Embrasser l'Islam, cliquez ici
ISLAM AL-HAQ: QURAN & HADITH
(The True Islam)
Free Download / Download

Imam Bukhari (الامام البخاري) - 7008 Hadith

Hadith

Imam Bukhari : 21

حَدَّثَنَا إِسْمَاعِيلُ قَالَ حَدَّثَنِي مَالِكٌ عَنْ عَمْرِو بْنِ يَحْيَى الْمَازِنِيِّ عَنْ أَبِيهِ عَنْ أَبِي سَعِيدٍ الْخُدْرِيِّ رَضِيَ اللَّهُ عَنْهُعَنْ النَّبِيِّ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ قَالَ يَدْخُلُ أَهْلُ الْجَنَّةِ الْجَنَّةَ وَأَهْلُ النَّارِ النَّارَ ثُمَّ يَقُولُ اللَّهُ تَعَالَى أَخْرِجُوا مِنْ النَّارِ مَنْ كَانَ فِي قَلْبِهِ مِثْقَالُ حَبَّةٍ مِنْ خَرْدَلٍ مِنْ إِيمَانٍ فَيُخْرَجُونَ مِنْهَا قَدْ اسْوَدُّوا فَيُلْقَوْنَ فِي نَهَرِ الْحَيَا أَوْ الْحَيَاةِ شَكَّ مَالِكٌ فَيَنْبُتُونَ كَمَا تَنْبُتُ الْحِبَّةُ فِي جَانِبِ السَّيْلِ أَلَمْ تَرَ أَنَّهَا تَخْرُجُ صَفْرَاءَ مُلْتَوِيَةًقَالَ وُهَيْبٌ حَدَّثَنَا عَمْرٌو الْحَيَاةِ وَقَالَ خَرْدَلٍ مِنْ خَيْرٍ

Ayebisaki biso [Isma’il] alobi, ayebisi biso [Malik] uta na [’Amru bin Yahya Al Mazani] uta na [tata na ye] uta na [Abu Sa’id Al Khudri] uta na Ntoma sallallaahu ‘alaihi wasallam, alobi: ‘Ba Ahlu ya lola bakoti lola mpe Ahlu ya lifelo bakoti na lifelo. Na sima Allah Ta'ala alobaki: 'Bima na lifelo oyo azali na kondima na motema na ye bonene ya moutarde'. Yango wana babimaki na lifelo na ezalela ya moindo oyo esili kozika mpe na nsima batyaki bango na ebale ya bomoi to ya bozali. -Malik azali na tembe. - Na sima bakolaki lokola mboto oyo ezali kokola na libongo ya ebale. Omoni te ndenge abimaki na couleur jaune'.Alobaki [Wuhaib] Ayebisaki biso ['Amru]: 'Bomoi'. Mpe alobaki: ‘Mwa moke ya malamu’.

Hadith

Imam Bukhari : 22

حَدَّثَنَا مُحَمَّدُ بْنُ عُبَيْدِ اللَّهِ قَالَ حَدَّثَنَا إِبْرَاهِيمُ بْنُ سَعْدٍ عَنْ صَالِحٍ عَنْ ابْنِ شِهَابٍ عَنْ أَبِي أُمَامَةَ بْنِ سَهْلِ بْنِ حُنَيْفٍ أَنَّهُ سَمِعَ أَبَا سَعِيدٍ الْخُدْرِيَّ يَقُولُقَالَ رَسُولُ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ بَيْنَا أَنَا نَائِمٌ رَأَيْتُ النَّاسَ يُعْرَضُونَ عَلَيَّ وَعَلَيْهِمْ قُمُصٌ مِنْهَا مَا يَبْلُغُ الثُّدِيَّ وَمِنْهَا مَا دُونَ ذَلِكَ وَعُرِضَ عَلَيَّ عُمَرُ بْنُ الْخَطَّابِ وَعَلَيْهِ قَمِيصٌ يَجُرُّهُ قَالُوا فَمَا أَوَّلْتَ ذَلِكَ يَا رَسُولَ اللَّهِ قَالَ الدِّينَ

Ayebisaki biso [Muhammad bin Ubaidillah] alobaki, ayebisaki biso [Ibrahim bin Sa’d] uta na [Salih] uta na [Ibn Shihab] uta na [Abu Umamah bin Sahal bin Hunaif] ete ayokaki [Abu Said Al Khudri] alobi, Rasulullah shallallahu ‘alaihi wasallam alobaki: ‘Ntango nazalaki kolala, nalotaki komona bato bazali kotala ngai. Bazalaki kolata bilamba, oyo mosusu ekómaki na mabɛ́lɛ na bango mpe mosusu ezalaki moke koleka wana. Mpe bamemaki Umar bin Al Khaththab epai na ngai mpe alataki bilamba mpe abendaki ye. Baninga batunaki: ‘Okanisi ete likambo oyo elingi koloba nini, O Ntoma ya Nzambe (Allah)? Ye sallallaahu ‘alaihi wasallam ayanolaki: ‘Ad-Din -lingomba-’.

