Imam Malik : 1061
و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ نَافِعٍأَنَّ بِنْتَ سَعِيدِ بْنِ زَيْدِ بْنِ عَمْرِو بْنِ نُفَيْلٍ كَانَتْ تَحْتَ عَبْدِ اللَّهِ بْنِ عَمْرِو بْنِ عُثْمَانَ بْنِ عَفَّانَ فَطَلَّقَهَا الْبَتَّةَ فَانْتَقَلَتْ فَأَنْكَرَ ذَلِكَ عَلَيْهَا عَبْدُ اللَّهِ بْنُ عُمَرَ
Bayebisaki ngai ete Malik uta na [Nafi’] alobaki, ‘Mwana mwasi ya Sa’id bin Zaid bin ‘Amru bin Nufail azalaki mwasi ya Abdullah bin ‘Amru bin Uthman bin Affan, sima apesaki koboma libala na mwasi na ye. Mwasi na ye na sima akendeki kofanda esika mosusu, kasi [Abdullah bin Umar] awanganaki likambo oyo’.
Imam Malik : 1062
و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ نَافِعٍ أَنَّ عَبْدَ اللَّهِ بْنَ عُمَرَطَلَّقَ امْرَأَةً لَهُ فِي مَسْكَنِ حَفْصَةَ زَوْجِ النَّبِيِّ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ وَكَانَ طَرِيقَهُ إِلَى الْمَسْجِدِ فَكَانَ يَسْلُكُ الطَّرِيقَ الْأُخْرَى مِنْ أَدْبَارِ الْبُيُوتِ كَرَاهِيَةَ أَنْ يَسْتَأْذِنَ عَلَيْهَا حَتَّى رَاجَعَهَا
Eyebisamaki na ngai uta na Malik uta na [Nafi’] ete [Abdullah bin Umar] abomaki libala na moko ya basi na ye na ndako ya Hafshah, mwasi ya Ntoma sallallaahu ‘alaihi wasallam, atako yango ezalaki nzela oyo azalaki mbala mingi kokende na mosquée. Sima na yango azuaki nzela mosusu sima ya complexe ya logement mpo alingaki te que azala toujours na besoin ya kopesa ye ndingisa - Hafshah - tee tango ako référer na ye.
Imam Malik : 1063
و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ يَحْيَى بْنِ سَعِيدٍ أَنَّ سَعِيدَ بْنَ الْمُسَيَّبِسُئِلَ عَنْ الْمَرْأَةِ يُطَلِّقُهَا زَوْجُهَا وَهِيَ فِي بَيْتٍ بِكِرَاءٍ عَلَى مَنْ الْكِرَاءُ فَقَالَ سَعِيدُ بْنُ الْمُسَيَّبِ عَلَى زَوْجِهَا قَالَ فَإِنْ لَمْ يَكُنْ عِنْدَ زَوْجِهَا قَالَ فَعَلَيْهَا قَالَ فَإِنْ لَمْ يَكُنْ عِنْدَهَا قَالَ فَعَلَى الْأَمِيرِ
Malik ayebisaki ngai uta na [Yahya bin Sa’id] ete batunaki [Sa’id Ibnul Musayyab] mpo na mwasi oyo mobali na ye abomaki libala na ye, atako azalaki kofanda na ndako ya kofutela. Bongo nani asengeli kofuta mbongo ya kofutela ndako? Na nsima, Sa’id Ibnul Musayyab ayanolaki ete; 'Mobali na ye'. Moto oyo atunaki alobaki lisusu ete: ‘Ezali boni soki mobali na ye akoki kosala yango te?’ Sa’id Ibnul Musayyab ayanolaki ete, ‘Bongo mwasi na ye’. Moto oyo atunaki alobaki lisusu ete, ‘Ezali boni soki mwasi na ye mpe akoki kosala yango te?’ Sa’id Ibnul Musayyab ayanolaki ete, ‘Bongo mokambi asengeli kofuta yango’.
