Imam Malik : 1341
حَدَّثَنِي يَحْيَى عَنْ مَالِك عَنْ ابْنِ شِهَابٍ عَنْ عِرَاكِ بْنِ مَالِكٍ وَسُلَيْمَانَ بْنِ يَسَارٍأَنَّ رَجُلًا مِنْ بَنِي سَعْدِ بْنِ لَيْثٍ أَجْرَى فَرَسًا فَوَطِئَ عَلَى إِصْبَعِ رَجُلٍ مِنْ جُهَيْنَةَ فَنُزِيَ مِنْهَا فَمَاتَ فَقَالَ عُمَرُ بْنُ الْخَطَّابِ لِلَّذِي ادُّعِيَ عَلَيْهِمْ أَتَحْلِفُونَ بِاللَّهِ خَمْسِينَ يَمِينًا مَا مَاتَ مِنْهَا فَأَبَوْا وَتَحَرَّجُوا وَقَالَ لِلْآخَرِينَ أَتَحْلِفُونَ أَنْتُمْ فَأَبَوْا فَقَضَى عُمَرُ بْنُ الْخَطَّابِ بِشَطْرِ الدِّيَةِ عَلَى السَّعْدِيِّينَقَالَ مَالِك وَلَيْسَ الْعَمَلُ عَلَى هَذَا
Eyebisami na ngai na Yahya uta na Malik, uta na [Ibn Shihab] uta na [‘Iraq bin Malik] mpe [Sulaiman bin Yasar] ete moto moko ya Bani Said bin Laith amataki mpunda mpe amataki moto moko uta na mosapi ya Juhainah kino ebukanaki mpe ekufaki. Na nsima [Umar bin Khattab] alobaki na bafundami; ‘Ondimi kolapa ndai na kombo ya Allah mbala ntuku mitano, ete akokufa te mpo na yango? 'baboyaka mpe bayokaka kilo'. Na sima Umar atunaki basusu; ‘Okolapa ndai? ’ bazalaki koboya. Na sima Umar bin Khattab azwaki mokano ya kofuta ndambo ya diyat na bato ya Bani Said. Malik alobaki ete; 'Oyo ezali te oyo tokanisaka'.
Imam Malik : 1342
و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك أَنَّ ابْنَ شِهَابٍ وَسُلَيْمَانَ بْنَ يَسَارٍ وَرَبِيعَةَ بْنَ أَبِي عَبْدِ الرَّحْمَنِ كَانُوا يَقُولُونَدِيَةُ الْخَطَإِ عِشْرُونَ بِنْتَ مَخَاضٍ وَعِشْرُونَ بِنْتَ لَبُونٍ وَعِشْرُونَ ابْنَ لَبُونٍ ذَكَرًا وَعِشْرُونَ حِقَّةً وَعِشْرُونَ جَذَعَةً
Eyebisami na ngai uta na Malik ete [Ibnu Shihab] mpe [Sulaiman bin Yasar] mpe [Rabi’ah bin Abu Abdurrahman] balobaki ete diyat ya koboma mpo na mabe ezali makhadl ya bintu ntuku mibale, Labun bintu ntuku mibale, Ibn Labun ya mobali ntuku mibale, hiqqah ntuku mibale mpe jad’ah ntuku mibale.
