Imam Malik : 901
و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ يَحْيَى بْنِ سَعِيدٍ عَنْ الْقَاسِمِ بْنِ مُحَمَّدٍ أَنَّهُ سَمِعَهُ يَقُولُ أَتَتْ امْرَأَةٌ إِلَى عَبْدِ اللَّهِ بْنِ عَبَّاسٍفَقَالَتْ إِنِّي نَذَرْتُ أَنْ أَنْحَرَ ابْنِي فَقَالَ ابْنُ عَبَّاسٍ لَا تَنْحَرِي ابْنَكِ وَكَفِّرِي عَنْ يَمِينِكِ فَقَالَ شَيْخٌ عِنْدَ ابْنِ عَبَّاسٍ وَكَيْفَ يَكُونُ فِي هَذَا كَفَّارَةٌ فَقَالَ ابْنُ عَبَّاسٍ إِنَّ اللَّهَ تَعَالَى قَالَ{ وَالَّذِينَ يُظَاهِرُونَ }مِنْكُمْ{ مِنْ نِسَائِهِمْ }ثُمَّ جَعَلَ فِيهِ مِنْ الْكَفَّارَةِ مَا قَدْ رَأَيْتَ
Elobami na ngai uta na Malik uta na [Yahya bin Sa’id] uta na [Al Qasim bin Muhammad] ete ayokaki ye koloba, ‘Mwasi moko akutanaki na Abdullah bin Abbas mpe alobaki; 'Nalapi ndai ya koboma mwana na ngai'. [Ibn Abbas] na nsima alobaki; 'Koboma mwana na yo te, mpe futa amende mpo na ndai na yo'. Na sima mobange oyo azalaki pembeni ya Ibn Abbas alobaki, ‘Ndenge nini akoki kozala na posa ya kofuta kafarah? ’ Ibn Abbas ayanolaki ete; ‘Allah Ta’ala alobaki: ‘-Mpe baye basalaka zhihar kati na bino na basi na bango-’ -Qs. Al Mujadilah: 3- sima Allah atie kafarah likolo na ye ndenge boyebi'.
Imam Malik : 902
و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ طَلْحَةَ بْنِ عَبْدِ الْمَلِكِ الْأَيْلِيِّ عَنْ الْقَاسِمِ بْنِ مُحَمَّدٍ ابْنِ الصِّدِّيقِ عَنْ عَائِشَةَأَنَّ رَسُولَ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ قَالَ مَنْ نَذَرَ أَنْ يُطِيعَ اللَّهَ فَلْيُطِعْهُ وَمَنْ نَذَرَ أَنْ يَعْصِيَ اللَّهَ فَلَا يَعْصِهِقَالَ يَحْيَى و سَمِعْت قَوْله تَعَالَى يَقُولُ مَعْنَى قَوْلِ رَسُولِ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ مَنْ نَذَرَ أَنْ يَعْصِيَ اللَّهَ فَلَا يَعْصِهِ أَنْ يَنْذِرَ الرَّجُلُ أَنْ يَمْشِيَ إِلَى الشَّامِ أَوْ إِلَى مِصْرَ أَوْ إِلَى الرَّبَذَةِ أَوْ مَا أَشْبَهَ ذَلِكَ مِمَّا لَيْسَ لِلَّهِ بِطَاعَةٍ إِنْ كَلَّمَ فُلَانًا أَوْ مَا أَشْبَهَ ذَلِكَ فَلَيْسَ عَلَيْهِ فِي شَيْءٍ مِنْ ذَلِكَ شَيْءٌ إِنْ هُوَ كَلَّمَهُ أَوْ حَنِثَ بِمَا حَلَفَ عَلَيْهِ لِأَنَّهُ لَيْسَ لِلَّهِ فِي هَذِهِ الْأَشْيَاءِ طَاعَةٌ وَإِنَّمَا يُوَفَّى لِلَّهِ بِمَا لَهُ فِيهِ طَاعَةٌ
Elobami na ngai uta na Malik uta na [Thalhah bin Abdul Malik Al Aili] uta na [Al Qasim bin Muhammad bin Ash-Shiddiq] uta na [Aisyah] ete Ntoma ya Allah sallallaahu ‘alaihi wasallam alobaki: ‘Oyo alapi ndai ya kotosa Allah, tika ye asala yango. Oyo alapi ndai ete akozanga botosi na Ye, tika yango esalema te'. Yahya alobaki; ‘Nayokaki Malik koloba ete; Ndimbola ya maloba ya Ntoma sallallaahu ‘alaihi wasallam ‘Oyo alapi ndai ete akozanga botosi Ye, bongo asala yango te,’ elingi koloba soki moto alaki kosala mobembo na mokili ya Syrie, to na Egypte, to na Rabadzah, to na esika mosusu oyo ezali na motuya te ya kotosa Allah, to soki asengi kosolola na moto to mosusu oyo ezali te. Donc obligation ezali te pona ye à partir ya wana; soki ayebisi moto to abuki elaka, mpo na yango motuya ya botosi ezali te. Esengeli kokokisa elaka ya Nzambe soki motuya ya botosi ezali kati na yango’.