Imam Malik : 1064
حَدَّثَنِي يَحْيَى عَنْ مَالِك عَنْ عَبْدِ اللَّهِ بْنِ يَزِيدَ مَوْلَى الْأَسْوَدِ بْنِ سُفْيَانَ عَنْ أَبِي سَلَمَةَ بْنِ عَبْدِ الرَّحْمَنِ بْنِ عَوْفٍ عَنْ فَاطِمَةَ بِنْتِ قَيْسٍأَنَّ أَبَا عَمْرِو بْنَ حَفْصٍ طَلَّقَهَا الْبَتَّةَ وَهُوَ غَائِبٌ بِالشَّامِ فَأَرْسَلَ إِلَيْهَا وَكِيلُهُ بِشَعِيرٍ فَسَخِطَتْهُ فَقَالَ وَاللَّهِ مَا لَكِ عَلَيْنَا مِنْ شَيْءٍ فَجَاءَتْ إِلَى رَسُولِ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ فَذَكَرَتْ ذَلِكَ لَهُ فَقَالَ لَيْسَ لَكِ عَلَيْهِ نَفَقَةٌ وَأَمَرَهَا أَنْ تَعْتَدَّ فِي بَيْتِ أُمِّ شَرِيكٍ ثُمَّ قَالَ تِلْكَ امْرَأَةٌ يَغْشَاهَا أَصْحَابِي اعْتَدِّي عِنْدَ عَبْدِ اللَّهِ بْنِ أُمِّ مَكْتُومٍ فَإِنَّهُ رَجُلٌ أَعْمَى تَضَعِينَ ثِيَابَكِ عِنْدَهُ فَإِذَا حَلَلْتِ فَآذِنِينِي قَالَتْ فَلَمَّا حَلَلْتُ ذَكَرْتُ لَهُ أَنَّ مُعَاوِيَةَ بْنَ أَبِي سُفْيَانَ وَأَبَا جَهْمِ بْنَ هِشَامٍ خَطَبَانِي فَقَالَ رَسُولُ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ أَمَّا أَبُو جَهْمٍ فَلَا يَضَعُ عَصَاهُ عَنْ عَاتِقِهِ وَأَمَّا مُعَاوِيَةُ فَصُعْلُوكٌ لَا مَالَ لَهُ انْكِحِي أُسَامَةَ بْنَ زَيْدٍ قَالَتْ فَكَرِهْتُهُ ثُمَّ قَالَ انْكِحِي أُسَامَةَ بْنَ زَيْدٍ فَنَكَحْتُهُ فَجَعَلَ اللَّهُ فِي ذَلِكَ خَيْرًا وَاغْتَبَطْتُ بِهِ
Yahya ayebisaki ngai uta na Malik uta na [Abdullah bin Yazid] moombo ya kala ya Al Aswad bin Sufyan, uta na [Abu Salamah bin Abdurrahman bin Auf] uta na [Fatimah bint Qais] ete Abu 'Amru bin Hafsh apesaki ye koboma libala, atako azalaki na Syrie. Na nsima Abu Amru atindaki momonisi na ye mpo na kotindela ye blé, yango esalaki ete Fatimah asilikela ye. Abu Amru alobaki, ‘Na nzela ya Allah, ozali na lotomo ya eloko moko te epai na ngai’. Na sima Fatimah bin Qais akendaki epai ya Rasulullah sallallaahu ‘alaihi wasallam mpe ayebisaki ye likambo yango. Na nsima alobaki ete: ‘Ozali na lotomo te ya kozwa mbongo ya kobikela na yango’. Na sima ayebisaki ye azela période na ye ya iddah na ndaku ya Umm Syarik. nsima na yango alobaki ete: ‘Azali mwasi oyo baninga na ngai bakendaka kotala ye mbala mingi. Donc zela période nayo ya iddah na ndaku ya Abdullah bin Ummi Maktum, aza aveugle, po o tia bilamba nayo pembeni na ye. Soki période ya iddah na yo esili alors yebisa ngai'. Fatimah alobaki, ‘Ntango eleko na ngai ya iddah esilaki, nayebisaki ye ete Mu’awiyah bin Abu Sufyan mpe Abu Jahm bin Hisham ba proposaki ngai. Na sima Rasulullah sallallaahu ‘alaihi wasallam alobaki: ‘Jahm azalaki moto oyo akitisaki lingenda na ye ata moke te na lipeka na ye, nzoka nde Mu’awiyah azalaki mobola oyo azalaki na bomengo te. Bala Usamah bin Zaid'. Fatimah alobaki, 'En réalité nasepeli na yango te'. Na sima alobi lisusu : 'Bala Usaman bin Zaid'. Yango wana nabala ye, mpe emonani ete Allah asalaki bolamu na libala wana, na boye ete nayokaka esengo’.
Imam Malik : 1065
و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك أَنَّهُ سَمِعَ ابْنَ شِهَابٍ يَقُولُالْمَبْتُوتَةُ لَا تَخْرُجُ مِنْ بَيْتِهَا حَتَّى تَحِلَّ وَلَيْسَتْ لَهَا نَفَقَةٌ إِلَّا أَنْ تَكُونَ حَامِلًا فَيُنْفَقُ عَلَيْهَا حَتَّى تَضَعَ حَمْلَهَاقَالَ مَالِك وَهَذَا الْأَمْرُ عِنْدَنَا
Ayebisaki ngai uta na Malik ete ayokaki [Ibn Shihab] koloba; ‘Mwasi oyo abomi libala na talak ba’in akoki kobima na ndako te kino eleko na ye ya iddah ekosila. Azwaka lisungi ya mobali na ye ya kala te soki azali na zemi te. Soki azali na zemi, mobali na ye ya kala asengeli kosunga ye tii ntango akobota.’ Malik alobaki ete; 'Likanisi wana nde esalelamaka likolo na biso'.