Hadith

Imam Bukhari : 23

حَدَّثَنَا عَبْدُ اللَّهِ بْنُ يُوسُفَ قَالَ أَخْبَرَنَا مَالِكُ بْنُ أَنَسٍ عَنْ ابْنِ شِهَابٍ عَنْ سَالِمِ بْنِ عَبْدِ اللَّهِ عَنْ أَبِيهِأَنَّ رَسُولَ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ مَرَّ عَلَى رَجُلٍ مِنْ الْأَنْصَارِ وَهُوَ يَعِظُ أَخَاهُ فِي الْحَيَاءِ فَقَالَ رَسُولُ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ دَعْهُ فَإِنَّ الْحَيَاءَ مِنْ الْإِيمَانِ

Eyebisami na biso [Abdullah bin Yusuf] alobaki, elobami na biso [Malik bin Anas] uta na [Ibn Shihab] uta na [Salim bin Abdullah] uta na [tata na ye], ete Ntoma ya Allah (kimia mpe mapamboli ya Allaah ezala likolo na ye) atambolaki koleka moninga moko ya Ansar oyo na tango wana azalaki kolakisa ndeko na ye na ntina ya soni. Yango wana Ntoma sallallaahu ‘alaihi wasallam alobaki: ‘Botika ye, mpo ya solo soni ezali eteni ya kondima’.

Hadith

Imam Bukhari : 24

حَدَّثَنَا عَبْدُ اللَّهِ بْنُ مُحَمَّدٍ الْمُسْنَدِيُّ قَالَ حَدَّثَنَا أَبُو رَوْحٍ الْحَرَمِيُّ بْنُ عُمَارَةَ قَالَ حَدَّثَنَا شُعْبَةُ عَنْ وَاقِدِ بْنِ مُحَمَّدٍ قَالَ سَمِعْتُ أَبِي يُحَدِّثُ عَنْ ابْنِ عُمَرَأَنَّ رَسُولَ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ قَالَ أُمِرْتُ أَنْ أُقَاتِلَ النَّاسَ حَتَّى يَشْهَدُوا أَنْ لَا إِلَهَ إِلَّا اللَّهُ وَأَنَّ مُحَمَّدًا رَسُولُ اللَّهِ وَيُقِيمُوا الصَّلَاةَ وَيُؤْتُوا الزَّكَاةَ فَإِذَا فَعَلُوا ذَلِكَ عَصَمُوا مِنِّي دِمَاءَهُمْ وَأَمْوَالَهُمْ إِلَّا بِحَقِّ الْإِسْلَامِ وَحِسَابُهُمْ عَلَى اللَّهِ

Ayebisaki biso [Abdullah bin Muhammad Al Musnadi] alobi, Ayebisaki biso [Abu Rauh Al Harami bin Umarah] alobi, ayebisi biso [Syu’bah] ya [Waqid bin Muhammad] alobi; Nayokaki [tata na ngai] koyebisa epai ya [Ibn Umar], ete Ntoma ya Nzambe (kimia mpe mapamboli ya Allaah ezala likolo na ye) alobaki ete: ‘Bapesaki ngai mitindo ya kobunda na bato kino bakotatola; nzambe moko te azali longola se Allah mpe ete ya solo Muhammad azali momemi-nsango ya Allah, azali kosimba losambo, kopesa zakat. Soki basali bongo wana babombi makila mpe biloko na bango epai na ngai longola se engebene na mobeko ya Islam mpe botangi na bango ezali epai ya Allah.’

Hadith

Imam Bukhari : 25

حَدَّثَنَا أَحْمَدُ بْنُ يُونُسَ وَمُوسَى بْنُ إِسْمَاعِيلَ قَالَا حَدَّثَنَا إِبْرَاهِيمُ بْنُ سَعْدٍ قَالَ حَدَّثَنَا ابْنُ شِهَابٍ عَنْ سَعِيدِ بْنِ الْمُسَيَّبِ عَنْ أَبِي هُرَيْرَةَأَنَّ رَسُولَ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ سُئِلَ أَيُّ الْعَمَلِ أَفْضَلُ فَقَالَ إِيمَانٌ بِاللَّهِ وَرَسُولِهِ قِيلَ ثُمَّ مَاذَا قَالَ الْجِهَادُ فِي سَبِيلِ اللَّهِ قِيلَ ثُمَّ مَاذَا قَالَ حَجٌّ مَبْرُورٌ

Elobami na biso [Ahmad bin Yunus] na [Musa bin Isma’il] bango mibale balobi, eyebisami na biso [Ibrahim bin Sa’d] alobi, eyebisami na biso [Ibn Shihab] uta na [Sa’id bin Al Musayyab] uta na [Abu Hurairah], ete Ntoma ya Allah sallallaahu ‘alaihi wasallam atunamaki na ntina ya Islam, oyo ezali na ntina mingi? Na yango Ntoma sallallaahu ‘alaihi wasallam ayanolaki ete: ‘Kondima na Allah mpe na Ntoma na Ye’. Na nsima atunaki lisusu ete: ‘Bongo nini?’ Ayanolaki ete: ‘Al Jihad fi sabilillah -kobunda na nzela ya Allah-. Na nsima atunaki lisusu ete: ‘Bongo nini lisusu?’ Ayanolaki, shallallahu ‘alaihi wasallam: ‘hajj mabrur’.