Imam Malik : 1343
و حَدَّثَنِي يَحْيَى عَنْ مَالِك عَنْ يَحْيَى بْنِ سَعِيدٍ عَنْ سَعِيدِ بْنِ الْمُسَيَّبِ أَنَّهُ كَانَ يَقُولُتُعَاقِلُ الْمَرْأَةُ الرَّجُلَ إِلَى ثُلُثِ الدِّيَةِ إِصْبَعُهَا كَإِصْبَعِهِ وَسِنُّهَا كَسِنِّهِ وَمُوضِحَتُهَا كَمُوضِحَتِهِ وَمُنَقِّلَتُهَا كَمُنَقِّلَتِهِو حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ ابْنِ شِهَابٍ وَبَلَغَهُ عَنْ عُرْوَةَ بْنِ الزُّبَيْرِ أَنَّهُمَا كَانَا يَقُولَانِ مِثْلَ قَوْلِ سَعِيدِ بْنِ الْمُسَيَّبِ فِي الْمَرْأَةِ أَنَّهَا تُعَاقِلُ الرَّجُلَ إِلَى ثُلُثِ دِيَةِ الرَّجُلِ فَإِذَا بَلَغَتْ ثُلُثَ دِيَةِ الرَّجُلِ كَانَتْ إِلَى النِّصْفِ مِنْ دِيَةِ الرَّجُلِ قَالَ مَالِك وَتَفْسِيرُ ذَلِكَ أَنَّهَا تُعَاقِلُهُ فِي الْمُوضِحَةِ وَالْمُنَقِّلَةِ وَمَا دُونَ الْمَأْمُومَةِ وَالْجَائِفَةِ وَأَشْبَاهِهِمَا مِمَّا يَكُونُ فِيهِ ثُلُثُ الدِّيَةِ فَصَاعِدًا فَإِذَا بَلَغَتْ ذَلِكَ كَانَ عَقْلُهَا فِي ذَلِكَ النِّصْفَ مِنْ عَقْلِ الرَّجُلِ
Bayebisaki ngai ete Yahya uta na Malik uta na [Yahya bin Sa’id] uta na [Sa’id bin Musayyab] alobaki; 'Mwasi azongisaka mobali na ndambo ya misato ya diyat, mosapi na mosapi, mino na mino, bampota oyo emonisaka mokuwa na bampota ndenge moko, mpe mikuwa oyo ebukani mpo na mikuwa oyo ebukani'. Eyebisamaki na ngai na Malik uta na [Ibnu Shihab] ete eyaki epai na ye uta na [’Urwah bin Az Zubair] ete bango mibale bazalaki na likanisi moko na makanisi ya Sa’id bin Musayyab na ntina ya basi kofuta moko na misato ya diyat likolo ya mibali, soki ekomi na moko na misato ya diyat mpo na mibali nde emati kino na ndambo. Malik alobaki ete; "Ndimbola ya likambo oyo ezali ete mwasi afutaka diyat mpo na bampota oyo elakisaka mikuwa, to mpo na bampota oyo esalaka ete mikuwa ebukana, to mpota oyo ekɔtaka te na mikuwa ya motó to ya libumu, to biloko mosusu ya ndenge wana, boye ezali kaka moko na misato ya diyat mingi, soki eleki oyo nde afutaka ndambo ya diyat ya mobali."
Imam Malik : 1344
و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك أَنَّهُ سَمِعَ ابْنَ شِهَابٍ يَقُولُمَضَتْ السُّنَّةُ أَنَّ الرَّجُلَ إِذَا أَصَابَ امْرَأَتَهُ بِجُرْحٍ أَنَّ عَلَيْهِ عَقْلَ ذَلِكَ الْجُرْحِ وَلَا يُقَادُ مِنْهُ
Ayebisaki ngai uta na Malik ete ayokaki [Ibn Shihab] koloba; 'Ezali sunnah que soki mobali azokisi mwasi na ye alors il faut afuta diyat pona blessure, mais azali qishashed te'.
Imam Malik : 1345
و حَدَّثَنِي يَحْيَى عَنْ مَالِك عَنْ ابْنِ شِهَابٍ عَنْ أَبِي سَلَمَةَ بْنِ عَبْدِ الرَّحْمَنِ بْنِ عَوْفٍ عَنْ أَبِي هُرَيْرَةَأَنَّ امْرَأَتَيْنِ مِنْ هُذَيْلٍ رَمَتْ إِحْدَاهُمَا الْأُخْرَى فَطَرَحَتْ جَنِينَهَا فَقَضَى فِيهِ رَسُولُ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ بِغُرَّةٍ عَبْدٍ أَوْ وَلِيدَةٍ
Bayebisaki ngai ete Yahya uta na Malik uta na [Ibn Shihab] uta na [Abu Salamah bin Abdurrahman bin Auf] uta na [Abu Hurairah] alobaki, ‘Basi mibale ya Hudzail babwakaki moko na mosusu, kino moko na bango abomaki mwana oyo azali na libumu na libumu ya mosusu. Na sima Rasulullah sallallaahu ‘alaihi wasallam azwaki mokano ete moto oyo abomaki mwana oyo azali na libumu abimisaki moombo ya mobali to ya mwasi oyo ntalo na ye ezalaki ntalo mingi - mbala zomi motuya ya diyat - '.