Imam Malik : 1066
حَدَّثَنِي يَحْيَى عَنْ مَالِك عَنْ يَحْيَى بْنِ سَعِيدٍ وَعَنْ يَزِيدَ بْنِ عَبْدِ اللَّهِ بْنِ قُسَيْطٍ اللَّيْثِيِّ عَنْ سَعِيدِ بْنِ الْمُسَيَّبِ أَنَّهُ قَالَ قَالَ عُمَرُ بْنُ الْخَطَّابِأَيُّمَا امْرَأَةٍ طُلِّقَتْ فَحَاضَتْ حَيْضَةً أَوْ حَيْضَتَيْنِ ثُمَّ رَفَعَتْهَا حَيْضَتُهَا فَإِنَّهَا تَنْتَظِرُ تِسْعَةَ أَشْهُرٍ فَإِنْ بَانَ بِهَا حَمْلٌ فَذَلِكَ وَإِلَّا اعْتَدَّتْ بَعْدَ التِّسْعَةِ أَشْهُرٍ ثَلَاثَةَ أَشْهُرٍ ثُمَّ حَلَّتْ
Lokola ayebisaki ngai Yahya uta na Malik uta na [Yahya bin Sa’id] mpe uta na [Yazid bin Abdullah bin Qusaith Al Laitsi] uta na [Sa’id Ibnul Musayyab] alobaki, [Umar Ibnul Khattab] alobaki; 'Mwasi nyonso oyo abomi libala na sima akutanaka na sanza moko to mibale mpe sima na yango akoti na ménopause - azali lisusu komona sanza te -, sima asengeli kozela kino sanza libwa.' Soki azali na zemi alors akomi halal sima ya kobota, kasi soki azali na zemi te alors il faut asala période mosusu ya iddah pendant trois mois. Sima na yango akoki kobala'.
Imam Malik : 1067
و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ يَحْيَى بْنِ سَعِيدٍ عَنْ سَعِيدِ بْنِ الْمُسَيَّبِ أَنَّهُ كَانَ يَقُولُالطَّلَاقُ لِلرِّجَالِ وَالْعِدَّةُ لِلنِّسَاءِ
Ayebisaki ngai uta na Malik uta na [Yahya bin Sa’id] uta na [Sa’id bin Musayyab] alobaki; 'Talak ezali droit ya mobali mpe 'iddah ezali droit ya mwasi'.
Imam Malik : 1068
و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ ابْنِ شِهَابٍ عَنْ سَعِيدِ بْنِ الْمُسَيَّبِ أَنَّهُ قَالَعِدَّةُ الْمُسْتَحَاضَةِ سَنَةٌ
Ayebisaki ngai uta na Malik uta na [Ibn Shihab] uta na [Sa’id Ibnul Musayyab] alobaki; 'Iddah ya mwasi ya mustahadlah ezali mbula moko'.
Imam Malik : 1069
حَدَّثَنِي يَحْيَى عَنْ مَالِك عَنْ ابْنِ شِهَابٍ عَنْ سَعِيدِ بْنِ الْمُسَيَّبِ أَنَّهُ كَانَ يَقُولُمَنْ تَزَوَّجَ امْرَأَةً فَلَمْ يَسْتَطِعْ أَنْ يَمَسَّهَا فَإِنَّهُ يُضْرَبُ لَهُ أَجَلٌ سَنَةً فَإِنْ مَسَّهَا وَإِلَّا فُرِّقَ بَيْنَهُمَا
Bayebisaki ngai ete Yahya uta na Malik uta na [Ibn Shihab] uta na [Sa’id Ibnul Musayyab] alobaki; ‘Moto oyo akobala mwasi mpe akoki kosangisa nzoto na ye te, bongo bapesameli ye eleko ya ngolu ya mbula moko. Soki azali na makoki ya kosangisa nzoto na ye - nde libala ekobi -, soki azali na makoki te nde bango mibale bakabwani'.
Imam Malik : 1070
و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك أَنَّهُ سَأَلَ ابْنَ شِهَابٍمَتَى يُضْرَبُ لَهُ الْأَجَلُ أَمِنْ يَوْمِ يَبْنِي بِهَا أَمْ مِنْ يَوْمِ تُرَافِعُهُ إِلَى السُّلْطَانِ فَقَالَ بَلْ مِنْ يَوْمِ تُرَافِعُهُ إِلَى السُّلْطَانِقَالَ مَالِك فَأَمَّا الَّذِي قَدْ مَسَّ امْرَأَتَهُ ثُمَّ اعْتَرَضَ عَنْهَا فَإِنِّي لَمْ أَسْمَعْ أَنَّهُ يُضْرَبُ لَهُ أَجَلٌ وَلَا يُفَرَّقُ بَيْنَهُمَا
Malik ayebisaki ngai atunaki [Ibnu Shihab], ‘Banda mokolo nini eleko ya ngolu ya mobali etangamaka, kobanda mokolo ya yambo afandaki na ndako moko na ye? To banda mokolo oyo balakisaki ye epai ya bakonzi?’ Ibn Shihab ayanolaki ete; 'Lokola epesamaki na bakonzi'. Malik alobaki ete; 'Na oyo etali mibali oyo liboso bazalaki na makoki ya kosangisa nzoto na basi na bango mpe na sima bapekisamaki kosala yango - kozanga makoki -, na likambo oyo nayoká naino te likanisi oyo elobi ete mobali yango apesamaki eleko ya ngolu, to akabwanaki na mwasi na ye'.
