَامَ فِي اثْنَتَيْنِ وَلَمْ يَجْلِسْ فِيهِمَا فَلَمَّا قَضَى صَلَاتَهُ سَجَدَ سَجْدَتَيْنِ ثُمَّ سَلَّمَ بَعْدَ ذَلِكَ

Ayebisaki ngai uta na Malik uta na [Yahya bin Sa’id] uta na [Abdurrahman bin Hurmuz] uta na [Abdullah bin Buhainah] alobaki; 'Rasulullah shallallahu 'alaihi wasallam abondelaki losambo ya midi elongo na biso. Atɛlɛmaki na raka’a ya mibale mpe afandaki na kati na yango te. Ntango asilisaki kobondela, afukamaki na kofukama mibale, na nsima apesaki ye mbote na nsima.’

Hadith

Imam Malik : 204

حَدَّثَنِي يَحْيَى عَنْ مَالِك عَنْ عَلْقَمَةَ بْنِ أَبِي عَلْقَمَةَ عَنْ أُمِّهِ أَنَّ عَائِشَةَ زَوْجَ النَّبِيِّ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ قَالَتْأَهْدَى أَبُو جَهْمِ بْنُ حُذَيْفَةَ لِرَسُولِ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ خَمِيصَةً شَامِيَّةً لَهَا عَلَمٌ فَشَهِدَ فِيهَا الصَّلَاةَ فَلَمَّا انْصَرَفَ قَالَ رُدِّي هَذِهِ الْخَمِيصَةَ إِلَى أبِي جَهْمٍ فَإِنِّي نَظَرْتُ إِلَى عَلَمِهَا فِي الصَّلَاةِ فَكَادَ يَفْتِنُنِي

Yahya ayebisaki ngai uta na Malik uta na [Alqamah bin Abu Alqamah] uta na [mama na ye], ete [Aisyah] mwasi ya Ntoma sallallaahu ‘alaihi wasallam alobaki, ‘Abu Jahm bin Hudzaifah apesaki chemise moko uta na Syrie na elilingi likolo na yango epai ya Rasulullah sallallaahu ‘alaihi wasallam. Amonaki yango na libondeli. Tango asilisaki losambo alobi : 'Zongisa chemise oyo epayi ya Abu Jahm, po namonaki photo na yango na losambo pe ekoma presque kofinga pona ngai'.

Hadith

Imam Malik : 205

و حَدَّثَنِي مَالِك عَنْ هِشَامِ بْنِ عُرْوَةَ عَنْ أَبِيهِأَنَّ رَسُولَ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ لَبِسَ خَمِيصَةً لَهَا عَلَمٌ ثُمَّ أَعْطَاهَا أَبَا جَهْمٍ وَأَخَذَ مِنْ أَبِي جَهْمٍ أَنْبِجَانِيَّةً لَهُ فَقَالَ يَا رَسُولَ اللَّهِ وَلِمَ فَقَالَ إِنِّي نَظَرْتُ إِلَى عَلَمِهَا فِي الصَّلَاةِ

Malik ayebisaki ngai uta na [Hisyam bin Urwah] uta na [tata na ye], ete Rasulullah sallallaahu ‘alaihi wasallam alataki bilamba oyo ezalaki na mayemi likoló na yango, na nsima apesaki yango na Abu Jahm mpe azwaki veste ya mposo ya nyama ya Abu Jahm. Abu Jahm atunaki, ‘Mpo na nini, O Ntoma ya Nzambe?’. ayanolaki ete: ‘Namonaki elilingi na ye na libondeli’.

Hadith

Imam Malik : 206

و حَدَّثَنِي مَالِك عَنْ عَبْدِ اللَّهِ بْنِ أَبِي بَكْرٍأَنَّ أَبَا طَلْحَةَ الْأَنْصَارِيَّ كَانَ يُصَلِّي فِي حَائِطِهِ فَطَارَ دُبْسِيٌّ فَطَفِقَ يَتَرَدَّدُ يَلْتَمِسُ مَخْرَجًا فَأَعْجَبَهُ ذَلِكَ فَجَعَلَ يُتْبِعُهُ بَصَرَهُ سَاعَةً ثُمَّ رَجَعَ إِلَى صَلَاتِهِ فَإِذَا هُوَ لَا يَدْرِي كَمْ صَلَّى فَقَالَ لَقَدْ أَصَابَتْنِي فِي مَالِي هَذَا فِتْنَةٌ فَجَاءَ إِلَى رَسُولِ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ فَذَكَرَ لَهُ الَّذِي أَصَابَهُ فِي حَائِطِهِ مِنْ الْفِتْنَةِ وَقَالَ يَا رَسُولَ اللَّهِ هُوَ صَدَقَةٌ لِلَّهِ فَضَعْهُ حَيْثُ شِئْتَ

