Imam Malik : 1581
حَدَّثَنِي مَالِك عَنْ يَحْيَى بْنِ سَعِيدٍ عَنْ أَبِي الْحُبَابِ سَعِيدِ بْنِ يَسَارٍأَنَّ رَسُولَ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ قَالَ مَنْ تَصَدَّقَ بِصَدَقَةٍ مِنْ كَسْبٍ طَيِّبٍ وَلَا يَقْبَلُ اللَّهُ إِلَّا طَيِّبًا كَانَ إِنَّمَا يَضَعُهَا فِي كَفِّ الرَّحْمَنِ يُرَبِّيهَا كَمَا يُرَبِّي أَحَدُكُمْ فَلُوَّهُ أَوْ فَصِيلَهُ حَتَّى تَكُونَ مِثْلَ الْجَبَلِ
Malik ayebisaki ngai uta na [Yahya bin Sa’id] uta na [Abu Al Hubab Sa’id bin Yasar] ete Ntoma ya Allah sallallaahu ‘alaihi wasallam alobaki: ‘Oyo apesi bolingo uta na milende ya malamu, mpe Allah andimi eloko mosusu te kaka ya malamu. Ya solo, atie yango na maboko ya Mozwi-ya-Mawa. Allah akobatela yango ndenge moko na bino azali kobatela mwana na ye ya mpunda to kamela na ye, kino bolingo na ye ekokoma lokola ngomba’.
Imam Malik : 1582
و حَدَّثَنِي مَالِك عَنْ إِسْحَقَ بْنِ عَبْدِ اللَّهِ بْنِ أَبِي طَلْحَةَ أَنَّهُ سَمِعَ أَنَسَ بْنَ مَالِكٍ يَقُولُكَانَ أَبُو طَلْحَةَ أَكْثَرَ أَنْصَارِيٍّ بِالْمَدِينَةِ مَالًا مِنْ نَخْلٍ وَكَانَ أَحَبَّ أَمْوَالِهِ إِلَيْهِ بَيْرُحَاءَ وَكَانَتْ مُسْتَقْبِلَةَ الْمَسْجِدِ وَكَانَ رَسُولُ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ يَدْخُلُهَا وَيَشْرَبُ مِنْ مَاءٍ فِيهَا طَيِّبٍ قَالَ أَنَسٌ فَلَمَّا أُنْزِلَتْ هَذِهِ الْآيَةُ{ لَنْ تَنَالُوا الْبِرَّ حَتَّى تُنْفِقُوا مِمَّا تُحِبُّونَ }قَامَ أَبُو طَلْحَةَ إِلَى رَسُولِ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ فَقَالَ يَا رَسُولَ اللَّهِ إِنَّ اللَّهَ تَبَارَكَ وَتَعَالَى يَقُولُ{ لَنْ تَنَالُوا الْبِرَّ حَتَّى تُنْفِقُوا مِمَّا تُحِبُّونَ }وَإِنَّ أَحَبَّ أَمْوَالِي إِلَيَّ بَيْرُحَاءَ وَإِنَّهَا صَدَقَةٌ لِلَّهِ أَرْجُو بِرَّهَا وَذُخْرَهَا عِنْدَ اللَّهِ فَضَعْهَا يَا رَسُولَ اللَّهِ حَيْثُ شِئْتَ قَالَ فَقَالَ رَسُولُ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ بَخْ ذَلِكَ مَالٌ رَابِحٌ ذَلِكَ مَالٌ رَابِحٌ وَقَدْ سَمِعْتُ مَا قُلْتَ فِيهِ وَإِنِّي أَرَى أَنْ تَجْعَلَهَا فِي الْأَقْرَبِينَ فَقَالَ أَبُو طَلْحَةَ أَفْعَلُ يَا رَسُولَ اللَّهِ فَقَسَمَهَا أَبُو طَلْحَةَ فِي أَقَارِبِهِ وَبَنِي عَمِّهِ