Imam Malik : 903
حَدَّثَنِي يَحْيَى عَنْ مَالِك عَنْ هِشَامِ بْنِ عُرْوَةَ عَنْ أَبِيهِ عَنْ عَائِشَةَ أُمِّ الْمُؤْمِنِينَ أَنَّهَا كَانَتْ تَقُولُلَغْوُ الْيَمِينِ قَوْلُ الْإِنْسَانِ لَا وَاللَّهِ لَا وَاللَّهِ
Ayebisaki ngai Yahya uta na Malik uta na [Hisyam bin Urwah] uta na [tata na ye] uta na ['Aisyah] Ummul Mukminin, alobaki; ‘Elapa oyo etalelami te ezali moto oyo alobi ete, ‘Te, na nzela ya Allah, te, na nzela ya Allah’.
Imam Malik : 904
حَدَّثَنِي يَحْيَى عَنْ مَالِك عَنْ نَافِعٍ عَنْ عَبْدِ اللَّهِ بْنِ عُمَرَ أَنَّهُ كَانَ يَقُولُمَنْ قَالَ وَاللَّهِ ثُمَّ قَالَ إِنْ شَاءَ اللَّهُ ثُمَّ لَمْ يَفْعَلْ الَّذِي حَلَفَ عَلَيْهِ لَمْ يَحْنَثْ
Bayebisaki ngai ete Yahya uta na Malik uta na [Nafi’] uta na [Abdullah bin Umar] alobaki; ‘Oyo alobi; 'Na Allah,' sima alobaki 'INSYA ALLAH' -soki Allah alingi-, wana akokisaki ndai te alors azalaki te kati na baye babukaki ndai'.
Imam Malik : 905
حَدَّثَنِي يَحْيَى عَنْ مَالِك عَنْ سُهَيْلِ بْنِ أَبِي صَالِحٍ عَنْ أَبِيهِ عَنْ أَبِي هُرَيْرَةَأَنَّ رَسُولَ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ قَالَ مَنْ حَلَفَ بِيَمِينٍ فَرَأَى غَيْرَهَا خَيْرًا مِنْهَا فَلْيُكَفِّرْ عَنْ يَمِينِهِ وَلْيَفْعَلْ الَّذِي هُوَ خَيْرٌ
Yahya ayebisi ngai uta na Malik uta na [Suhail bin Abu Salih] uta na [tata na ye] uta na [Abu Hurairah] ete Ntoma ya Allah salla Allahu ‘alaihi wa sallam alobaki: ‘Oyo alapi ndai, nde amoni eloko ya malamu koleka oyo alapaki ndai, nde asengeli kofuta amende mpo na ndai na ye mpe na nsima asala likambo ya malamu koleka’.