Malik ayebisaki ngai uta na [Abdullah bin Abu Bakr] ete [Abu Talhah Al Ansari] mokolo moko abondelaki na elanga na ye, nsima ezalaki na ba nsoso oyo bazalaki kopumbwa mpe kobulungana kolukaka nzela ya kobima kino Abu Talhah akamwaki mpe miso na ye ekangamaki na ye mpo na mwa ntango. Azongaki na losambo na ye mpe ayebaki te combien de rac’ahs asali?’. Na sima alobaki, 'Ya solo, nazalaki occupé na bomengo na ngai, oyo ezali kofinga'. Na sima akutanaki na Rasulullah sallallaahu ‘alaihi wasallam mpe ayebisaki ye makambo ya kofinga oyo ekómelaki ye na elanga. Alobaki: ‘Ee Ntoma ya Nzambe (Allah! Na dédié elanga oyo na Allah. Bongisa yango selon ba posa na yo'.

Hadith

Imam Malik : 207

و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ عَبْدِ اللَّهِ بْنِ أَبِي بَكْرٍ أَنَّ رَجُلًا مِنْ الْأَنْصَارِكَانَ يُصَلِّي فِي حَائِطٍ لَهُ بِالْقُفِّ وَادٍ مِنْ أَوْدِيَةِ الْمَدِينَةِ فِي زَمَانِ الثَّمَرِ وَالنَّخْلُ قَدْ ذُلِّلَتْ فَهِيَ مُطَوَّقَةٌ بِثَمَرِهَا فَنَظَرَ إِلَيْهَا فَأَعْجَبَهُ مَا رَأَى مِنْ ثَمَرِهَا ثُمَّ رَجَعَ إِلَى صَلَاتِهِ فَإِذَا هُوَ لَا يَدْرِي كَمْ صَلَّى فَقَالَ لَقَدْ أَصَابَتْنِي فِي مَالِي هَذَا فِتْنَةٌ فَجَاءَ عُثْمَانَ بْنَ عَفَّانَ وَهُوَ يَوْمَئِذٍ خَلِيفَةٌ فَذَكَرَ لَهُ ذَلِكَ وَقَالَ هُوَ صَدَقَةٌ فَاجْعَلْهُ فِي سُبُلِ الْخَيْرِ فَبَاعَهُ عُثْمَانُ بْنُ عَفَّانَ بِخَمْسِينَ أَلْفًا فَسُمِّيَ ذَلِكَ الْمَالُ الْخَمْسِينَ

Eyebisamaki na ngai uta na Malik uta na [Abdullah bin Abu Bakr], ete ezalaki na mobali moko ya Ansar oyo azalaki kosambela na elanga na ye na Al Quf - lobwaku moko na Medina - na eleko ya datte oyo mbuma na yango eteli mpe ebongi mpo na kobuka mbuma. Mobali yango atalaki badati tii akamwaki, na nsima azongaki na kotya makanisi na ye nyonso na losambo na ye, kasi emonanaki ete ayebaki te soki asalaki raka’ah boni?’ Na nsima alobaki ete, ‘Ya solo, nazwi likama na bozwi na ngai, oyo ezali kofinga’. Na nsima mobali yango akutanaki na [Uthman bin Affan] oyo na ntango wana azalaki Calife. Ayebisaki ngai yango, alobaki, ‘Napesaki elanga na bolingo, yango wana salelá yango na nzela ya bosembo’. Uthman bin Affan ateka yango na nkoto ntuku mitano, yango wana esika yango ezwaki nkombo Al khamsin - nkoto mitano - '.