Malik ayebisaki ngai uta na [Ishaq bin Abdullah bin Abu Talhah] ete ayokaki [Anas bin Malik] koloba, ‘Abu Talhah azali Ansar oyo azali na bomengo mingi na Medina na lolenge ya ba dates. Tresor oyo alingaka mingi ezali Bairuha oyo ezali liboso ya mosquée. Rasulullah sallallaahu 'alaihi wasallam azalaki kokota na yango pe komela na mayi na yango ya peto'. Anas alobaki; 'Ntango vɛrsɛ oyo ebimaki: '-Okozwa ata moke te malamu -ya kokoka- kino okolekisa mwa bomengo oyo olingaka-'. -Qs. Ali Imran: 92- Abu Talhah atelemaki elongi na Rasulullah sallallaahu ‘alaihi wasallam sima alobaki; ‘Ee Ntoma ya Allah, Allah Tabaraka Wa Ta’ala alobaki: ‘-Okozwa ata moke te malamu -ya kokoka- yango wana opesaka mwa ndambo ya bomengo oyo olingaka-’, solo eloko ya motuya oyo nalingaka mingi ezali Bairuha, napesaki elanga oyo mpo na bolamu ya Allah, nazali na elikya ete ekozala malamu mpe ete ekobombama epai ya Allah. O Ntoma ya Nzambe (Allah), salela bomengo oyo ndenge olingi'. Anas alobaki, ‘Bongo Rasulullah sallallaahu ‘alaihi wasallam alobaki: ‘Monene...! Ezali bomengo ya malamu, ezali bomengo ya malamu. Nayoki makambo oyo olobaki. Nakanisi ete osengeli kopesa yango na ndeko moko ya penepene.’ Yango wana Abu Talha alobaki, ‘Ee Ntoma ya Nzambe (Allah), nakosala yango’. Na nsima akabolaki yango na libota ya yaya na ye ya mobali mpe bana ya mobali.
Imam Malik : 1583
و حَدَّثَنِي مَالِك عَنْ زَيْدِ بْنِ أَسْلَمَأَنَّ رَسُولَ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ قَالَ أَعْطُوا السَّائِلَ وَإِنْ جَاءَ عَلَى فَرَسٍ
Malik ayebisaki ngai uta na [Zaid bin Aslam] ete Rasulullah sallallaahu ‘alaihi wasallam alobaki: ‘Pesa moto oyo asengi ata soki ayei komata na mpunda’.
Imam Malik : 1584
و حَدَّثَنِي مَالِك عَنْ زَيْدِ بْنِ أَسْلَمَ عَنْ عَمْرِو بْنِ مُعَاذٍ الْأَشْهَلِيِّ الْأَنْصَارِيِّ عَنْ جَدَّتِهِ أَنَّهَا قَالَتْقَالَ رَسُولُ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ يَا نِسَاءَ الْمُؤْمِنَاتِ لَا تَحْقِرَنَّ إِحْدَاكُنَّ أَنْ تُهْدِيَ لِجَارَتِهَا وَلَوْ كُرَاعَ شَاةٍ مُحْرَقًا
Ayebisaki ngai Malik uta na [Zaid bin Aslam] uta na [‘Amru bin Mu’adz Al Asyhali Al Ansari] uta na [nkoko na ye ya mwasi] alobaki; ‘Ntoma ya Allah sallallaahu ‘alaihi wasallam alobaki: ‘Ee basi ya kondima, moko te kati na bino azali kotyola kopesa likabo na mozalani na ye, ata soki ezali kaka makolo ya ntaba oyo batumbaki’.