Imam Malik : 1346
و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ ابْنِ شِهَابٍ عَنْ سَعِيدِ بْنِ الْمُسَيَّبِأَنَّ رَسُولَ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ قَضَى فِي الْجَنِينِ يُقْتَلُ فِي بَطْنِ أُمِّهِ بِغُرَّةٍ عَبْدٍ أَوْ وَلِيدَةٍ فَقَالَ الَّذِي قُضِيَ عَلَيْهِ كَيْفَ أَغْرَمُ مَا لَا شَرِبَ وَلَا أَكَلْ وَلَا نَطَقَ وَلَا اسْتَهَلْ وَمِثْلُ ذَلِكَ بَطَلْ فَقَالَ رَسُولُ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ إِنَّمَا هَذَا مِنْ إِخْوَانِ الْكُهَّانِ
Eyebisami na ngai uta na Malik uta na [Ibn Shihab] uta na [Sa’id bin Musayyab] ete Rasulullah salla Allahu ‘alaihi wa sallam azwaki mokano ya likambo ya mwana oyo abomami na libumu ya mama na ye na kosikola moombo ya mobali to ya mwasi. Na nsima, mofundami alobaki ete; ‘Ndenge nini bakokaki kofuta ngai amende mpo nabomaki eloko oyo elyaki te, emɛlaki te, elobaki te to elelaki te ntango ebotamaki?’ Yango wana Ntoma sallallaahu ‘alaihi wasallam alobaki: ‘Moto oyo azali moninga ya shaman’.
Imam Malik : 1347
و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ رَبِيعَةَ بْنِ أَبِي عَبْدِ الرَّحْمَنِ أَنَّهُ كَانَ يَقُولُالْغُرَّةُ تُقَوَّمُ خَمْسِينَ دِينَارًا أَوْ سِتَّ مِائَةِ دِرْهَمٍ وَدِيَةُ الْمَرْأَةِ الْحُرَّةِ الْمُسْلِمَةِ خَمْسُ مِائَةِ دِينَارٍ أَوْ سِتَّةُ آلَافِ دِرْهَمٍ
Ayebisaki ngai uta na Malik uta na [Rabi’ah bin Abu Abdurrahman] alobaki; ‘Al Ghurrah ezali na motuya kati na dinars ntuku mitano to dirhams nkama motoba, mpe diyat ya mwasi ya ofele ezali dinars nkama mitano to dirhams nkoto motoba’.
Imam Malik : 1348
حَدَّثَنِي يَحْيَى عَنْ مَالِك عَنْ ابْنِ شِهَابٍ عَنْ سَعِيدِ بْنِ الْمُسَيَّبِ أَنَّهُ كَانَ يَقُولُفِي الشَّفَتَيْنِ الدِّيَةُ كَامِلَةً فَإِذَا قُطِعَتْ السُّفْلَى فَفِيهَا ثُلُثَا الدِّيَةِ
Yahya ayebisaki ngai uta na Malik uta na [Ibn Shihab] uta na [Sa’id bin Musayyab] ete alobaki mpo na diyat ya mbɛbu mibale, ‘Diat ezali diyat ya kokoka, soki okati kaka na nse okofuta ndambo ya misato ya diyat.
Imam Malik : 1349
حَدَّثَنِي يَحْيَى عَنْ مَالِك أَنَّهُ سَأَلَ ابْنَ شِهَابٍعَنْ الرَّجُلِ الْأَعْوَرِ يَفْقَأُ عَيْنَ الصَّحِيحِ فَقَالَ ابْنُ شِهَابٍ إِنْ أَحَبَّ الصَّحِيحُ أَنْ يَسْتَقِيدَ مِنْهُ فَلَهُ الْقَوَدُ وَإِنْ أَحَبَّ فَلَهُ الدِّيَةُ أَلْفُ دِينَارٍ أَوْ اثْنَا عَشَرَ أَلْفَ دِرْهَمٍ
Yahya ayebisaki ngai uta na Malik ete atunaki [Ibn Shihab] mpo na mobali moko ya miso ekufá oyo azali kobimisa miso ya bato mosusu. Ibn Shihab alobaki ete; 'Soki mutu oyo bakosaki alingi kozongisa ye alors wana ezali droit na ye, soki alingi bafuta ye na diyat alors diyat ezali nkoto moko ya dinars to nkoto zomi na mibale ya dirhams'.