Hadith

Imam Bukhari : 26

حَدَّثَنَا أَبُو الْيَمَانِ قَالَ أَخْبَرَنَا شُعَيْبٌ عَنْ الزُّهْرِيِّ قَالَ أَخْبَرَنِي عَامِرُ بْنُ سَعْدِ بْنِ أَبِي وَقَّاصٍ عَنْ سَعْدٍ رَضِيَ اللَّهُ عَنْهُأَنَّ رَسُولَ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ أَعْطَى رَهْطًا وَسَعْدٌ جَالِسٌ فَتَرَكَ رَسُولُ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ رَجُلًا هُوَ أَعْجَبُهُمْ إِلَيَّ فَقُلْتُ يَا رَسُولَ اللَّهِ مَا لَكَ عَنْ فُلَانٍ فَوَاللَّهِ إِنِّي لَأَرَاهُ مُؤْمِنًا فَقَالَ أَوْ مُسْلِمًا فَسَكَتُّ قَلِيلًا ثُمَّ غَلَبَنِي مَا أَعْلَمُ مِنْهُ فَعُدْتُ لِمَقَالَتِي فَقُلْتُ مَا لَكَ عَنْ فُلَانٍ فَوَاللَّهِ إِنِّي لَأَرَاهُ مُؤْمِنًا فَقَالَ أَوْ مُسْلِمًا ثُمَّ غَلَبَنِي مَا أَعْلَمُ مِنْهُ فَعُدْتُ لِمَقَالَتِي وَعَادَ رَسُولُ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ ثُمَّ قَالَ يَا سَعْدُ إِنِّي لَأُعْطِي الرَّجُلَ وَغَيْرُهُ أَحَبُّ إِلَيَّ مِنْهُ خَشْيَةَ أَنْ يَكُبَّهُ اللَّهُ فِي النَّارِوَرَوَاهُ يُونُسُ وَصَالِحٌ وَمَعْمَرٌ وَابْنُ أَخِي الزُّهْرِيِّ عَنْ الزُّهْرِيِّ

Ayebisaki biso [Abu Al Yaman] alobi, ayebisaki biso [Syu’aib] uta na [Az Zuhri] alobaki, ayebisi ngai [‘Amir bin Sa’d bin Abu Waqash] uta na [Sa’d], ete Ntoma ya Allah sallallaahu ‘alaihi wasallam apesaki bilei na bato mingi mpe na ntango wana Sa’d azalaki kofanda. Kasi apesaki bilei oyo na mobali te, atako moto wana azalaki kokamwisa ngai mingi kati na baye bazalaki wana, yango wana natunaki Rasulullah sallallaahu ‘alaihi wasallam: ‘Ee Rasulullah, ezali boni mpo na boye mpe boye? Vraiment na monaka ye lokola mondimi. Ntoma sallallaahu ‘alaihi wasallam ayanolaki: ‘to azali musulman?’. Na nsima nafandaki nyɛɛ mpo na mwa ntango, mpe nasengelaki kozala na ntembe mingi na oyo Alingaki koloba, sallallaahu ‘alaihi wasallam, yango wana nazongelaki maloba na ngai: ‘Ee Ntoma ya Allah, ezali boni mpo na boye mpe boye? Vraiment na monaka ye lokola mondimi. Ntoma sallallaahu ‘alaihi wasallam ayanolaki: ‘to azali musulman?’. Na nsima, bapusaki ngai lisusu mpo nazala na ntembe mingi na oyo alingaki koloba tii ntango nazongelaki lisusu motuna na ngai. Sima Prophète sallallaahu ‘alaihi wasallam alobi: ‘Ee Sa’d, ya solo nakopesa pe na mutu wana. Kasi nakolinga kopesa na basusu na esika ya kopesa ye, mpo nazali kobanga ete Allah akobwaka ye na lifelo’. [Yunus], [Salih], [Ma’mar] mpe [mwana ya ndeko ya Az Zuhri], balobelaki uta na [Az Zuhri].

Hadith

Imam Bukhari : 27

حَدَّثَنَا قُتَيْبَةُ قَالَ حَدَّثَنَا اللَّيْثُ عَنْ يَزِيدَ بْنِ أَبِي حَبِيبٍ عَنْ أَبِي الْخَيْرِ عَنْ عَبْدِ اللَّهِ بْنِ عَمْرٍوأَنَّ رَجُلًا سَأَلَ رَسُولَ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ أَيُّ الْإِسْلَامِ خَيْرٌ قَالَ تُطْعِمُ الطَّعَامَ وَتَقْرَأُ السَّلَامَ عَلَى مَنْ عَرَفْتَ وَمَنْ لَمْ تَعْرِفْ

Ayebisaki biso [Qutaibah] alobi, ayebisi biso [Al Laits] ewutaki na [Yazid bin Abu Habib] ewutaki na [Abu Al Khair] ewutaki na [Abdullah bin ‘Amru] ete moto moko atunaki Rasulullah sallallaahu ‘alaihi wasallam; ‘Islam nini eleki malamu?’ Ntoma sallallaahu ‘alaihi wasallam ayanolaki: ‘Oleisaka mpe opesaka mbote na bato oyo oyebi mpe baye oyebi te’.