Hadith

Imam Malik : 208

حَدَّثَنِي يَحْيَى عَنْ مَالِك عَنْ ابْنِ شِهَابٍ عَنْ أَبِي سَلَمَةَ بْنِ عَبْدِ الرَّحْمَنِ بْنِ عَوْفٍ عَنْ أَبِي هُرَيْرَةَأَنَّ رَسُولَ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ قَالَ إِنَّ أَحَدَكُمْ إِذَا قَامَ يُصَلِّي جَاءَهُ الشَّيْطَانُ فَلَبَسَ عَلَيْهِ حَتَّى لَا يَدْرِيَ كَمْ صَلَّى فَإِذَا وَجَدَ ذَلِكَ أَحَدُكُمْ فَلْيَسْجُدْ سَجْدَتَيْنِ وَهُوَ جَالِسٌ

Eyebisami na ngai na Yahya uta na Malik uta na [Ibn Shihab] uta na [Abu Salamah bin Abdurrahman bin Auf] uta na [Abu Hurairah] ete Ntoma ya Nzambe (kimia mpe mapamboli ya Allaah ezala likolo na ye) alobaki: ‘Soki moko kati na bino atelemi kosambela, Satana ayei epai na ye, komekaka ye kino akoyeba te combien de raka’a asali. Soki ozui yango, alors fumba mbala mibale tango ofandi kaka'.

Hadith

Imam Malik : 209

حَدَّثَنِي يَحْيَى عَنْ مَالِك عَنْ سُمَيٍّ مَوْلَى أَبِي بَكْرِ بْنِ عَبْدِ الرَّحْمَنِ عَنْ أَبِي صَالِحٍ السَّمَّانِ عَنْ أَبِي هُرَيْرَةَأَنَّ رَسُولَ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ قَالَ مَنْ اغْتَسَلَ يَوْمَ الْجُمُعَةِ غُسْلَ الْجَنَابَةِ ثُمَّ رَاحَ فِي السَّاعَةِ الْأُولَى فَكَأَنَّمَا قَرَّبَ بَدَنَةً وَمَنْ رَاحَ فِي السَّاعَةِ الثَّانِيَةِ فَكَأَنَّمَا قَرَّبَ بَقَرَةً وَمَنْ رَاحَ فِي السَّاعَةِ الثَّالِثَةِ فَكَأَنَّمَا قَرَّبَ كَبْشًا أَقْرَنَ وَمَنْ رَاحَ فِي السَّاعَةِ الرَّابِعَةِ فَكَأَنَّمَا قَرَّبَ دَجَاجَةً وَمَنْ رَاحَ فِي السَّاعَةِ الْخَامِسَةِ فَكَأَنَّمَا قَرَّبَ بَيْضَةً فَإِذَا خَرَجَ الْإِمَامُ حَضَرَتْ الْمَلَائِكَةُ يَسْتَمِعُونَ الذِّكْرَ

Eyebisami na ngai na Yahya uta na Malik uta na [Sumayya] moombo moko ya kala ya Abu Bakr bin Abdurrahman, uta na [Abu Salih As Samman] uta na [Abu Hurairah] ete Ntoma ya Allah sallallaahu ‘alaihi wasallam alobaki: ‘Oyo asukoli mokolo ya mitano lokola kosukola ya janabat mpe na nsima abimi na mbala ya liboso, ezali lokola nde apesaki mbeka na kamela. Oyo akokende mbala ya mibale, ekozala lokola azali kopesa ngombe mbeka. Oyo akokende na mbala ya misato, ekozala lokola azali kopesa ntaba mbeka. Oyo akokende na mbala ya minei, ekozala lokola azali kopesa mbeka na nsoso. Mpe oyo akobima na mbala ya mitano, ezali lokola nde azali kopesa mbeka na likei. Na yango, tango imam akomi, ba ange bazali wana mpo na koyoka lisukulu.

Hadith

Imam Malik : 210

و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ سَعِيدِ بْنِ أَبِي سَعِيدٍ الْمَقْبُرِيِّ عَنْ أَبِي هُرَيْرَةَ أَنَّهُ كَانَ يَقُولُغُسْلُ يَوْمِ الْجُمُعَةِ وَاجِبٌ عَلَى كُلِّ مُحْتَلِمٍ كَغُسْلِ الْجَنَابَةِ

Elobami na ngai uta na Malik uta na [Sa’id Abu Abu Sa’id Al Maqburi] uta na [Abu Hurairah] alobaki; 'Kosala salle de bain munene - junub ya kosukola - vendredi ezali obligatoire pona mutu nionso oyo azali na ndoto ya mayi'.