Imam Malik : 1071
و حَدَّثَنِي يَحْيَى عَنْ مَالِك عَنْ ابْنِ شِهَابٍ أَنَّهُ قَالَ بَلَغَنِيأَنَّ رَسُولَ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ قَالَ لِرَجُلٍ مِنْ ثَقِيفٍ أَسْلَمَ وَعِنْدَهُ عَشْرُ نِسْوَةٍ حِينَ أَسْلَمَ الثَّقَفِيُّ أَمْسِكْ مِنْهُنَّ أَرْبَعًا وَفَارِقْ سَائِرَهُنَّ
Elobami na ngai ete Yahya uta na Malik uta na [Ibn Shihab] alobaki, ' Sango eyeli ngai ete Ntoma ya Allah sallallaahu 'alaihi wasallam alobaki na mobali moko ya libota ya Tsaqif oyo abongwanaki na Islam alors que na tango wana azalaki na basi zomi: 'Bopona basi na bino minei, pe boboma libala na oyo batikali'.
Imam Malik : 1072
و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ ابْنِ شِهَابٍ أَنَّهُ قَالَ سَمِعْتُ سَعِيدَ بْنَ الْمُسَيَّبِ وَحُمَيْدَ بْنَ عَبْدِ الرَّحْمَنِ بْنِ عَوْفٍ وَعُبَيْدَ اللَّهِ بْنَ عَبْدِ اللَّهِ بْنِ عُتْبَةَ بْنِ مَسْعُودٍ وَسُلَيْمَانَ بْنَ يَسَارٍ كُلُّهُمْ يَقُولُ سَمِعْتُ أَبَا هُرَيْرَةَ يَقُولُ سَمِعْتُ عُمَرَ بْنَ الْخَطَّابِ يَقُولُأَيُّمَا امْرَأَةٍ طَلَّقَهَا زَوْجُهَا تَطْلِيقَةً أَوْ تَطْلِيقَتَيْنِ ثُمَّ تَرَكَهَا حَتَّى تَحِلَّ وَتَنْكِحَ زَوْجًا غَيْرَهُ فَيَمُوتَ عَنْهَا أَوْ يُطَلِّقَهَا ثُمَّ يَنْكِحُهَا زَوْجُهَا الْأَوَّلُ فَإِنَّهَا تَكُونُ عِنْدَهُ عَلَى مَا بَقِيَ مِنْ طَلَاقِهَاقَالَ مَالِك وَعَلَى ذَلِكَ السُّنَّةُ عِنْدَنَا الَّتِي لَا اخْتِلَافَ فِيهَا
Yahya ayebisaki ngai uta na Malik uta na [Ibn Shihab] alobaki; Nayokaki [Sa’id Ibnul Musayyab] mpe [Humaid bin Abdurrahman bin Auf] mpe [‘Ubaidullah bin Abdullah bin Utbah bin Mas’ud] mpe [Sulaiman bin Yasar] bango nyonso balobi; Nayokaki [Abu Hurairah] koloba; Nayokaki [Umar Ibnul Khattab] koloba; ‘Mwasi nionso oyo mobali na ye abomi libala na ye na divorce moko to mibale, sima atiki ye tii tango période na ye ya iddah ekosila, sima abala lisusu mobali mosusu. Sima mobali na ye - ya mibale - akufaki to abomi libala na ye, sima abalaki lisusu mobali na ye ya liboso, yango wana akobaki na oyo etikali ya koboma libala oyo mobali na ye ya liboso atindaki’. Malik alobaki ete; 'Oyo ezali sunnah oyo esalemi kati na biso, pe matata ezali te na kati'.