Hadith

Imam Bukhari : 28

حَدَّثَنَا عَبْدُ اللَّهِ بْنُ مَسْلَمَةَ عَنْ مَالِكٍ عَنْ زَيْدِ بْنِ أَسْلَمَ عَنْ عَطَاءِ بْنِ يَسَارٍ عَنْ ابْنِ عَبَّاسٍ قَالَقَالَ النَّبِيُّ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ أُرِيتُ النَّارَ فَإِذَا أَكْثَرُ أَهْلِهَا النِّسَاءُ يَكْفُرْنَ قِيلَ أَيَكْفُرْنَ بِاللَّهِ قَالَ يَكْفُرْنَ الْعَشِيرَ وَيَكْفُرْنَ الْإِحْسَانَ لَوْ أَحْسَنْتَ إِلَى إِحْدَاهُنَّ الدَّهْرَ ثُمَّ رَأَتْ مِنْكَ شَيْئًا قَالَتْ مَا رَأَيْتُ مِنْكَ خَيْرًا قَطُّ

Elobami na biso [Abdullah bin Maslamah] uta na [Malik] uta na [Zaid bin Aslam] uta na [‘Atho’ bin Yasar] uta na [Ibn ‘Abbas] alobaki, Ntoma sallallaahu ‘alaihi wasallam alobaki: ‘Balakisaki ngai lifelo, emonanaka ete mingi ya bavandi na yango bazali basi. Po mbala mingi bawanganaka yango'. Batunaki bango boye: ‘Bawanganaki Allah?’. Alobaki boye: ‘Bawangani makabo ya mobali na bango, bawangani bolamu. Soki ozalaki malamu epai ya moko na bango ntango nyonso, boye amoni kaka likambo moko ya mabe epai na yo, akoloba: ‘Namoni naino ata likambo moko ya malamu te epai na yo’.

Hadith

Imam Bukhari : 29

حَدَّثَنَا سُلَيْمَانُ بْنُ حَرْبٍ قَالَ حَدَّثَنَا شُعْبَةُ عَنْ وَاصِلٍ الْأَحْدَبِ عَنْ الْمَعْرُورِ بْنِ سُوَيْدٍ قَالَ لَقِيتُ أَبَا ذَرٍّبِالرَّبَذَةِ وَعَلَيْهِ حُلَّةٌ وَعَلَى غُلَامِهِ حُلَّةٌ فَسَأَلْتُهُ عَنْ ذَلِكَ فَقَالَ إِنِّي سَابَبْتُ رَجُلًا فَعَيَّرْتُهُ بِأُمِّهِ فَقَالَ لِي النَّبِيُّ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ يَا أَبَا ذَرٍّ أَعَيَّرْتَهُ بِأُمِّهِ إِنَّكَ امْرُؤٌ فِيكَ جَاهِلِيَّةٌ إِخْوَانُكُمْ خَوَلُكُمْ جَعَلَهُمْ اللَّهُ تَحْتَ أَيْدِيكُمْ فَمَنْ كَانَ أَخُوهُ تَحْتَ يَدِهِ فَلْيُطْعِمْهُ مِمَّا يَأْكُلُ وَلْيُلْبِسْهُ مِمَّا يَلْبَسُ وَلَا تُكَلِّفُوهُمْ مَا يَغْلِبُهُمْ فَإِنْ كَلَّفْتُمُوهُمْ فَأَعِينُوهُمْ

Eyebisami na biso [Sulaiman bin Harb] alobaki, eyebisami na biso [Syu’bah] uta na [Washil Al Ahdab] uta na [Al Ma’rur bin Suwaid] alobaki: Nakutanaki na [Abu Dzar] na Rabdzah oyo na tango wana alataki deux couches ya bilamba, mpe bongo na mwana na ye, yango wana natunaki ye na likambo yango, yango wana ayanolaki: Nafingi moto na kofinga oyo ya ye mama, yango wana Ntoma sallallaahu ‘alaihi wasallam apamelaki ngai: ‘O Abu Dharr ofingaki mama na ye? Kutu, ozali kaka na -nature- ya jahiliyyah. Bandeko na yo bazali ba dépendants na yo, Allah atie bango na se ya loboko na yo. Donc oyo azali na ndeko na ye na se ya loboko na ye - dépendant na ye - alors soki azali kolia, pesa ye biloko ya kolia lokola aliaka, soki alati, pesa ye oyo alati, kopesa bango kilo te na eloko oyo eleki ndelo na bango. Soki ozali kopesa bango kilo, alors sunga bango'.