Imam Malik : 1585
و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ ابْنِ شِهَابٍ عَنْ عَطَاءِ بْنِ يَزِيدَ اللَّيْثِيِّ عَنْ أَبِي سَعِيدٍ الْخُدْرِيِّأَنَّ نَاسًا مِنْ الْأَنْصَارِ سَأَلُوا رَسُولَ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ فَأَعْطَاهُمْ ثُمَّ سَأَلُوهُ فَأَعْطَاهُمْ حَتَّى نَفِدَ مَا عِنْدَهُ ثُمَّ قَالَ مَا يَكُونُ عِنْدِي مِنْ خَيْرٍ فَلَنْ أَدَّخِرَهُ عَنْكُمْ وَمَنْ يَسْتَعْفِفْ يُعِفَّهُ اللَّهُ وَمَنْ يَسْتَغْنِ يُغْنِهِ اللَّهُ وَمَنْ يَتَصَبَّرْ يُصَبِّرْهُ اللَّهُ وَمَا أُعْطِيَ أَحَدٌ عَطَاءً هُوَ خَيْرٌ وَأَوْسَعُ مِنْ الصَّبْرِ
Bayebisaki ngai ete Malik uta na [Ibn Shihab] uta na [‘Atha bin Yazid Al Laitsi] uta na [Abu Sa’id Al Khudri] alobaki, ‘Basusu kati na ba Ansar basengaki na Ntoma ya Allah sallallaahu ‘alaihi wasallam, sima apesaki bango. Na nsima, basɛngaki mingi, na nsima apesaki bango mingi tii nyonso oyo azalaki na yango esilaki. Na nsima alobaki ete: ‘Bolamu nyonso oyo nazali na yango, nakobomba yango epai na yo te. Oyo akobatela lokumu na ye, Allah akobatela lokumu na ye na ntembe te. Oyo akosenga suffisance, Allah akopesa yango na ntembe te. Oyo akomeka kozala na motema molai, Allah akopesa ye motema molai na ntembe te. Moto moko te apesameli likabo ya malamu mpe ya monene koleka motema molai’.
Imam Malik : 1586
و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ نَافِعٍ عَنْ عَبْدِ اللَّهِ بْنِ عُمَرَأَنَّ رَسُولَ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ قَالَ وَهُوَ عَلَى الْمِنْبَرِ وَهُوَ يَذْكُرُ الصَّدَقَةَ وَالتَّعَفُّفَ عَنْ الْمَسْأَلَةِ الْيَدُ الْعُلْيَا خَيْرٌ مِنْ الْيَدِ السُّفْلَى وَالْيَدُ الْعُلْيَا هِيَ الْمُنْفِقَةُ وَالسُّفْلَى هِيَ السَّائِلَةُ
Eyebisami na ngai uta na Malik uta na [Nafi’] uta na [Abdullah bin Umar] oyo alobaki, ‘Ntango azalaki na estrade, alobelaki na ntina ya makabo ya mawa mpe kobatela lokumu na kosenga, alobaki: ‘Loboko ya likolo eleki loboko oyo ezali na nse’. Loboko ya likolo nde epesaka pe oyo ya se ezali oyo asengi'.
Imam Malik : 1587
و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ زَيْدِ بْنِ أَسْلَمَ عَنْ عَطَاءِ بْنِ يَسَارٍأَنَّ رَسُولَ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ أَرْسَلَ إِلَى عُمَرَ بْنِ الْخَطَّابِ بِعَطَاءٍ فَرَدَّهُ عُمَرُ فَقَالَ لَهُ رَسُولُ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ لِمَ رَدَدْتَهُ فَقَالَ يَا رَسُولَ اللَّهِ أَلَيْسَ أَخْبَرْتَنَا أَنَّ خَيْرًا لِأَحَدِنَا أَنْ لَا يَأْخُذَ مِنْ أَحَدٍ شَيْئًا فَقَالَ رَسُولُ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ إِنَّمَا ذَلِكَ عَنْ الْمَسْأَلَةِ فَأَمَّا مَا كَانَ مِنْ غَيْرِ مَسْأَلَةٍ فَإِنَّمَا هُوَ رِزْقٌ يَرْزُقُكَهُ اللَّهُ فَقَالَ عُمَرُ بْنُ الْخَطَّابِ أَمَا وَالَّذِي نَفْسِي بِيَدِهِ لَا أَسْأَلُ أَحَدًا شَيْئًا وَلَا يَأْتِينِي شَيْءٌ مِنْ غَيْرِ مَسْأَلَةٍ إِلَّا أَخَذْتُهُ
Eyebisami na ngai uta na Malik uta na [Zaid bin Aslam] uta na [Atha bin Yasar] koloba ete, ‘Rasulullah shallallahu ‘alaihi wasallam atindaki eloko moko epai ya Umar bin Khattab, sima Umar azongisaki yango. Yango wana Rasulullah sallallaahu ‘alaihi wasallam atunaki ye: ‘Po na nini ozongisi yango?’. Umar ayanolaki ete, ‘Ee Ntoma ya Nzambe (Allah), oyebisaki biso te ete bolamu ya moto ezali te kozwa eloko epai ya moto mosusu?’ Rasulullah sallallaahu ‘alaihi wasallam alobaki: ‘Ndimbola ya likambo yango ezali soki atuni. Soki ezali na kosenga te, boye ezali rizki oyo Allah apesi yo.’ Umar bin Khattab alobaki ete; 'Na loboko na ye molimo na ngai, nakosenga eloko te epai ya moto, mpe moto moko te akopesa ngai eloko oyo nasengaki te longola se soki nakozwa yango'.