Imam Malik : 1350
حَدَّثَنِي يَحْيَى عَنْ مَالِك عَنْ يَحْيَى بْنِ سَعِيدٍ عَنْ سُلَيْمَانَ بْنِ يَسَارٍ أَنَّ زَيْدَ بْنَ ثَابِتٍكَانَ يَقُولُ فِي الْعَيْنِ الْقَائِمَةِ إِذَا طَفِئَتْ مِائَةُ دِينَارٍ
Eyebisami na ngai na Yahya uta na Malik uta na [Yahya bin Sa’id] uta na [Sulaiman bin Yasar] ete [Zaid bin Thabit] alobaki na ntina ya miso oyo ekoki komona te sima ya kozoka, ‘Diyat ezali Dinars nkama moko’.
Imam Malik : 1351
و حَدَّثَنِي يَحْيَى عَنْ مَالِك عَنْ يَحْيَى بْنِ سَعِيدٍ أَنَّهُ سَمِعَ سُلَيْمَانَ بْنَ يَسَارٍ يَذْكُرُأَنَّ الْمُوضِحَةَ فِي الْوَجْهِ مِثْلُ الْمُوضِحَةِ فِي الرَّأْسِ إِلَّا أَنْ تَعِيبَ الْوَجْهَ فَيُزَادُ فِي عَقْلِهَا مَا بَيْنَهَا وَبَيْنَ عَقْلِ نِصْفِ الْمُوضِحَةِ فِي الرَّأْسِ فَيَكُونُ فِيهَا خَمْسَةٌ وَسَبْعُونَ دِينَارًا
Yahya ayebisaki ngai uta na Malik uta na [Yahya bin Sa’id] ete ayokaki [Sulaiman bin Yasar] koloba ete, ‘Ya solo, mudlihah na elongi ezali ndenge moko na mudlihah na motó, longola se soki ezali makasi mingi mpo na kobimisa mbeba na elongi, wana diat ebakisami, bakisa pene na ndambo ya diyat mpo na mpota na motó, mpo ete diyat ekóma dinars ntuku nsambo na mitano'.
Imam Malik : 1352
وَقَدْ قَالَ ابْنُ شِهَابٍلَيْسَ فِي الْمَأْمُومَةِ قَوَدٌ
Ya solo [Ibn Shihab] alobaki, ‘Eyano ezali te na mpota ya mozindo’.
Imam Malik : 1353
و حَدَّثَنِي يَحْيَى عَنْ مَالِك عَنْ يَحْيَى بْنِ سَعِيدٍ عَنْ سَعِيدِ بْنِ الْمُسَيَّبِ أَنَّهُ قَالَكُلُّ نَافِذَةٍ فِي عُضْوٍ مِنْ الْأَعْضَاءِ فَفِيهَا ثُلُثُ عَقْلِ ذَلِكَ الْعُضْوِحَدَّثَنِي مَالِك كَانَ ابْنُ شِهَابٍ لَا يَرَى ذَلِكَ
Bayebisaki ngai ete Yahya uta na Malik uta na [Yahya bin Sa’id] uta na [Sa’id bin Musayyab] alobaki; 'Mpota nyonso na enama ya nzoto, mpota ezali moko na misato ya enama wana'. Bayebisaki ngai ete Malik alobaki, ‘[Ibn Shihab] akanisaka bongo te’.
Imam Malik : 1354
و حَدَّثَنِي يَحْيَى عَنْ مَالِك عَنْ رَبِيعَةَ بْنِ أَبِي عَبْدِ الرَّحْمَنِ أَنَّ عَبْدَ اللَّهِ بْنَ الزُّبَيْرِأَقَادَ مِنْ الْمُنَقِّلَةِ
Eyebisami na ngai na Yahya uta na Malik uta na [Rabi’ah bin Abu Abdurrahman] ete [Abdullah bin Az Zubair] azongiselaki mpota oyo esalaki ete mikuwa ebukana’.