Hadith

Imam Bukhari : 30

حَدَّثَنَا عَبْدُ الرَّحْمَنِ بْنُ الْمُبَارَكِ حَدَّثَنَا حَمَّادُ بْنُ زَيْدٍ حَدَّثَنَا أَيُّوبُ وَيُونُسُ عَنْ الْحَسَنِ عَنْ الْأَحْنَفِ بْنِ قَيْسٍ قَالَذَهَبْتُ لِأَنْصُرَ هَذَا الرَّجُلَ فَلَقِيَنِي أَبُو بَكْرَةَ فَقَالَ أَيْنَ تُرِيدُ قُلْتُ أَنْصُرُ هَذَا الرَّجُلَ قَالَ ارْجِعْ فَإِنِّي سَمِعْتُ رَسُولَ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ يَقُولُ إِذَا الْتَقَى الْمُسْلِمَانِ بِسَيْفَيْهِمَا فَالْقَاتِلُ وَالْمَقْتُولُ فِي النَّارِ فَقُلْتُ يَا رَسُولَ اللَّهِ هَذَا الْقَاتِلُ فَمَا بَالُ الْمَقْتُولِ قَالَ إِنَّهُ كَانَ حَرِيصًا عَلَى قَتْلِ صَاحِبِهِ

Ayebisaki biso [Abdurrahman bin Al Mubarak] Ayebisaki biso [Hammad bin Zaid] Ayebisaki biso [Ayyub] mpe [Yunus] uta na [Al Hasan] uta na [Al Ahnaf bin Qais] alobi; Nayaki kosalisa moto moko mpe na nsima nakutanaki na [Abu Bakrah], yango wana atunaki: ‘Ozali kokende wapi?’ Nayanolaki: ‘Nalingi kosunga moto’ alobi: ‘Bozonga sima, po nayoki Ntoma ya Allah sallallaahu ‘alaihi wasallam alobi: ‘Soki ba musulmans mibale bakutani - mpo na kobunda - bango na bango bazali kobenda mipanga na bango, wana oyo babomi mpe abomami akokende na lifelo’. Natunaki: ‘Ee Ntoma ya Nzambe (Allah), oyo ezali mpo na baye babomaka, kasi boni mpo na baye babomami?’. Yango wana Ntoma sallallaahu ‘alaihi wasallam ayanolaki ete: ‘Azalaki mpe liboso mpenza koboma moninga na ye’.

Hadith

Imam Bukhari : 31

حَدَّثَنَا أَبُو الْوَلِيدِ قَالَ حَدَّثَنَا شُعْبَةُ ح قَالَ و حَدَّثَنِي بِشْرُ بْنُ خَالِدٍ أَبُو مُحَمَّدٍ الْعَسْكَرِيُّ قَالَ حَدَّثَنَا مُحَمَّدُ بْنُ جَعْفَرٍ عَنْ شُعْبَةَ عَنْ سُلَيْمَانَ عَنْ إِبْرَاهِيمَ عَنْ عَلْقَمَةَ عَنْ عَبْدِ اللَّهِ قَالَلَمَّا نَزَلَتْ{ الَّذِينَ آمَنُوا وَلَمْ يَلْبِسُوا إِيمَانَهُمْ بِظُلْمٍ }قَالَ أَصْحَابُ رَسُولِ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ أَيُّنَا لَمْ يَظْلِمْ فَأَنْزَلَ اللَّهُ عَزَّ وَجَلَّ{ إِنَّ الشِّرْكَ لَظُلْمٌ عَظِيمٌ }

Ayebisaki biso [Abu Al Walid] alobaki, ayebisi biso [Syu’bah] mpe alobeli mpe hadith oyo ekokani na oyo. kondima na bango na injustice’ baninga ya Ntoma sallallaahu ‘alaihi wasallam batunaki: ‘Nani kati na biso asali injustice te? Yango wana Allah 'azza wajalla abimisi -liloba na ye-: 'Ya solo shirk ezali injustice monene'. -QS. Luqman: 13- 2019.

Hadith

Imam Bukhari : 32

حَدَّثَنَا سُلَيْمَانُ أَبُو الرَّبِيعِ قَالَ حَدَّثَنَا إِسْمَاعِيلُ بْنُ جَعْفَرٍ قَالَ حَدَّثَنَا نَافِعُ بْنُ مَالِكِ بْنِ أَبِي عَامِرٍ أَبُو سُهَيْلٍ عَنْ أَبِيهِ عَنْ أَبِي هُرَيْرَةَعَنْ النَّبِيِّ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ قَالَ آيَةُ الْمُنَافِقِ ثَلَاثٌ إِذَا حَدَّثَ كَذَبَ وَإِذَا وَعَدَ أَخْلَفَ وَإِذَا اؤْتُمِنَ خَانَ

Ayebisaki biso [Sulaiman Abu ar Rabi’] alobi, ayebisi biso [Isma’il bin Ja’far] alobi, ayebisi biso [Nafi’ bin Malik bin Abu ‘Amir Abu Suhail] uta na [tata na ye] uta na [Abu Hurairah] uta na Ntoma sallallaahu ‘alaihi wasallam, alobi: ‘Bilembo ya bokosi ezali misato; soki alobi lokuta, soki asali elaka abuki yango mpe soki bapesi ye mandat a trahir yango'.