Imam Malik : 1588
و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ أَبِي الزِّنَادِ عَنْ الْأَعْرَجِ عَنْ أَبِي هُرَيْرَةَأَنَّ رَسُولَ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ قَالَ وَالَّذِي نَفْسِي بِيَدِهِ لَأَنْ يَأْخُذَ أَحَدُكُمْ حَبْلَهُ فَيَحْتَطِبَ عَلَى ظَهْرِهِ خَيْرٌ لَهُ مِنْ أَنْ يَأْتِيَ رَجُلًا أَعْطَاهُ اللَّهُ مِنْ فَضْلِهِ فَيَسْأَلَهُ أَعْطَاهُ أَوْ مَنَعَهُ
Malik ayebisaki ngai uta na [Abu Az Zinad] uta na [Al A’raj] uta na [Abu Hurairah] ete Ntoma ya Nzambe (kimia mpe mapamboli ya Allaah ezala likolo na ye) alobaki: ‘Na Moto oyo molimo na ngai ezali na Loboko na ye. Soki moko na bino azwi nsinga na ye moko, na nsima alukaki nkoni mpe amemi yango na mapeka na ye, boye yango ezali malamu koleka kokende epai ya moto oyo bapesi ye biloko mingi ya koleisa, na nsima kobondela ye; soki bapesameli ye to baboyi ye’.
Imam Malik : 1589
و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ زَيْدِ بْنِ أَسْلَمَ عَنْ عَطَاءِ بْنِ يَسَارٍ عَنْ رَجُلٍ مِنْ بَنِي أَسَدٍ أَنَّهُ قَالَنَزَلْتُ أَنَا وَأَهْلِي بِبَقِيعِ الْغَرْقَدِ فَقَالَ لِي أَهْلِي اذْهَبْ إِلَى رَسُولِ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ فَاسْأَلْهُ لَنَا شَيْئًا نَأْكُلُهُ وَجَعَلُوا يَذْكُرُونَ مِنْ حَاجَتِهِمْ فَذَهَبْتُ إِلَى رَسُولِ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ فَوَجَدْتُ عِنْدَهُ رَجُلًا يَسْأَلُهُ وَرَسُولُ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ يَقُولُ لَا أَجِدُ مَا أُعْطِيكَ فَتَوَلَّى الرَّجُلُ عَنْهُ وَهُوَ مُغْضَبٌ وَهُوَ يَقُولُ لَعَمْرِي إِنَّكَ لَتُعْطِي مَنْ شِئْتَ فَقَالَ رَسُولُ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ إِنَّهُ لَيَغْضَبُ عَلَيَّ أَنْ لَا أَجِدَ مَا أُعْطِيهِ مَنْ سَأَلَ مِنْكُمْ وَلَهُ أُوقِيَّةٌ أَوْ عَدْلُهَا فَقَدْ سَأَلَ إِلْحَافًا قَالَ الْأَسَدِيُّ فَقُلْتُ لَلَقْحَةٌ لَنَا خَيْرٌ مِنْ أُوقِيَّةٍ قَالَ مَالِك وَالْأُوقِيَّةُ أَرْبَعُونَ دِرْهَمًا قَالَ فَرَجَعْتُ وَلَمْ أَسْأَلْهُ فَقُدِمَ عَلَى رَسُولِ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ بَعْدَ ذَلِكَ بِشَعِيرٍ وَزَبِيبٍ فَقَسَمَ لَنَا مِنْهُ حَتَّى أَغْنَانَا اللَّهُ عَزَّ وَجَلَّ
Eyebisami na ngai uta na Malik uta na [Zaid bin Aslam] uta na [Atha bin Yasar] uta na [mobali moko uta na Bani Asad] oyo alobaki, ‘Ngai na mwasi na ngai totelemaki na Baqi’ Al Gharqad, sima libota na ngai balobaki, ‘Kutana na Ntoma ya Allah sallallaahu ‘alaihi wasallam, sima senga eloko tokoki kolia’. Na sima balobelaki ba besoins na bango respectives, sima nakendeki kotala Rasulullah sallallaahu 'alaihi wasallam, nakuti mutu asengi ye eloko. Rasulullah shallallahu ‘alaihi wasallam ayanolaki: ‘Nazali lisusu na eloko moko te nakoki kopesa yo’. Mobali yango alongwaki na nkanda kolobaka ete, ‘Ya solo, okoki kopesa moto nyonso oyo olingi! ' Yango wana Rasulullah sallallaahu 