Imam Malik : 906
حَدَّثَنِي يَحْيَى عَنْ مَالِك عَنْ نَافِعٍ عَنْ عَبْدِ اللَّهِ بْنِ عُمَرَ أَنَّهُ كَانَ يَقُولُمَنْ حَلَفَ بِيَمِينٍ فَوَكَّدَهَا ثُمَّ حَنِثَ فَعَلَيْهِ عِتْقُ رَقَبَةٍ أَوْ كِسْوَةُ عَشَرَةِ مَسَاكِينَ وَمَنْ حَلَفَ بِيَمِينٍ فَلَمْ يُؤَكِّدْهَا ثُمَّ حَنِثَ فَعَلَيْهِ إِطْعَامُ عَشَرَةِ مَسَاكِينَ لِكُلِّ مِسْكِينٍ مُدٌّ مِنْ حِنْطَةٍ فَمَنْ لَمْ يَجِدْ فَصِيَامُ ثَلَاثَةِ أَيَّامٍ
Ayebisaki ngai Yahya uta na Malik uta na [Nafi’] uta na [Abdullah bin Umar] alobaki; ‘Moto oyo alapi ndai, na nsima andimi ndai mpe na nsima abuki yango, ezali mokumba mpo na ye kosikola moombo to kolatisa babola zomi. Oyo alapi ndai mpe andimi ndai te, sima abuki yango, ezali obligatoire mpo na ye koleisa babola zomi, moto na moto azwa mbuma moko ya blé. Mpe mpo na baye bazwi yango te, tika ete akila bilei mikolo misato'.
Imam Malik : 907
و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ نَافِعٍ عَنْ عَبْدِ اللَّهِ بْنِ عُمَرَأَنَّهُ كَانَ يُكَفِّرُ عَنْ يَمِينِهِ بِإِطْعَامِ عَشَرَةِ مَسَاكِينَ لِكُلِّ مِسْكِينٍ مُدٌّ مِنْ حِنْطَةٍ وَكَانَ يَعْتِقُ الْمِرَارَ إِذَا وَكَّدَ الْيَمِينَ
Eyebisami na ngai uta na Malik uta na [Nafi’] uta na [Abdullah bin Umar] ete mokolo moko afutaki amende mpo na ndai na ye na koleisaka babola zomi, mobola moko na moko azwaki mbuma moko ya blé. Mpe soki andimi ndai na ye nde alongoli moombo’.
Imam Malik : 908
و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ يَحْيَى بْنِ سَعِيدٍ عَنْ سُلَيْمَانَ بْنِ يَسَارٍ أَنَّهُ قَالَأَدْرَكْتُ النَّاسَ وَهُمْ إِذَا أَعْطَوْا فِي كَفَّارَةِ الْيَمِينِ أَعْطَوْا مُدًّا مِنْ حِنْطَةٍ بِالْمُدِّ الْأَصْغَرِ وَرَأَوْا ذَلِكَ مُجْزِئًا عَنْهُمْ
Ayebisaki ngai uta na Malik uta na [Yahya bin Sa’id] uta na [Sulaiman bin Yasar] alobaki; 'Nakuti bato oyo soki bapesi kafarat na ndai, bakopesa potopoto moko ya blé na potopoto ya moke, mpe bakanisaki ete yango ekoki'.