Hadith

Imam Malik : 211

و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ ابْنِ شِهَابٍ عَنْ سَالِمِ بْنِ عَبْدِ اللَّهِ أَنَّهُ قَالَ دَخَلَ رَجُلٌ مِنْ أَصْحَابِ رَسُولِ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ الْمَسْجِدَ يَوْمَ الْجُمُعَةِ وَعُمَرُ بْنُ الْخَطَّابِ يَخْطُبُ فَقَالَ عُمَرُأَيَّةُ سَاعَةٍ هَذِهِ فَقَالَ يَا أَمِيرَ الْمُؤْمِنِينَ انْقَلَبْتُ مِنْ السُّوقِ فَسَمِعْتُ النِّدَاءَ فَمَا زِدْتُ عَلَى أَنْ تَوَضَّأْتُ فَقَالَ عُمَرُ وَالْوُضُوءَ أَيْضًا وَقَدْ عَلِمْتَ أَنَّ رَسُولَ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ كَانَ يَأْمُرُ بِالْغُسْلِ

Ayebisaki ngai uta na Malik uta na [Ibnu Shihab] uta na [Salim bin Abdullah] alobaki; 'Ezalaki na mobali moko uta na baninga ya Ntoma sallallaahu 'alaihi wasallam oyo akota na mosquée mokolo ya mitano, na tango wana Umar bin Khatthab azalaki kosala lisukulu. [Umar bin Khattab] na nsima atunaki, ‘Ngonga nini! ’ Mobali ayanolaki, ‘E Amirul Mukminin, nawutaki kozonga na zando, sima nayokaki libiangi ya losambo. Mpe nazalaki na ntango ya kosala eloko te longola kaka kosala ablution. Umar alobaki, ‘Bósala kaka wudu! ' Oyebi te que Rasulullah sallallaahu 'alaihi wasallam alobaki kosukola'.

Hadith

Imam Malik : 212

و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ صَفْوَانَ بْنِ سُلَيْمٍ عَنْ عَطَاءِ بْنِ يَسَارٍ عَنْ أَبِي سَعِيدٍ الْخُدْرِيِّأَنَّ رَسُولَ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ قَالَ غُسْلُ يَوْمِ الْجُمُعَةِ وَاجِبٌ عَلَى كُلِّ مُحْتَلِمٍ

Elobami na ngai uta na Malik uta na [Shafwan bin Sulaim] uta na [Atha bin Yasar] uta na [Abu Sa’id Al Khudri], ete Rasulullah shallallahu ‘alaihi wasallam alobaki: ‘Kosukola mokolo ya mitano ezali obligatoire mpo na moto nyonso oyo azali na bandoto ya mai’.

Hadith

Imam Malik : 213

و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ نَافِعٍ عَنْ ابْنِ عُمَرَأَنَّ رَسُولَ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ قَالَ إِذَا جَاءَ أَحَدُكُمْ الْجُمُعَةَ فَلْيَغْتَسِلْ

Elobami na ngai uta na Malik uta na [Nafi’] uta na [Ibn Umar], ete Ntoma ya Allah sallallaahu ‘alaihi wasallam alobaki: ‘Ntango moko na bino alingi koya na mokolo ya mitano, tika asukola’.

Hadith

Imam Malik : 214

حَدَّثَنِي يَحْيَى عَنْ مَالِك عَنْ أَبِي الزِّنَادِ عَنْ الْأَعْرَجِ عَنْ أَبِي هُرَيْرَةَأَنَّ رَسُولَ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ قَالَ إِذَا قُلْتَ لِصَاحِبِكَ أَنْصِتْ وَالْإِمَامُ يَخْطُبُ يَوْمَ الْجُمُعَةِ فَقَدْ لَغَوْتَ

Elobami na ngai uta na Yahya uta na Malik uta na [Abu Az Zinad] uta na [Al A’raj] uta na [Abu Hurairah], ete Ntoma ya Allah sallallaahu ‘alaihi wasallam alobaki: ‘Ntango olobi na ndeko na yo; 'Kanga! 'Ntango imam azali kosakola, na ntembe te okozala na eloko moko te ya pamba'.