'alaihi wasallam alobaki: 'Asilikela ngai, mpo nazalaki na oyo asengaki te. Oyo na kati na bino asengi ata azali na uqiyyah moko to oyo ekokani na yango, asengi solo eloko moko na makasi'. Al Asadi alobaki ete; 'Kamela na biso oyo ezali pene na kobota eleki 'uqiyah' moko. Malik alobaki ete; ''uqiyah moko ezali dirhams ntuku minei'. Mobali oyo awutaki na Banu As'ad alobaki sima, 'Nazongaki sans kotuna ye'. Na sima Rasulullah shallallahu 'alaihi wasallam apesaki mutu farine na blé, sima akabolaki yango na biso tiii Allah Azza Wa Jalla akomi na biso.'
Imam Malik : 1590
و عَنْ مَالِك عَنْ الْعَلَاءِ بْنِ عَبْدِ الرَّحْمَنِ أَنَّهُ سَمِعَهُ يَقُولُمَا نَقَصَتْ صَدَقَةٌ مِنْ مَالٍ وَمَا زَادَ اللَّهُ عَبْدًا بِعَفْوٍ إِلَّا عِزًّا وَمَا تَوَاضَعَ عَبْدٌ إِلَّا رَفَعَهُ اللَّهُقَالَ مَالِك لَا أَدْرِي أَيُرْفَعُ هَذَا الْحَدِيثُ عَنْ النَّبِيِّ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ أَمْ لَا
Ewuti na Malik uta na [Al ‘Ala` bin Abdurrahman] Ete ayokaki ye koloba, ‘Bomengo ekokita te mpo na bolingo, mpe Allah abakisaka mosali ya kolimbisa te longola se nkembo. Mpe mosali asalaka Tawadhu' te soki Allah atomboli grade na ye te'. Malik alobaki ete; 'Nayebi te soki hadith oyo ezali malamu pona Ntoma sallallaahu 'alaihi wasallam to te'.
Imam Malik : 1591
و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ عَبْدِ اللَّهِ بْنِ أَبِي بَكْرٍ عَنْ أَبِيهِأَنَّ رَسُولَ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ اسْتَعْمَلَ رَجُلًا مِنْ بَنِي عَبْدِ الْأَشْهَلِ عَلَى الصَّدَقَةِ فَلَمَّا قَدِمَ سَأَلَهُ إِبِلًا مِنْ الصَّدَقَةِ فَغَضِبَ رَسُولُ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ حَتَّى عُرِفَ الْغَضَبُ فِي وَجْهِهِ وَكَانَ مِمَّا يُعْرَفُ بِهِ الْغَضَبُ فِي وَجْهِهِ أَنْ تَحْمَرَّ عَيْنَاهُ ثُمَّ قَالَ إِنَّ الرَّجُلَ لَيَسْأَلُنِي مَا لَا يَصْلُحُ لِي وَلَا لَهُ فَإِنْ مَنَعْتُهُ كَرِهْتُ الْمَنْعَ وَإِنْ أَعْطَيْتُهُ أَعْطَيْتُهُ مَا لَا يَصْلُحُ لِي وَلَا لَهُ فَقَالَ الرَّجُلُ يَا رَسُولَ اللَّهِ لَا أَسْأَلُكَ مِنْهَا شَيْئًا أَبَدًا
Bayebisaki ngai ete Malik uta na [Abdullah bin Abu Bakr] uta na [tata na ye] alobaki, ‘Rasulullah shallallahu ‘alaihi wasallam aponaki mobali moko uta na Bani Abdul Al Asyhal lokola ‘amil zakat. Tango akomi, mobali wana asengaki kamela na zakat. Na sima Prophète sallallaahu ‘alaihi wasallam asiliki, tiii kanda ebimaki na elongi na ye. Moko ya bilembo ya nkanda na ye ezalaki ete miso na ye ezalaki motane. Na nsima alobaki ete: ‘Ya solo, mobali moko atunaki ngai likambo oyo ebongi na ngai te to mpo na ye te. Soki naboyi yango, nalingaka vraiment koboya -kopesa- te. Soki napesi ye, elakisi ete nazali kopesa eloko oyo nabongi na yango te mpe ye abongi na yango te’. Na nsima, moto yango alobaki; 'Ee Ntoma ya Allah, nakosenga eloko moko te epai na yo libela'.