Imam Malik : 909
حَدَّثَنِي يَحْيَى عَنْ مَالِك عَنْ نَافِعٍ عَنْ عَبْدِ اللَّهِ بْنِ عُمَرَأَنَّ رَسُولَ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ أَدْرَكَ عُمَرَ بْنَ الْخَطَّابِ رَضِيَ اللَّهُ عَنْهُ وَهُوَ يَسِيرُ فِي رَكْبٍ وَهُوَ يَحْلِفُ بِأَبِيهِ فَقَالَ رَسُولُ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ إِنَّ اللَّهَ يَنْهَاكُمْ أَنْ تَحْلِفُوا بِآبَائِكُمْ فَمَنْ كَانَ حَالِفًا فَلْيَحْلِفْ بِاللَّهِ أَوْ لِيَصْمُتْو حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك أَنَّهُ بَلَغَهُ أَنَّ رَسُولَ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ كَانَ يَقُولُ لَا وَمُقَلِّبِ الْقُلُوبِ
Bayebisaki ngai ete Yahya uta na Malik uta na [Nafi’] uta na [Abdullah bin Umar] alobaki, ‘Rasulullah shallallahu ‘alaihi wasallam akutaki Umar bin Khaththab kolapa ndai elongo na tata na ye ntango azalaki kotambola na etuluku. Rasulullah salla Allahu ‘alaihi wa sallam sima alobaki: ‘Ya solo Allah apekisi bino kolapa ndai na kombo ya batata na bino. Oyo alapi ndai asengeli kolapa ndai na kombo ya Allah, soki te ezali malamu kotikala kimia’. Elobami na ngai uta na Malik ete ekomi epai na ye, ete Ntoma ya Allah salla Allahu ‘alaihi wa sallam alobaki: ‘Te, na Moto oyo abalusaka mitema.’
Imam Malik : 910
و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ عُثْمَانَ بْنِ حَفْصِ بْنِ عُمَرَ بْنِ خَلْدَةَ عَنْ ابْنِ شِهَابٍ أَنَّهُ بَلَغَهُأَنَّ أَبَا لُبَابَةَ بْنَ عَبْدِ الْمُنْذِرِ حِينَ تَابَ اللَّهُ عَلَيْهِ قَالَ يَا رَسُولَ اللَّهِ أَهْجُرُ دَارَ قَوْمِي الَّتِي أَصَبْتُ فِيهَا الذَّنْبَ وَأُجَاوِرُكَ وَأَنْخَلِعُ مِنْ مَالِي صَدَقَةً إِلَى اللَّهِ وَإِلَى رَسُولِهِ فَقَالَ رَسُولُ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ يُجْزِيكَ مِنْ ذَلِكَ الثُّلُثُ
Eyebisami na ngai uta na Malik uta na [’Uthman bin Hafsh bin Umar bin Khaldah] uta na [Ibn Shihab] ete ekomi epai na ye, ete ntango Allah andimaki boyamboli ya Abu Lubabah bin Abdul Mundzir, alobaki; 'Ee Ntoma ya Allah, nakotika mboka na ngai oyo etondi na masumu, nalingi kofanda pene na yo, pe nakopesa bomengo na ngai lokola lolenge ya bolingo epai ya Allah pe Ntoma na Ye'. Na sima Rasulullah sallallaahu ‘alaihi wasallam alobaki: ‘Ekoki mpo na bino kopesa charité na moko na misato’.
Imam Malik : 911
و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ أَيُّوبَ بْنِ مُوسَى عَنْ مَنْصُورِ بْنِ عَبْدِ الرَّحْمَنِ الْحَجَبِيِّ عَنْ أُمِّهِ عَنْ عَائِشَةَ أُمِّ الْمُؤْمِنِينَ رَضِيَ اللَّهُ عَنْهَاأَنَّهَا سُئِلَتْ عَنْ رَجُلٍ قَالَ مَالِي فِي رِتَاجِ الْكَعْبَةِ فَقَالَتْ عَائِشَةُ يُكَفِّرُهُ مَا يُكَفِّرُ الْيَمِينَقَالَ مَالِك فِي الَّذِي يَقُولُ مَالِي فِي سَبِيلِ اللَّهِ ثُمَّ يَحْنَثُ قَالَ يَجْعَلُ ثُلُثَ مَالِهِ فِي سَبِيلِ اللَّهِ وَذَلِكَ لِلَّذِي جَاءَ عَنْ رَسُولِ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ فِي أَمْرِ أَبِي لُبَابَةَ
Eyebisami na ngai uta na Malik uta na [Ayyub bin Musa] uta na [Mansur bin Abdurrahman Al Hajabi] uta na [Mama na ye] uta na ['Aisyah] Ummul Mukminin radliallahu 'anha ntango batunaki ye mpo na moto oyo alobaki; 'Tresor na ngai ezali na porte ya Kaaba - donate yango-'. 'Aisha ayanolaki ete, 'Asengeli kofuta amende ndenge afutaki ndai'. Malik alobaki mpo na moto oyo alobaki ete, ‘Bomengo na ngai ezali na nzela ya Allah’, na nsima abukaki, ‘Esengeli kolekisa ndambo ya misato ya bomengo na ye na nzela ya Allah, oyo ezali oyo esalemaki na Abu Lubabah’.