Imam Malik : 1355
و حَدَّثَنِي يَحْيَى عَنْ مَالِك عَنْ رَبِيعَةَ بْنِ أَبِي عَبْدِ الرَّحْمَنِ أَنَّهُ قَالَ سَأَلْتُ سَعِيدَ بْنَ الْمُسَيَّبِكَمْ فِي إِصْبَعِ الْمَرْأَةِ فَقَالَ عَشْرٌ مِنْ الْإِبِلِ فَقُلْتُ كَمْ فِي إِصْبَعَيْنِ قَالَ عِشْرُونَ مِنْ الْإِبِلِ فَقُلْتُ كَمْ فِي ثَلَاثٍ فَقَالَ ثَلَاثُونَ مِنْ الْإِبِلِ فَقُلْتُ كَمْ فِي أَرْبَعٍ قَالَ عِشْرُونَ مِنْ الْإِبِلِ فَقُلْتُ حِينَ عَظُمَ جُرْحُهَا وَاشْتَدَّتْ مُصِيبَتُهَا نَقَصَ عَقْلُهَا فَقَالَ سَعِيدٌ أَعِرَاقِيٌّ أَنْتَ فَقُلْتُ بَلْ عَالِمٌ مُتَثَبِّتٌ أَوْ جَاهِلٌ مُتَعَلِّمٌ فَقَالَ سَعِيدٌ هِيَ السُّنَّةُ يَا ابْنَ أَخِي
Bayebisaki ngai ete Yahya uta na Malik uta na [Rabi’ah bin Abu Abdurrahman] alobaki; ‘Natunaki [Sa’id bin Musayyab]; ‘Diyat boni mpo na mosapi ya mwasi? ’ Ayanolaki ete; 'Bakamela zomi'. Natunaki lisusu; ‘Motango boni mpo na misapi mibale?’ ayanolaki; 'Bakamela ntuku mibale'. Natunaki lisusu; ‘Motango boni mpo na misapi misato?’ ayanolaki; 'Bakamela ntuku misato'. Nazali kotuna; ‘Motango boni mpo na misapi minei?’ ayanolaki; ‘Bakamela ntuku mibale?’ Natunaki; ‘Ezali boni soki mpota ezali monene mpe mpasi ezali mabe, diyat ekokita,’ Sa’id atunaki; ‘Ozali moto ya Irak?’ Nayanolaki; ‘Te, kasi nazali kaka moto ya losambo oyo alingi koluka kozala na ntembe te mpe zoba oyo alingi koyekola.’ Said alobaki; 'Wana ezali sunnah, O ndeko na ngai'.
Imam Malik : 1356
و حَدَّثَنِي يَحْيَى عَنْ مَالِك عَنْ زَيْدِ بْنِ أَسْلَمَ عَنْ مُسْلِمِ بْنِ جُنْدُبٍ عَنْ أَسْلَمَ مَوْلَى عُمَرَ بْنِ الْخَطَّابِ أَنَّ عُمَرَ بْنَ الْخَطَّابِقَضَى فِي الضِّرْسِ بِجَمَلٍ وَفِي التَّرْقُوَةِ بِجَمَلٍ وَفِي الضِّلَعِ بِجَمَلٍ
Yahya ayebisaki ngai uta na Malik uta na [Zaid bin Aslam] uta na [Muslim bin Jundub] uta na [Aslam] moombo ya kala ya Umar bin Khattab, ete [Umar bin Khattab] azwaki mokano ya kokata ye mino na kamela, mikuwa na ye ya ntolo na kamela mpe mikuwa na ye ya mokɔngɔ na kamela.
Imam Malik : 1357
و حَدَّثَنِي يَحْيَى عَنْ مَالِك عَنْ يَحْيَى بْنِ سَعِيدٍ أَنَّهُ سَمِعَ سَعِيدَ بْنَ الْمُسَيَّبِ يَقُولُ قَضَى عُمَرُ بْنُ الْخَطَّابِفِي الْأَضْرَاسِ بِبَعِيرٍ بَعِيرٍوَقَضَى مُعَاوِيَةُ بْنُ أَبِي سُفْيَانَ فِي الْأَضْرَاسِ بِخَمْسَةِ أَبْعِرَةٍ خَمْسَةِ أَبْعِرَةٍ قَالَ سَعِيدُ بْنُ الْمُسَيَّبِ فَالدِّيَةُ تَنْقُصُ فِي قَضَاءِ عُمَرَ بْنِ الْخَطَّابِ وَتَزِيدُ فِي قَضَاءِ مُعَاوِيَةَ فَلَوْ كُنْتُ أَنَا لَجَعَلْتُ فِي الْأَضْرَاسِ بَعِيرَيْنِ بَعِيرَيْنِ فَتِلْكَ الدِّيَةُ سَوَاءٌ وَكُلُّ مُجْتَهِدٍ مَأْجُورٌ
Yahya ayebisaki ngai uta na Malik uta na [Yahya bin Sa’id] ete ayokaki [Sa’id bin Musayyab] koloba, ‘ [Umar bin Khattab] azwaki mokano na likambo ya diyat molar na kamela kamela. Pendant ce temps [Mu’awiyah bin Abu Sufyan] azwaki mokano na bakamela mitano, bakamela mitano’. Sa’id bin Musayyab alobaki ete; 'Diyat ekitisami na décision ya Umar bin Khattab pe emati na décision ya Mu'awiyah, soki nazalaki mutu na décidé alors nalingaki kosala mino ya molar ya deux camels diyat. Diyat ezali ndenge moko mpe mujtahid nionso akozwa mbano'.