Imam Malik : 1073
و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ ثَابِتِ بْنِ الْأَحْنَفِ أَنَّهُتَزَوَّجَ أُمَّ وَلَدٍ لِعَبْدِ الرَّحْمَنِ بْنِ زَيْدِ بْنِ الْخَطَّابِ قَالَ فَدَعَانِي عَبْدُ اللَّهِ بْنُ عَبْدِ الرَّحْمَنِ بْنِ زَيْدِ بْنِ الْخَطَّابِ فَجِئْتُهُ فَدَخَلْتُ عَلَيْهِ فَإِذَا سِيَاطٌ مَوْضُوعَةٌ وَإِذَا قَيْدَانِ مِنْ حَدِيدٍ وَعَبْدَانِ لَهُ قَدْ أَجْلَسَهُمَا فَقَالَ طَلِّقْهَا وَإِلَّا وَالَّذِي يُحْلَفُ بِهِ فَعَلْتُ بِكَ كَذَا وَكَذَا قَالَ فَقُلْتُ هِيَ الطَّلَاقُ أَلْفًا قَالَ فَخَرَجْتُ مِنْ عِنْدِهِ فَأَدْرَكْتُ عَبْدَ اللَّهِ بْنَ عُمَرَ بِطَرِيقِ مَكَّةَ فَأَخْبَرْتُهُ بِالَّذِي كَانَ مِنْ شَأْنِي فَتَغَيَّظَ عَبْدُ اللَّهِ وَقَالَ لَيْسَ ذَلِكَ بِطَلَاقٍ وَإِنَّهَا لَمْ تَحْرُمْ عَلَيْكَ فَارْجِعْ إِلَى أَهْلِكَقَالَ فَلَمْ تُقْرِرْنِي نَفْسِي حَتَّى أَتَيْتُ عَبْدَ اللَّهِ بْنَ الزُّبَيْرِ وَهُوَ يَوْمَئِذٍ بِمَكَّةَ أَمِيرٌ عَلَيْهَا فَأَخْبَرْتُهُ بِالَّذِي كَانَ مِنْ شَأْنِي وَبِالَّذِي قَالَ لِي عَبْدُ اللَّهِ بْنُ عُمَرَ قَالَ فَقَالَ لِي عَبْدُ اللَّهِ بْنُ الزُّبَيْرِ لَمْ تَحْرُمْ عَلَيْكَ فَارْجِعْ إِلَى أَهْلِكَ وَكَتَبَ إِلَى جَابِرِ بْنِ الْأَسْوَدِ الزُّهْرِيِّ وَهُوَ أَمِيرُ الْمَدِينَةِ يَأْمُرُهُ أَنْ يُعَاقِبَ عَبْدَ اللَّهِ بْنَ عَبْدِ الرَّحْمَنِ وَأَنْ يُخَلِّيَ بَيْنِي وَبَيْنَ أَهْلِي قَالَ فَقَدِمْتُ الْمَدِينَةَ فَجَهَّزَتْ صَفِيَّةُ امْرَأَةُ عَبْدِ اللَّهِ بْنِ عُمَرَ امْرَأَتِي حَتَّى أَدْخَلَتْهَا عَلَيَّ بِعِلْمِ عَبْدِ اللَّهِ بْنِ عُمَرَ ثُمَّ دَعَوْتُ عَبْدَ اللَّهِ بْنَ عُمَرَ يَوْمَ عُرْسِي لِوَلِيمَتِي فَجَاءَنِي
Eyebisami na ngai uta na Malik uta na [Thabit bin Al Ahnaf] ete abalaki ummu walad ya Abdurrahman bin Zaid bin Khattab. Thabit alobaki, ‘Abdullah bin Abdurrahman bin Zaid bin Khattab abengaki ngai, yango wana nayaki mpe nakotaki mpo na kokutana na ye. Mpe emonanaki ete na kati fimbo moko elalaki, minyɔlɔlɔ mibale ya ebende mpe baombo na ye mibale bafandaki wana. Abdullah bin ‘Abdurrahman alors alobaki, ‘Boboma libala na mwasi na yo, soki te, na Oyo kombo na ye esalelamaka pona kolapa ndai, nakosalela yo boye pe boye’. Na nsima, nalobaki ete, ‘Nabomi libala na ye mbala nkóto! ’ nsima nalongwaki na ndako na ye ya kofanda, mpe na balabala ya Makkah nakutanaki na [Abdullah bin Umar]. Na nsima, nayebisaki ye likambo oyo nautaki kokutana na yango. Yango wana Abdullah bin Umar asiliki pe alobaki, ‘Wana ezali koboma libala te, mpe ezali kaka halal mpo na bino. Yango wana kende na ndaku epayi ya mwasi na yo''. Thabit bin Al Ahnaf alobaki ete; ‘Kasi motema na ngai ezalaki naino kimia te, yango wana nakutanaki na Abdullah bin Zubair, oyo na ntango wana azalaki gouverneur ya Mecque. Na nsima nayebisaki ye likambo oyo ekómelaki ngai mpe eyano ya Abdullah bin Umar na likambo yango. [Abdullah bin Zubair] na nsima alobaki; ‘Azali kaka halal mpo na yo. Zongela mwasi na yo'. Na sima akomi mokanda na Jabir bin Aswad Az Zuhri, oyo na tango wana azalaki gouverneur ya Medina, kosenga ye apesa etumbu na Abdullah bin Abdurrahman pe atika nazonga epayi ya mwasi na ngai. Sima na yango nazongaki na Medina, sima Shafiyyah, mwasi ya Abdullah bin Umar, abongisaki mwasi na ngai mpo apesa ngai na boyebi ya Abdullah bin Umar. Na sima nabengisi Abdullah bin Umar na mokolo ya libala na ngai, pe ayaki'.