Imam Malik : 912
حَدَّثَنِي يَحْيَى عَنْ مَالِك عَنْ عَمْرِو بْنِ الْحَارِثِ عَنْ عُبَيْدِ بْنِ فَيْرُوزٍ عَنْ الْبَرَاءِ بْنِ عَازِبٍأَنَّ رَسُولَ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ سُئِلَ مَاذَا يُتَّقَى مِنْ الضَّحَايَا فَأَشَارَ بِيَدِهِ وَقَالَ أَرْبَعًا وَكَانَ الْبَرَاءُ يُشِيرُ بِيَدِهِ وَيَقُولُ يَدِي أَقْصَرُ مِنْ يَدِ رَسُولِ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ الْعَرْجَاءُ الْبَيِّنُ ظَلْعُهَا وَالْعَوْرَاءُ الْبَيِّنُ عَوَرُهَا وَالْمَرِيضَةُ الْبَيِّنُ مَرَضُهَا وَالْعَجْفَاءُ الَّتِي لَا تُنْقِي
Bayebisaki ngai ete Yazid uta na Malik uta na [’Amru bin Al Harith] uta na [’Ubaid bin Fairuz] uta na [Barra bin ‘Azib] alobaki, ‘Ntoma ya Allah sallallaahu ‘alaihi wasallam atunamaki, ‘Nini esengeli koboya mpo na banyama ya mbeka? ' Asalaki geste na loboko na ye mpe na sima alobaki: 'Ezali minei'. Barra’ na nsima mpe asalaki geste na loboko na ye mpe alobaki; 'Maboko na ngai ezali mikuse koleka maboko ya Ntoma sallallaahu 'alaihi wasallam: -makambo minei oyo ezali- banyama oyo ezali polele ete ezali ebɔsɔnɔ, banyama oyo ezali polele ete ekufá miso, banyama ya maladi mpe banyama ya mikemike mpe ya bolembu oyo ezali na misuni te'.
Imam Malik : 913
و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ نَافِعٍ أَنَّ عَبْدَ اللَّهِ بْنَ عُمَرَكَانَ يَتَّقِي مِنْ الضَّحَايَا وَالْبُدْنِ الَّتِي لَمْ تُسِنَّ وَالَّتِي نَقَصَ مِنْ خَلْقِهَاقَالَ مَالِك وَهَذَا أَحَبُّ مَا سَمِعْتُ إِلَيَّ
Eyebisamaki na ngai uta na Malik uta na [Nafi’] ete [Abdullah bin Umar] azalaki kokima banyama ya mbeka oyo ezalaki mibange te mpe bilenge ya bakamela. Malik alobaki ete; 'Oyo nde nalingaka na maye nayoki'.