Hadith

Imam Malik : 215

و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ ابْنِ شِهَابٍ عَنْ ثَعْلَبَةَ بْنِ أَبِي مَالِكٍ الْقُرَظِيِّ أَنَّهُ أَخْبَرَهُأَنَّهُمْ كَانُوا فِي زَمَانِ عُمَرَ بْنِ الْخَطَّابِ يُصَلُّونَ يَوْمَ الْجُمُعَةِ حَتَّى يَخْرُجَ عُمَرُ فَإِذَا خَرَجَ عُمَرُ وَجَلَسَ عَلَى الْمِنْبَرِ وَأَذَّنَ الْمُؤَذِّنُونَ قَالَ ثَعْلَبَةُ جَلَسْنَا نَتَحَدَّثُ فَإِذَا سَكَتَ الْمُؤَذِّنُونَ وَقَامَ عُمَرُ يَخْطُبُ أَنْصَتْنَا فَلَمْ يَتَكَلَّمْ مِنَّا أَحَدٌقَالَ ابْنُ شِهَابٍ فَخُرُوجُ الْإِمَامِ يَقْطَعُ الصَّلَاةَ وَكَلَامُهُ يَقْطَعُ الْكَلَامَ

Malik ayebisaki ngai uta na [Ibnu Shihab] uta na [Tsa'labah bin Abu Malik Al Qurazhi] ayebisaki ete basalaki losambo ya mokolo ya mitano na tango ya [Umar bin Khatthab] tango Umar alongwaki. Ntango Umar abimaki mpe afandaki na estrade, Muadzin apesaki libiangi ya losambo. Tsa'labah alobaki, 'Tozalaki kaka kofanda kosolola, soki muadzin azalaki kimia mpe Umar atɛlɛmaki kosakola, boye tolingaki kozala nyɛɛ mpe moto moko te akoloba'. Ibn Shihab alobaki ete; 'Kobima ya imam etelemisaka losambo, mpe lisukulu na ye etelemisi masolo'.

Hadith

Imam Malik : 216

و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ أَبِي النَّضْرِ مَوْلَى عُمَرَ بْنِ عُبَيْدِ اللَّهِ عَنْ مَالِكِ بْنِ أَبِي عَامِرٍ أَنَّ عُثْمَانَ بْنَ عَفَّانَ كَانَ يَقُولُ فِي خُطْبَتِهِ قَلَّ مَا يَدَعُ ذَلِكَ إِذَا خَطَبَإِذَا قَامَ الْإِمَامُ يَخْطُبُ يَوْمَ الْجُمُعَةِ فَاسْتَمِعُوا وَأَنْصِتُوا فَإِنَّ لِلْمُنْصِتِ الَّذِي لَا يَسْمَعُ مِنْ الْحَظِّ مِثْلَ مَا لِلْمُنْصِتِ السَّامِعِ فَإِذَا قَامَتْ الصَّلَاةُ فَاعْدِلُوا الصُّفُوفَ وَحَاذُوا بِالْمَنَاكِبِ فَإِنَّ اعْتِدَالَ الصُّفُوفِ مِنْ تَمَامِ الصَّلَاةِ ثُمَّ لَا يُكَبِّرُ حَتَّى يَأْتِيَهُ رِجَالٌ قَدْ وَكَّلَهُمْ بِتَسْوِيَةِ الصُّفُوفِ فَيُخْبِرُونَهُ أَنْ قَدْ اسْتَوَتْ فَيُكَبِّرُ