Imam Malik : 1074
و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ عَبْدِ اللَّهِ بْنِ دِينَارٍ أَنَّهُ قَالَ سَمِعْتُ عَبْدَ اللَّهِ بْنَ عُمَرَقَرَأَ{ يَا أَيُّهَا النَّبِيُّ إِذَا طَلَّقْتُمْ النِّسَاءَ فَطَلِّقُوهُنَّ }لِقُبُلِ عِدَّتِهِنَّقَالَ مَالِك يَعْنِي بِذَلِكَ أَنْ يُطَلِّقَ فِي كُلِّ طُهْرٍ مَرَّةً
Elobami na ngai uta na Malik uta na [Abdullah bin Dinar] alobi, nayokaki [Abdullah bin Umar] kotanga verset oyo: '-Ee profeta, tango obomi libala na basi na yo, wana esengeli oboma libala na bango...' -Qs. Ath Thalaq: 1- na ebandeli ya eleko na bango ya iddah'. Malik alobaki ete; 'Ndimbola ezali koboma libala mbala moko mbala nyonso na ezalela ya peto'.
Imam Malik : 1075
و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ هِشَامِ بْنِ عُرْوَةَ عَنْ أَبِيهِ أَنَّهُ قَالَكَانَ الرَّجُلُ إِذَا طَلَّقَ امْرَأَتَهُ ثُمَّ ارْتَجَعَهَا قَبْلَ أَنْ تَنْقَضِيَ عِدَّتُهَا كَانَ ذَلِكَ لَهُ وَإِنْ طَلَّقَهَا أَلْفَ مَرَّةٍ فَعَمَدَ رَجُلٌ إِلَى امْرَأَتِهِ فَطَلَّقَهَا حَتَّى إِذَا شَارَفَتْ انْقِضَاءَ عِدَّتِهَا رَاجَعَهَا ثُمَّ طَلَّقَهَا ثُمَّ قَالَ لَا وَاللَّهِ لَا آوِيكِ إِلَيَّ وَلَا تَحِلِّينَ أَبَدًا فَأَنْزَلَ اللَّهُ تَبَارَكَ وَتَعَالَى{ الطَّلَاقُ مَرَّتَانِ فَإِمْسَاكٌ بِمَعْرُوفٍ أَوْ تَسْرِيحٌ بِإِحْسَانٍ }فَاسْتَقْبَلَ النَّاسُ الطَّلَاقَ جَدِيدًا مِنْ يَوْمِئِذٍ مَنْ كَانَ طَلَّقَ مِنْهُمْ أَوْ لَمْ يُطَلِّقْ
Elobami na biso uta na Malik uta na [Hisyam bin Urwah] uta na [tata na ye] alobaki; "Soki mobali abomi libala na mwasi na ye, azali na lotomo ya koyokana na ye soki eleko ya iddah esili te, ata soki abomi libala na ye mbala nkoto." Mobali moko abomaki libala na mwasi na ye na nko, na boye ete ntango eleko na ye ya iddah esilaki azongaki epai na ye, na nsima abomaki libala na ye lisusu. Sima na yango alobaki, 'Te, na nzela ya Allah, nakosala sexuel na yo te pe okozala jamais halal - période ya iddah ekosila jamais po balobelaka yango tango nionso'-'. Na sima Allah Tabaraka Wa Ta'ala abimisi verset oyo: '-Talak -oyo ekoki kolobelama- mbala mibale. Sima na yango, bokoki kozongisa boyokani na ndenge ya malamu to koboma libala na ndenge ya malamu-' -Qs. Al Baqarah: 231- Uta bobimisi ya vɛrsɛ oyo, bato basali lisusu calcul ya koboma libala banda ebandeli, ezala basila koboma libala to baoyo basalaki yango naino te.'
Imam Malik : 1076
و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ ثَوْرِ بْنِ زَيْدٍ الدِّيلِيِّأَنَّ الرَّجُلَ كَانَ يُطَلِّقُ امْرَأَتَهُ ثُمَّ يُرَاجِعُهَا وَلَا حَاجَةَ لَهُ بِهَا وَلَا يُرِيدُ إِمْسَاكَهَا كَيْمَا يُطَوِّلُ بِذَلِكَ عَلَيْهَا الْعِدَّةَ لِيُضَارَّهَا فَأَنْزَلَ اللَّهُ تَبَارَكَ وَتَعَالَى{ وَلَا تُمْسِكُوهُنَّ ضِرَارًا لِتَعْتَدُوا وَمَنْ يَفْعَلْ ذَلِكَ فَقَدْ ظَلَمَ نَفْسَهُ }يَعِظُهُمْ اللَّهُ بِذَلِكَ
Bayebisaki ngai ete Malik uta na [Tsaur bin Zaid Ad Dili] alobaki, ‘Mobali moko abomaki libala na mwasi na ye mpe na nsima abalaki ye lisusu atako azalaki lisusu na mposa na ye te mpe alingaki kokómisa ye lisusu mwasi na ye te. Alingi kaka ko prolonger période ya iddah na ye po muasi na ye a souffrir. Na sima Allah Tabaraka Wa Ta'ala abimisi verset oyo: '-Koloba na bango te pona kosala mabe, po na kosala bongo okosala bango mabe-' -Qs. Al Baqarah: 231- Allah apesaki bango toli boye.