Imam Malik : 1592
و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ زَيْدِ بْنِ أَسْلَمَ عَنْ أَبِيهِ أَنَّهُ قَالَ قَالَ عَبْدُ اللَّهِ بْنُ الْأَرْقَمِادْلُلْنِي عَلَى بَعِيرٍ مِنْ الْمَطَايَا أَسْتَحْمِلُ عَلَيْهِ أَمِيرَ الْمُؤْمِنِينَ فَقُلْتُ نَعَمْ جَمَلًا مِنْ الصَّدَقَةِ فَقَالَ عَبْدُ اللَّهِ بْنُ الْأَرْقَمِ أَتُحِبُّ أَنَّ رَجُلًا بَادِنًا فِي يَوْمٍ حَارٍّ غَسَلَ لَكَ مَا تَحْتَ إِزَارِهِ وَرُفْغَيْهِ ثُمَّ أَعْطَاكَهُ فَشَرِبْتَهُ قَالَ فَغَضِبْتُ وَقُلْتُ يَغْفِرُ اللَّهُ لَكَ أَتَقُولُ لِي مِثْلَ هَذَا فَقَالَ عَبْدُ اللَّهِ بْنُ الْأَرْقَمِ إِنَّمَا الصَّدَقَةُ أَوْسَاخُ النَّاسِ يَغْسِلُونَهَا عَنْهُمْ
Ayebisaki ngai uta na Malik uta na [Zaid bin Aslam] uta na [Tata na Ye] alobaki; [Abdurrahman bin Al Arqam] alobaki, ‘Lakisa ngai kamela oyo nazali komata oyo nakoki kosalela mpo na komema Mokambi ya Bandimi’. Na nsima, nalobaki ete, ‘Ɛɛ. ezali na kamela moko ya mobali oyo euti na kamela ya makabo ya makabo’. Na sima Abdullah bin Al Arqam atunaki, ‘Okosepela soki mobali moko ya mafuta na nsima ya midi ya molunge makasi asukoli oyo ezalaki na nse ya sarong na ye mpe ya libumu na ye mpo na yo. Sima apesaki -mai- na yo pe omelaki yango?' Aslam alobaki, ‘Nasilikaki, yango wana nalobaki ete, ‘Allah alimbisa yo, mpo na nini ozali koloba na ngai boye?’ Abdullah bin Arqam alobaki ete; 'Ya solo, zakat ezali bosoto ya bato oyo bapetolaka na bango moko'.