Imam Malik : 914
حَدَّثَنِي يَحْيَى عَنْ مَالِك عَنْ نَافِعٍ أَنَّ عَبْدَ اللَّهِ بْنَ عُمَرَضَحَّى مَرَّةً بِالْمَدِينَةِ قَالَ نَافِعٌ فَأَمَرَنِي أَنْ أَشْتَرِيَ لَهُ كَبْشًا فَحِيلًا أَقْرَنَ ثُمَّ أَذْبَحَهُ يَوْمَ الْأَضْحَى فِي مُصَلَّى النَّاسِ قَالَ نَافِعٌ فَفَعَلْتُ ثُمَّ حُمِلَ إِلَى عَبْدِ اللَّهِ بْنِ عُمَرَ فَحَلَقَ رَأْسَهُ حِينَ ذُبِحَ الْكَبْشُ وَكَانَ مَرِيضًا لَمْ يَشْهَدْ الْعِيدَ مَعَ النَّاسِ قَالَ نَافِعٌ وَكَانَ عَبْدُ اللَّهِ بْنُ عُمَرَ يَقُولُ لَيْسَ حِلَاقُ الرَّأْسِ بِوَاجِبٍ عَلَى مَنْ ضَحَّى وَقَدْ فَعَلَهُ ابْنُ عُمَرَ
Yahya ayebisaki ngai uta na Malik uta na [Nafi’] ete [Abdullah bin Umar] mokolo moko abomaki nyama ya mbeka na Medina. Nafi’ alobaki; ‘Na nsima, ayebisaki ngai nasomba ntaba ya mobali oyo ezali na maseke. Sima nabomaki ye na Eid al-Adha na esika ya losambo ya bato. Nafi’ akobaki, ‘Bongo nasali yango, nyama yango e memamaki sima epayi ya Abdullah bin Umar. Akataki nsuki na ye tango babomaki ntaba, mpo na tango wana azalaki na maladi mpe akokaki te kozala na losambo ya Eid al-Adha elongo na bato. Nafi’ alobaki; ‘Abdullah bin Umar alobaki mokolo moko ete; 'Moto oyo azali kopesa mbeka asengeli te kokata motó'. Kasi Ibn Umar asalaki yango.
Imam Malik : 915
حَدَّثَنِي يَحْيَى عَنْ مَالِك عَنْ يَحْيَى بْنِ سَعِيدٍ عَنْ بُشَيْرِ بْنِ يَسَارٍ أَنَّ أَبَا بُرْدَةَ بْنَ نِيَارٍذَبَحَ ضَحِيَّتَهُ قَبْلَ أَنْ يَذْبَحَ رَسُولُ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ يَوْمَ الْأَضْحَى فَزَعَمَ أَنَّ رَسُولَ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ أَمَرَهُ أَنْ يَعُودَ بِضَحِيَّةٍ أُخْرَى قَالَ أَبُو بُرْدَةَ لَا أَجِدُ إِلَّا جَذَعًا يَا رَسُولَ اللَّهِ قَالَ وَإِنْ لَمْ تَجِدْ إِلَّا جَذَعًا فَاذْبَحْ
Eyebisami na ngai na Yahya uta na Malik uta na [Yahya bin Sa’id] uta na [Busyair bin Yasar] ete [Abu Burdah bin Niyar] abomaki mbeka na ye yambo Rasulullah salla Allahu ‘alaihi wa sallam aboma mbeka na ye na mokolo ya Eid al-Adha. Abu Burdah akanisaki ete Rasulullah salla Allahu 'alaihi wa sallam ayebisaki ye azongela ye moko. Bongo Abu Burdah alobaki; ‘Ee Ntoma ya Nzambe (Allah), nazali na eloko mosusu te kaka ntaba?’. Rasulullah salla Allahu 'alaihi wa sallam- alobaki: 'Soki ozali na eloko mosusu te kaka jadza' - ntaba oyo ezali na mibu mibale -, wana boma yango'.
Imam Malik : 916
و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ يَحْيَى بْنِ سَعِيدٍ عَنْ عَبَّادِ بْنِ تَمِيمٍ أَنَّ عُوَيْمِرَ بْنَ أَشْقَرَذَبَحَ ضَحِيَّتَهُ قَبْلَ أَنْ يَغْدُوَ يَوْمَ الْأَضْحَى وَأَنَّهُ ذَكَرَ ذَلِكَ لِرَسُولِ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ فَأَمَرَهُ أَنْ يَعُودَ بِضَحِيَّةٍ أُخْرَى
Eyebisamaki na ngai uta na Malik uta na [Yahya bin Sa’id] uta na [Abbad bin Tamim] ete [Uwaimir bin Asyqar] abomaki mbeka na ye yambo ya losambo ya Eid al-Adha. Na sima apesaki likambo oyo na Rasulullah salla Allahu ‘alaihi wa sallam, tii tango ayebisaki ye aboma lisusu’.