Imam Malik : 1077
حَدَّثَنِي يَحْيَى عَنْ مَالِك عَنْ عَبْدِ رَبِّهِ بْنِ سَعِيدِ بْنِ قَيْسٍ عَنْ أَبِي سَلَمَةَ بْنِ عَبْدِ الرَّحْمَنِ أَنَّهُ قَالَ سُئِلَ عَبْدُ اللَّهِ بْنُ عَبَّاسٍ وَأَبُو هُرَيْرَةَ عَنْ الْمَرْأَةِ الْحَامِلِ يُتَوَفَّى عَنْهَا زَوْجُهَا فَقَالَ ابْنُ عَبَّاسٍ آخِرَ الْأَجَلَيْنِ وَقَالَ أَبُو هُرَيْرَةَ إِذَا وَلَدَتْ فَقَدْ حَلَّتْفَدَخَلَ أَبُو سَلَمَةَ بْنُ عَبْدِ الرَّحْمَنِ عَلَى أُمِّ سَلَمَةَ زَوْجِ النَّبِيِّ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ فَسَأَلَهَا عَنْ ذَلِكَ فَقَالَتْ أُمُّ سَلَمَةَ وَلَدَتْ سُبَيْعَةُ الْأَسْلَمِيَّةُ بَعْدَ وَفَاةِ زَوْجِهَا بِنِصْفِ شَهْرٍ فَخَطَبَهَا رَجُلَانِ أَحَدُهُمَا شَابٌّ وَالْآخَرُ كَهْلٌ فَحَطَّتْ إِلَى الشَّابِّ فَقَالَ الشَّيْخُ لَمْ تَحِلِّي بَعْدُ وَكَانَ أَهْلُهَا غَيَبًا وَرَجَا إِذَا جَاءَ أَهْلُهَا أَنْ يُؤْثِرُوهُ بِهَا فَجَاءَتْ رَسُولَ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ فَقَالَ قَدْ حَلَلْتِ فَانْكِحِي مَنْ شِئْتِ
Yahya ayebisaki ngai uta na Malik uta na [Abdu Rabbih bin Sa’id bin Qais] uta na [Abu Salamah bin Abdurrahman] alobaki; ’ [Ibn Abbas] na [Abu Hurairah] batunaki bango mpo na mwasi moko ya zemi oyo mobali na ye akufaki. Ibn Abbas ayanolaki ete, ‘Iddah na ye ezali molai koleka bileko mibale ya iddah’. Mpe Abu Hurairah ayanolaki ete, ‘Soki aboti mwana, elakisi ete eleko na ye ya iddah esili’. Na sima Abu Salamah akutanaki na Umm Salamah, mwasi ya Ntoma sallallaahu ‘alaihi wasallam mpe atunaki ye likambo oyo. [Umm Salamah] na nsima ayanolaki; 'Subai'ah Al Aslamiyah abotaki mwana na ye ndambo ya sanza sima ya liwa ya mobali na ye, sima mibali mibale ba proposaki ye, moko elenge mpe moko ya mobange. Na sima Subai’ah azalaki na momesano ya kotala mibali oyo bazalaki bilenge, yango wana mibali oyo bazalaki mikóló balobaki, ‘Eleko na yo ya iddah esili naino te’. -alobaki bongo mpo- libota ya Shubai'ah ezalaki mosika, yango wana tango bakoya, bakotia ye na esika ya liboso -liki ya bilenge mibali-. Na sima Subai’ah akutanaki na Rasulullah sallallaahu ‘alaihi wasallam, alobaki: ‘Période ya iddah na yo eleki, bala oyo olingi’.
Imam Malik : 1078
و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ نَافِعٍ عَنْ عَبْدِ اللَّهِ بْنِ عُمَرَأَنَّهُ سُئِلَ عَنْ الْمَرْأَةِ يُتَوَفَّى عَنْهَا زَوْجُهَا وَهِيَ حَامِلٌ فَقَالَ عَبْدُ اللَّهِ بْنُ عُمَرَ إِذَا وَضَعَتْ حَمْلَهَا فَقَدْ حَلَّتْفَأَخْبَرَهُ رَجُلٌ مِنْ الْأَنْصَارِ كَانَ عِنْدَهُ أَنَّ عُمَرَ بْنَ الْخَطَّابِ قَالَ لَوْ وَضَعَتْ وَزَوْجُهَا عَلَى سَرِيرِهِ لَمْ يُدْفَنْ بَعْدُ لَحَلَّتْ
Eyebisamaki na ngai uta na Malik uta na [Nafi’] uta na [Abdullah bin Umar] ete mokolo moko batunaki ye mpo na mwasi moko oyo mobali na ye akufaki, atako azalaki na zemi. Abdullah bin Umar na sima ayanolaki; 'Ntango aboti mwana na ye, elakisi ete eleko na ye ya iddah esili'. Na nsima [mobali moko ya Ansar] oyo azalaki elongo na ye ayebisaki ye ete [Umar bin Khattab] alobaki; 'Soki abotaki ntango nzoto ya mobali na ye elalaki naino na mbeto mpe akundamaki te, boye alingaki kokoma halal'.