Imam Malik : 1358
و حَدَّثَنِي يَحْيَى عَنْ مَالِك عَنْ يَحْيَى بْنِ سَعِيدٍ عَنْ سَعِيدِ بْنِ الْمُسَيَّبِ أَنَّهُ كَانَ يَقُولُإِذَا أُصِيبَتْ السِّنُّ فَاسْوَدَّتْ فَفِيهَا عَقْلُهَا تَامًّا فَإِنْ طُرِحَتْ بَعْدَ أَنْ اسْوَدَّتْ فَفِيهَا عَقْلُهَا أَيْضًا تَامًّا
Lokola ayebisaki ngai Yahya uta na Malik uta na [Yahya bin Sa’id] uta na [Sa’id bin Musayyab] alobaki; 'Soki mino nionso ezo affecter tii ekokoma noir alors diyat eza parfait, soki mino ekweyi sima ya ko noir alors diyat pe eza parfait'.
Imam Malik : 1359
و حَدَّثَنِي يَحْيَى عَنْ مَالِك عَنْ دَاوُدَ بْنِ الْحُصَيْنِ عَنْ أَبِي غَطَفَانَ بْنِ طَرِيفٍ الْمُرِّيِّ أَنَّهُ أَخْبَرَهُ أَنَّ مَرْوَانَ بْنَ الْحَكَمِ بَعَثَهُ إِلَى عَبْدِ اللَّهِ بْنِ عَبَّاسٍيَسْأَلُهُ مَاذَا فِي الضِّرْسِ فَقَالَ عَبْدُ اللَّهِ بْنُ عَبَّاسٍ فِيهِ خَمْسٌ مِنْ الْإِبِلِ قَالَ فَرَدَّنِي مَرْوَانُ إِلَى عَبْدِ اللَّهِ بْنِ عَبَّاسٍ فَقَالَ أَتَجْعَلُ مُقَدَّمَ الْفَمِ مِثْلَ الْأَضْرَاسِ فَقَالَ عَبْدُ اللَّهِ بْنُ عَبَّاسٍ لَوْ لَمْ تَعْتَبِرْ ذَلِكَ إِلَّا بِالْأَصَابِعِ عَقْلُهَا سَوَاءٌ
Yahya ayebisaki ngai uta na Malik uta na [Daud bin Al Hushain] uta na [Abu Ghathafan bin Tharif Al Muri] ete ayebisaki ye ete Marwan bin Hakam atindaki ye epai ya Abdullah bin 'Abbas, mpo na kotuna na ntina ya diyat ya mino ya molar. Na nsima [Abdullah bin Abbas] ayanolaki ete; 'Diyat ezali bakamela mitano'. Abu Ghathafan alobaki ete; ‘Bongo Marwan ayebisaki ngai lisusu nakutana na Abdullah bin Abbas mpo na kotuna; ‘Okokanisaka liboso ya monɔkɔ na mino ya molar? ’ Abdullah bin Abbas ayanolaki ete; 'Soki okokanisi te -logique- autre que na misapi na yo, alors diyat ezali ndenge moko'.
Imam Malik : 1360
و حَدَّثَنِي يَحْيَى عَنْ مَالِك عَنْ هِشَامِ بْنِ عُرْوَةَ عَنْ أَبِيهِأَنَّهُ كَانَ يُسَوِّي بَيْنَ الْأَسْنَانِ فِي الْعَقْلِ وَلَا يُفَضِّلُ بَعْضَهَا عَلَى بَعْضٍ
Eyebisami na ngai na Yahya uta na Malik uta na [Hisyam bin ‘Urwah] uta na [tata na ye] ete akokanisaka diyat ya mino nyonso mpe alekisaka ndelo te moko likolo ya mosusu’.