Hadith

Imam Bukhari : 33

حَدَّثَنَا قَبِيصَةُ بْنُ عُقْبَةَ قَالَ حَدَّثَنَا سُفْيَانُ عَنْ الْأَعْمَشِ عَنْ عَبْدِ اللَّهِ بْنِ مُرَّةَ عَنْ مَسْرُوقٍ عَنْ عَبْدِ اللَّهِ بْنِ عَمْرٍوأَنَّ النَّبِيَّ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ قَالَ أَرْبَعٌ مَنْ كُنَّ فِيهِ كَانَ مُنَافِقًا خَالِصًا وَمَنْ كَانَتْ فِيهِ خَصْلَةٌ مِنْهُنَّ كَانَتْ فِيهِ خَصْلَةٌ مِنْ النِّفَاقِ حَتَّى يَدَعَهَا إِذَا اؤْتُمِنَ خَانَ وَإِذَا حَدَّثَ كَذَبَ وَإِذَا عَاهَدَ غَدَرَ وَإِذَا خَاصَمَ فَجَرَتَابَعَهُ شُعْبَةُ عَنْ الْأَعْمَشِ

Elobami na biso [Qabishah bin ‘Uqbah] alobaki, eyebisami na biso [Sufyan] uta na [Al A’masy] uta na [Abdullah bin Murrah] uta na [Masruq] uta na [Abdullah bin ‘Amru] ete Ntoma sallallaahu ‘alaihi wasallam alobaki: ‘Soki ezali na makambo minei na moto alors azali munafiq ya solo, mpe oyo azali na kati ye moko qualité moko ya makambu minei oyo alors na ye eza na qualité nifaq tiii atiki ye. Elingi koloba soki bapesi ye mandat a trahir yango, soki alobaka lokuta, soki alaki abuki yango mpe soki abundi akosaka’. Hadith oyo elobamaki mpe na [Syu’bah] uta na [Al A’masy].

Hadith

Imam Bukhari : 34

حَدَّثَنَا أَبُو الْيَمَانِ قَالَ أَخْبَرَنَا شُعَيْبٌ قَالَ حَدَّثَنَا أَبُو الزِّنَادِ عَنْ الْأَعْرَجِ عَنْ أَبِي هُرَيْرَةَ قَالَقَالَ رَسُولُ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ مَنْ يَقُمْ لَيْلَةَ الْقَدْرِ إِيمَانًا وَاحْتِسَابًا غُفِرَ لَهُ مَا تَقَدَّمَ مِنْ ذَنْبِهِ

Ayebisaki biso [Abu Al Yaman] alobi, ayebisi biso [Syu’aib] alobaki, ayebisaki biso [Abu Al Zanad] uta na [Al A’raj] uta na [Abu Hurairah] alobi, Rasulullah sallallaahu ‘alaihi wasallam alobaki: ‘Oyo azali kosimba lailatul qadr mpo na kondima mpe azali na elikya ya mbano, masumu na ye ya kala elimbisami’.

Hadith

Imam Bukhari : 35

حَدَّثَنَا حَرَمِيُّ بْنُ حَفْصٍ قَالَ حَدَّثَنَا عَبْدُ الْوَاحِدِ قَالَ حَدَّثَنَا عُمَارَةُ قَالَ حَدَّثَنَا أَبُو زُرْعَةَ بْنُ عَمْرِو بْنِ جَرِيرٍ قَالَ سَمِعْتُ أَبَا هُرَيْرَةَعَنْ النَّبِيِّ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ قَالَ انْتَدَبَ اللَّهُ لِمَنْ خَرَجَ فِي سَبِيلِهِ لَا يُخْرِجُهُ إِلَّا إِيمَانٌ بِي وَتَصْدِيقٌ بِرُسُلِي أَنْ أُرْجِعَهُ بِمَا نَالَ مِنْ أَجْرٍ أَوْ غَنِيمَةٍ أَوْ أُدْخِلَهُ الْجَنَّةَ وَلَوْلَا أَنْ أَشُقَّ عَلَى أُمَّتِي مَا قَعَدْتُ خَلْفَ سَرِيَّةٍ وَلَوَدِدْتُ أَنِّي أُقْتَلُ فِي سَبِيلِ اللَّهِ ثُمَّ أُحْيَا ثُمَّ أُقْتَلُ ثُمَّ أُحْيَا ثُمَّ أُقْتَلُ

Ayebisaki biso [Harami bin Hafsh] alobi, ayebisi biso [Abdul Wahid] alobi, ayebisi biso [Umarah] alobi, ayebisi biso [Abu Zur’ah bin ‘Amru bin Jarir] alobi: Nayoki [Abu Hurairah] epai ya Ntoma sallallaahu ‘alaihi wasallam, alobi: ‘Allah a garantir baye babimaka -kobunda- na nzela na ye, te moto apusaka ye libanda longola se mpo na kondima epai na Ngai mpe alongisaka baye momemi-nsango na Ngai mpo na kozongisa yango na kozwaka mbano to ghonimah to kondima yango na lola. Soki ezalaki kilo te na bato na ngai, ya solo nalingaki kofanda kimia te sima ya sariyyah - ba forces spéciales - mpe ya solo nakolinga yango soki babomaki ngai na nzela ya Allah mpe sima bazongisaki ngai na bomoi, sima babomaki ngai lisusu, sima bazongisaki ngai na bomoi, sima babomaki ngai lisusu’.