Imam Malik : 1079
و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ هِشَامِ بْنِ عُرْوَةَ عَنْ أَبِيهِ عَنْ الْمِسْوَرِ بْنِ مَخْرَمَةَ أَنَّهُ أَخْبَرَهُأَنَّ سُبَيْعَةَ الْأَسْلَمِيَّةَ نُفِسَتْ بَعْدَ وَفَاةِ زَوْجِهَا بِلَيَالٍ فَقَالَ لَهَا رَسُولُ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ قَدْ حَلَلْتِ فَانْكِحِي مَنْ شِئْتِ
Ayebisaki biso uta na Malik uta na [Hisyam bin Urwah] uta na [tata na ye] uta na [Al Miswar bin Makhramah] ayebisaki ete Subai’ah Al Aslamiyah azalaki kaka kobima makila na puerpérium nsima ya mikolo mingi ya liwa ya mobali na ye. Ntoma sallallaahu ‘alaihi wasallam alobaki: ‘Période ya iddah na yo esili, okoki kobala mobali nionso olingi’.
Imam Malik : 1080
و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ يَحْيَى بْنِ سَعِيدٍ عَنْ سُلَيْمَانَ بْنِ يَسَارٍ أَنَّ عَبْدَ اللَّهِ بْنَ عَبَّاسٍ وَأَبَا سَلَمَةَ بْنَ عَبْدِ الرَّحْمَنِ بْنِ عَوْفٍ اخْتَلَفَا فِي الْمَرْأَةِ تُنْفَسُ بَعْدَ وَفَاةِ زَوْجِهَا بِلَيَالٍ فَقَالَ أَبُو سَلَمَةَ إِذَا وَضَعَتْ مَا فِي بَطْنِهَا فَقَدْ حَلَّتْ لِلْأَزْوَاجِ وَقَالَ ابْنُ عَبَّاسٍ آخِرَ الْأَجَلَيْنِ فَجَاءَ أَبُو هُرَيْرَةَ فَقَالَ أَنَا مَعَ ابْنِ أَخِي يَعْنِي أَبَا سَلَمَةَ فَبَعَثُوا كُرَيْبًا مَوْلَى عَبْدِ اللَّهِ بْنِ عَبَّاسٍ إِلَى أُمِّ سَلَمَةَ زَوْجِ النَّبِيِّ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ يَسْأَلُهَا عَنْ ذَلِكَ فَجَاءَهُمْفَأَخْبَرَهُمْ أَنَّهَا قَالَتْ وَلَدَتْ سُبَيْعَةُ الْأَسْلَمِيَّةُ بَعْدَ وَفَاةِ زَوْجِهَا بِلَيَالٍ فَذَكَرَتْ ذَلِكَ لِرَسُولِ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ فَقَالَ قَدْ حَلَلْتِ فَانْكِحِي مَنْ شِئْتِقَالَ مَالِك وَهَذَا الْأَمْرُ الَّذِي لَمْ يَزَلْ عَلَيْهِ أَهْلُ الْعِلْمِ عِنْدَنَا
Eyebisami na ngai uta na Malik uta na [Yahya bin Sa’id] uta na [Sulaiman bin Yasar] ete [Abdullah bin Abbas] mpe [Abu Salamah bin Abdurrahman bin ‘Auf] mokolo moko bazalaki na boyokani te na oyo etali iddah ya mwasi oyo abotaki mikolo mingi nsima ya liwa ya mobali na ye. Abu Salamah alobaki; ‘Soki aboti mwana, elakisi ete akoki kobala mobali mosusu.’ Na ntango yango, Ibn Abbas alobaki ete; 'Iddah ezali -iddah- oyo ezali na ntango molai koleka'. [Abu Hurairah] ayaki mpe alobaki; 'Nandimi mwana ya ndeko na ngai, Abu Salamah'. Na sima batindaki Kuraib, moombo ya kala ya Abdullah bin Abbas mpo na kokutana na Umm Salamah, mwasi ya Ntoma sallallaahu ‘alaihi wasallam, mpo na kotuna likambo oyo. [Kuraib] sima ayaki epayi na bango, koyebisa bango que [Ummu Salamah] alobaki, ‘Subai’ah Al Aslamiyah mbala moko abotaki mwana na ye sima ya liwa ya mobali na ye mikolo ebele sima, sima atunaki Rasulullah sallallaahu ‘alaihi wasallam na likambo oyo, sima alobaki na ye; 'Période na yo ya iddah esili, bala oyo olingi'. Malik alobaki ete; "Na makanisi na biso, oyo ezali likanisi oyo bato ya siansi bazali naino kotya motema na yango."