Eyebisami na ngai uta na Malik uta na [Abu Nadlr] moombo ya kala ya Umar bin Ubaidullah, uta na [Malik bin ‘Amir] ete [Uthman bin Affan] alobaki mokolo moko na lisukulu na ye, mpe azalaki mbala mingi te kotika libanda na lisukulu na ye; ‘Soki imam atelemi mpo na kosala lisukulu na mokolo ya mitano, boye yoka mpe zalá nyɛɛ. Kutu, mbano ya baoyo bafandi nyɛɛ kasi bayokaka te ezali ndenge moko te na baoyo bafandi nyɛɛ mpe bazali kokoba koyoka. Soki libondeli esengeli kosalema, na nsima sembolá milɔngɔ mpe sangisa yango lipeka na lipeka. Kutu, semba ya milɔngɔ ezali eteni ya kokoka ya libondeli. Umar asalaki takbir na ye te kino bato oyo bapesaki bango mosala ya kosembola milɔngɔ bayaki koyebisa ye ete milɔngɔ yango ezali semba. Sima na yango alobaki takbir.

Hadith

Imam Malik : 217

و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ نَافِعٍ أَنَّ عَبْدَ اللَّهِ بْنَ عُمَرَرَأَى رَجُلَيْنِ يَتَحَدَّثَانِ وَالْإِمَامُ يَخْطُبُ يَوْمَ الْجُمُعَةِ فَحَصَبَهُمَا أَنْ اصْمُتَا

Eyebisamaki na ngai uta na Malik uta na [Nafi’], ete [Abdullah bin Umar] amonaki mibali mibale bazali kosolola ntango imam azalaki kosala lisukulu na ye mokolo ya mitano. Yango wana, abwakelaki bango mabanga ya mikemike mpo bango mibale bázala nyɛɛ.’

Hadith

Imam Malik : 218

و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك أَنَّهُ سَأَلَ ابْنَ شِهَابٍ عَنْ الْكَلَامِ يَوْمَ الْجُمُعَةِ إِذَا نَزَلَ الْإِمَامُ عَنْ الْمِنْبَرِ قَبْلَ أَنْ يُكَبِّرَ فَقَالَ ابْنُ شِهَابٍلَا بَأْسَ بِذَلِكَ

Bayebisaki ngai uta na Malik ete atunaki [Ibn Shihab] mpo na koloba mokolo ya mitano, ntango imam akitaki uta na estrade yambo ya kozwa takbir. Ibn Shihab ayanolaki ete; 'Wana ezali problème te'.

Hadith

Imam Malik : 219

حَدَّثَنِي يَحْيَى عَنْ مَالِك عَنْ ابْنِ شِهَابٍ أَنَّهُ كَانَ يَقُولُمَنْ أَدْرَكَ مِنْ صَلَاةِ الْجُمُعَةِ رَكْعَةً فَلْيُصَلِّ إِلَيْهَا أُخْرَىقَالَ ابْنُ شِهَابٍ وَهِيَ السُّنَّةُ

Yahya ayebisaki ngai uta na Malik uta na [Ibn Shihab] alobaki; 'Oyo azui rak'ah moko na losambo ya vendredi, sima asilisa ba misusu'. Ibn Shihab alobaki ete; 'Wana ezali sunnah'.

Hadith

Imam Malik : 220

حَدَّثَنِي يَحْيَى عَنْ مَالِك أَنَّهُ سَأَلَ ابْنَ شِهَابٍعَنْ قَوْلِ اللَّهِ عَزَّ وَجَلَّ{ يَا أَيُّهَا الَّذِينَ آمَنُوا إِذَا نُودِيَ لِلصَّلَاةِ مِنْ يَوْمِ الْجُمُعَةِ فَاسْعَوْا إِلَى ذِكْرِ اللَّهِ }فَقَالَ ابْنُ شِهَابٍ كَانَ عُمَرُ بْنُ الْخَطَّابِ يَقْرَؤُهَا إِذَا نُودِيَ لِلصَّلَاةِ مِنْ يَوْمِ الْجُمُعَةِ فَامْضُوا إِلَى ذِكْرِ اللَّهِ

Yahya ayebisaki ngai uta na Malik ete atunaki [Ibnu Shihab] na ntina ya maloba ya Allah Azza Wa Jalla: '-Ee bino baye bondimi, tango babengami na losambo na mokolo ya mitano nde bosala mbangu na bokundoli ya Allah..-' Qs. Al Jumu’ah: 9- Ibn Shihab alobaki; ’ [Umar bin Al Khattahab] atángaki yango na; "Ntango babengi yo na losambo wana kende na souvenir ya Allah."