Hadith

Imam Bukhari : 36

حَدَّثَنَا إِسْمَاعِيلُ قَالَ حَدَّثَنِي مَالِكٌ عَنْ ابْنِ شِهَابٍ عَنْ حُمَيْدِ بْنِ عَبْدِ الرَّحْمَنِ عَنْ أَبِي هُرَيْرَةَأَنَّ رَسُولَ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ قَالَ مَنْ قَامَ رَمَضَانَ إِيمَانًا وَاحْتِسَابًا غُفِرَ لَهُ مَا تَقَدَّمَ مِنْ ذَنْبِهِ

Eyebisami na biso [Isma’il] alobaki, eyebisami na ngai [Malik] uta na [Ibn Shihab] uta na [Humaid bin Abdurrahman] uta na [Abu Hurairah] ete Ntoma ya Allah sallallaahu ‘alaihi wasallam alobaki: ‘Oyo azali kosimba Ramadan mpo na kondima mpe azali na elikya ya mbano, masumu na ye ya kala ekolimbisama.’

Hadith

Imam Bukhari : 37

حَدَّثَنَا مُحَمَّدُ بْنُ سَلَامٍ قَالَ أَخْبَرَنَا مُحَمَّدُ بْنُ فُضَيْلٍ قَالَ حَدَّثَنَا يَحْيَى بْنُ سَعِيدٍ عَنْ أَبِي سَلَمَةَ عَنْ أَبِي هُرَيْرَةَ قَالَقَالَ رَسُولُ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ مَنْ صَامَ رَمَضَانَ إِيمَانًا وَاحْتِسَابًا غُفِرَ لَهُ مَا تَقَدَّمَ مِنْ ذَنْبِهِ

Ayebisaki biso [Muhammad bin Salam] alobi, ayebisi biso [Muhammad bin Fudlail] alobaki, ayebisi biso [Yahya bin Sa’id] uta na [Abu Salamah] uta na [Abu Hurairah] alobi; Ntoma sallallaahu ‘alaihi wasallam alobaki: ‘Oyo azali kokila bilei mpo na kondima mpe azali na elikya ya mbano, masumu na ye ya kala elimbisami.’

Hadith

Imam Bukhari : 38

حَدَّثَنَا عَبْدُ السَّلَامِ بْنُ مُطَهَّرٍ قَالَ حَدَّثَنَا عُمَرُ بْنُ عَلِيٍّ عَنْ مَعْنِ بْنِ مُحَمَّدٍ الْغِفَارِيِّ عَنْ سَعِيدِ بْنِ أَبِي سَعِيدٍ الْمَقْبُرِيِّ عَنْ أَبِي هُرَيْرَةَعَنْ النَّبِيِّ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ قَالَ إِنَّ الدِّينَ يُسْرٌ وَلَنْ يُشَادَّ الدِّينَ أَحَدٌ إِلَّا غَلَبَهُ فَسَدِّدُوا وَقَارِبُوا وَأَبْشِرُوا وَاسْتَعِينُوا بِالْغَدْوَةِ وَالرَّوْحَةِ وَشَيْءٍ مِنْ الدُّلْجَةِ

Eyebisami na biso [Abdus Salam bin Muthahhar] alobaki, eyebisami na biso [Umar bin Ali] uta na [Ma’an bin Muhammad Al Ghifari] uta na [Sa’id bin Abu Sa’id Al Maqburi] uta na [Abu Hurairah] ete Ntoma sallallaahu ‘alaihi wasallam alobaki: ‘Ya solo, lingomba ezali pete, mpe moto moko te azali kosala lingomba mpasi soki alongi te -ekómaka mpasi mpe mpasi-. Na yango, sala semba, kende penepene - na loboko ya mobali - mpe pesa nsango malamu mpe senga lisalisi na Al Ghadwah - kokende na ntongo ya yambo - mpe ar-ruhah - kokende nsima ya losambo ya midi - mpe eloko moko uta na ad-duljah - kokende na butu - '.