Imam Malik : 1593
حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ زَيْدِ بْنِ أَسْلَمَ عَنْ أَبِيهِ أَنَّ عُمَرَ بْنَ الْخَطَّابِاسْتَعْمَلَ مَوْلًى لَهُ يُدْعَى هُنَيًّا عَلَى الْحِمَى فَقَالَ يَا هُنَيُّ اضْمُمْ جَنَاحَكَ عَنْ النَّاسِ وَاتَّقِ دَعْوَةَ الْمَظْلُومِ فَإِنَّ دَعْوَةَ الْمَظْلُومِ مُجَابَةٌ وَأَدْخِلْ رَبَّ الصُّرَيْمَةِ وَرَبَّ الْغُنَيْمَةِ وَإِيَّايَ وَنَعَمَ ابْنِ عَفَّانَ وَابْنِ عَوْفٍ فَإِنَّهُمَا إِنْ تَهْلِكْ مَاشِيَتُهُمَا يَرْجِعَانِ إِلَى الْمَدِينَةِ إِلَى زَرْعٍ وَنَخْلٍ وَإِنَّ رَبَّ الصُّرَيْمَةِ وَالْغُنَيْمَةِ إِنْ تَهْلِكْ مَاشِيَتُهُ يَأْتِنِي بِبَنِيهِ فَيَقُولُ يَا أَمِيرَ الْمُؤْمِنِينَ يَا أَمِيرَ الْمُؤْمِنِينَ أَفَتَارِكُهُمْ أَنَا لَا أَبَا لَكَ فَالْمَاءُ وَالْكَلَأُ أَيْسَرُ عَلَيَّ مِنْ الذَّهَبِ وَالْوَرِقِ وَايْمُ اللَّهِ إِنَّهُمْ لَيَرَوْنَ أَنِّي قَدْ ظَلَمْتُهُمْ إِنَّهَا لَبِلَادُهُمْ وَمِيَاهُهُمْ قَاتَلُوا عَلَيْهَا فِي الْجَاهِلِيَّةِ وَأَسْلَمُوا عَلَيْهَا فِي الْإِسْلَامِ وَالَّذِي نَفْسِي بِيَدِهِ لَوْلَا الْمَالُ الَّذِي أَحْمِلُ عَلَيْهِ فِي سَبِيلِ اللَّهِ مَا حَمَيْتُ عَلَيْهِمْ مِنْ بِلَادِهِمْ شِبْرًا
Malik ayebisaki ngai uta na [Zaid bin Aslam] uta na [tata na ye] ete [Umar bin Khattab] asalelaki moombo na ye ya kala na nkombo Hunayya mpo na kokengela ndelo. Na sima ‘Umar alobaki; ‘Ee Hunayya! Bokima maboko na bino na konyokola bato mpe bobanga mabondeli ya baoyo bazali konyokwama. Mpamba te mabondeli ya bato oyo bazalaki konyokola ezwaki eyano. Kota na mwa bankolo ya bakamela mpe bantaba. Tika bibwele ya Ibn Affan na Ibn 'Auf, soki bibwele na bango mibale esilaki, bakozonga na Medina mpo na kosala bilanga mpe kolona milona. Babateli ya mpate oyo bazali na bakamela to bantaba moke, ntango bibwele na bango ekosila, bakoya epai na ngai komema bana na bango mpe bakoloba ‘O Amirul Mu’minin! O Amirul Mu'minin! okotika bango? Nazali koboya bino te, mai mpe matiti ezali pɛpɛlɛ mpo na ngai koleka wolo mpe palata. Na nzela ya Allah, bamonaki ete nasalaki bango mabe. Oyo ezali mabele na bango mpe mai na bango. Babundaki mpo na kozwa yango na eleko ya Jahiliyah mpe bapesaki yango na eleko ya Islam. Na Moto oyo molimo na ngai ezali na Loboko na ye, soki ezalaki te mpo na biloko ya motuya oyo namemaki na nzela ya Allah, nalingaki kobatela mabele na bango ata ata santimetele moko te''.
Imam Malik : 1594
حَدَّثَنِي مَالِك عَنْ ابْنِ شِهَابٍ عَنْ مُحَمَّدِ بْنِ جُبَيْرِ بْنِ مُطْعِمٍأَنَّ النَّبِيَّ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ قَالَ لِي خَمْسَةُ أَسْمَاءٍ أَنَا مُحَمَّدٌ وَأَنَا أَحْمَدُ وَأَنَا الْمَاحِي الَّذِي يَمْحُو اللَّهُ بِيَ الْكُفْرَ وَأَنَا الْحَاشِرُ الَّذِي يُحْشَرُ النَّاسُ عَلَى قَدَمِي وَأَنَا الْعَاقِبُ
Eyebisami na ngai na Malik uta na [Ibn Shihab] uta na [Muhammad bin Jabir bin Muth’im] ete Ntoma sallallaahu ‘alaihi wasallam alobaki na ngai: ‘Nazali na bankombo mitano: Nazali Muhammad, Ahmad, Al Mahi oyo elongo na ye Allah alongolaki kozanga kondima elongo na ngai, Al Haasyir, na nse na ye bato banso basangani na nse ya makolo na ngai, mpe Al 'Aqib'.