Hadith

Imam Bukhari : 39

حَدَّثَنَا عَمْرُو بْنُ خَالِدٍ قَالَ حَدَّثَنَا زُهَيْرٌ قَالَ حَدَّثَنَا أَبُو إِسْحَاقَ عَنْ الْبَرَاءِ بْنِ عَازِبٍأَنَّ النَّبِيَّ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ كَانَ أَوَّلَ مَا قَدِمَ الْمَدِينَةَ نَزَلَ عَلَى أَجْدَادِهِ أَوْ قَالَ أَخْوَالِهِ مِنْ الْأَنْصَارِ وَأَنَّهُ صَلَّى قِبَلَ بَيْتِ الْمَقْدِسِ سِتَّةَ عَشَرَ شَهْرًا أَوْ سَبْعَةَ عَشَرَ شَهْرًا وَكَانَ يُعْجِبُهُ أَنْ تَكُونَ قِبْلَتُهُ قِبَلَ الْبَيْتِ وَأَنَّهُ صَلَّى أَوَّلَ صَلَاةٍ صَلَّاهَا صَلَاةَ الْعَصْرِ وَصَلَّى مَعَهُ قَوْمٌ فَخَرَجَ رَجُلٌ مِمَّنْ صَلَّى مَعَهُ فَمَرَّ عَلَى أَهْلِ مَسْجِدٍ وَهُمْ رَاكِعُونَ فَقَالَ أَشْهَدُ بِاللَّهِ لَقَدْ صَلَّيْتُ مَعَ رَسُولِ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ قِبَلَ مَكَّةَ فَدَارُوا كَمَا هُمْ قِبَلَ الْبَيْتِ وَكَانَتْ الْيَهُودُ قَدْ أَعْجَبَهُمْ إِذْ كَانَ يُصَلِّي قِبَلَ بَيْتِ الْمَقْدِسِ وَأَهْلُ الْكِتَابِ فَلَمَّا وَلَّى وَجْهَهُ قِبَلَ الْبَيْتِ أَنْكَرُوا ذَلِكَقَالَ زُهَيْرٌ حَدَّثَنَا أَبُو إِسْحَاقَ عَنْ الْبَرَاءِ فِي حَدِيثِهِ هَذَا أَنَّهُ مَاتَ عَلَى الْقِبْلَةِ قَبْلَ أَنْ تُحَوَّلَ رِجَالٌ وَقُتِلُوا فَلَمْ نَدْرِ مَا نَقُولُ فِيهِمْ فَأَنْزَلَ اللَّهُ تَعَالَى{ وَمَا كَانَ اللَّهُ لِيُضِيعَ إِيمَانَكُمْ }

Elobami na biso ['Amru bin Khalid] alobaki, elobami na biso [Zuhair] alobaki, eyebisami na biso [Abu Ishaq] uta na [Al Barro` bin 'Azib] ete Ntoma sallallaahu 'alaihi wasallam tango akomaki mpo na mbala ya liboso na Medina, atelemaki epai ya koko na ye -'Azib- to ba yaya na ye ya mobali uta na Ansar, mpe na tango wana a sallallaahu 'alaihi wasallam abondelaki liboso ya Baitul Maqdis na boumeli ya sanza zomi na motoba to sanza zomi na nsambo, mpe asepelaki mingi ntango abondelaki liboso ya Baitullah - Kaaba -. Losambo oyo Ye sallallaahu ‘alaihi wasallam asalaki mpo na mbala ya liboso - etali Kaaba - ezalaki losambo ya ‘Asr mpe bato mpe basambelaki elongo na Ye. Mokolo moko moninga moko oyo azalaki kosambela elongo na Ntoma sallallaahu ‘alaihi wasallam alekaki bato na mosquée mosusu tango bazalaki kofukama’, yango wana alobaki: ‘Natatoli Allah ete nazalaki kosambela elongo na Ntoma sallallaahu ‘alaihi wasallam kotala Mecque, sima bato oyo bazalaki kofukama babalukaki mpo na kotala Baitullah mpe Bayuda mpe Bato ya buku bakamwaki, mpo liboso Ntoma sallallaahu 'alaihi wasallam azalaki kosambela elongi na ye. Baitul Maqdis, oyo azali na mbongo mingi. Tango bamoni Prophète sallallaahu ‘alaihi wasallam abalusaki elongi na ye epai ya Temple, bawanganaki likambo oyo. Zuhair alobaki bongo. Est-ce que Abu Ishaq ya Al Barro` ayebisi biso, na hadith oyo alimbolaki na ntina ya -mobeko- ya moto oyo akufaki tango direction ya Qibla e détourné te mpe lisusu bato mingi oyo babomamaki na tango wana?, toyebaki te nini tosala pona bango tiii na suka Allah Ta'ala abimisi liloba na ye: 'Mpe Allah akobebisa kondima na bino te'. -QS. Al Baqoroh: 143- 2019.

Hadith

Imam Bukhari : 40

حَدَّثَنَا إِسْحَاقُ بْنُ مَنْصُورٍ قَالَ حَدَّثَنَا عَبْدُ الرَّزَّاقِ قَالَ أَخْبَرَنَا مَعْمَرٌ عَنْ هَمَّامِ بْنِ مُنَبِّهٍ عَنْ أَبِي هُرَيْرَةَ قَالَقَالَ رَسُولُ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ إِذَا أَحْسَنَ أَحَدُكُمْ إِسْلَامَهُ فَكُلُّ حَسَنَةٍ يَعْمَلُهَا تُكْتَبُ لَهُ بِعَشْرِ أَمْثَالِهَا إِلَى سَبْعِ مِائَةِ ضِعْفٍ وَكُلُّ سَيِّئَةٍ يَعْمَلُهَا تُكْتَبُ لَهُ بِمِثْلِهَا

Elobami na biso [Ishaq bin Manshur] alobaki, elobami na biso [Abdurrazzaq] alobaki, elobami na biso [Ma’mar] uta na [Hamam bin Munabbih] uta na [Abu Hurairah] alobi, Rasulullah sallallaahu ‘alaihi wasallam alobi: ‘Soki moko na bino abongisi Islam na ye alors mpo na mosala malamu nyonso ekokoma mpo na ye zomi ya ndenge wana -bolamu-s kino na nivo nkama nsambo, mpe mpo na likambo moko nyonso ya mabe asalaka kaka likambo moko ya mabe oyo ekokani na yango ekokomama'.