Imam Malik : 917
حَدَّثَنِي يَحْيَى عَنْ مَالِك عَنْ أَبِي الزُّبَيْرِ الْمَكِّيِّ عَنْ جَابِرِ بْنِ عَبْدِ اللَّهِأَنَّ رَسُولَ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ نَهَى عَنْ أَكْلِ لُحُومِ الضَّحَايَا بَعْدَ ثَلَاثَةِ أَيَّامٍ ثُمَّ قَالَ بَعْدُ كُلُوا وَتَصَدَّقُوا وَتَزَوَّدُوا وَادَّخِرُوا
Elobami na ngai ete Yahya uta na Malik uta na [Abu Az Zubair Al Maki] uta na [Jabir bin Abdullah] alobaki, ‘Ntoma ya Allah salla Allahu ‘alaihi wa sallam apekisaki kolia misuni ya mbeka nsima ya mikolo misato, nsima na yango alobaki: ‘Lia yango, pesa yango na bolingo malamu, sala bilei mpo na yango mpe bikisa oyo etikali’.
Imam Malik : 918
و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ عَبْدِ اللَّهِ بْنِ أَبِي بَكْرٍ عَنْ عَبْدِ اللَّهِ بْنِ وَاقِدٍ أَنَّهُ قَالَنَهَى رَسُولُ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ عَنْ أَكْلِ لُحُومِ الضَّحَايَا بَعْدَ ثَلَاثٍقَالَ عَبْدُ اللَّهِ بْنُ أَبِي بَكْرٍ فَذَكَرْتُ ذَلِكَ لِعَمْرَةَ بِنْتِ عَبْدِ الرَّحْمَنِ فَقَالَتْ صَدَقَ سَمِعْتُ عَائِشَةَ زَوْجَ النَّبِيِّ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ تَقُولُ دَفَّ نَاسٌ مِنْ أَهْلِ الْبَادِيَةِ حَضْرَةَ الْأَضْحَى فِي زَمَانِ رَسُولِ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ فَقَالَ رَسُولُ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ ادَّخِرُوا لِثَلَاثٍ وَتَصَدَّقُوا بِمَا بَقِيَ قَالَتْ فَلَمَّا كَانَ بَعْدَ ذَلِكَ قِيلَ لِرَسُولِ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ لَقَدْ كَانَ النَّاسُ يَنْتَفِعُونَ بِضَحَايَاهُمْ وَيَجْمُلُونَ مِنْهَا الْوَدَكَ وَيَتَّخِذُونَ مِنْهَا الْأَسْقِيَةَ فَقَالَ رَسُولُ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ وَمَا ذَلِكَ أَوْ كَمَا قَالَ قَالُوا نَهَيْتَ عَنْ لُحُومِ الضَّحَايَا بَعْدَ ثَلَاثٍ فَقَالَ رَسُولُ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ إِنَّمَا نَهَيْتُكُمْ مِنْ أَجْلِ الدَّافَّةِ الَّتِي دَفَّتْ عَلَيْكُمْ فَكُلُوا وَتَصَدَّقُوا وَادَّخِرُوا يَعْنِي بِالدَّافَّةِ قَوْمًا مَسَاكِينَ قَدِمُوا الْمَدِينَةَ
Ayebisaki ngai uta na Malik uta na [Abdullah bin Abu Bakr] uta na [Abdullah bin Waqid] alobaki; 'Rasulullah salla Allahu 'alaihi wa sallam apekisaki kolia misuni ya mbeka sima ya mikolo misato'. Abdulah bin Abu Bakr alobaki ete; ‘Na nsima namemaki likambo oyo epai ya [‘Amrah bint Abdurrahman] alobaki; ‘Ezali solo, nayoki [’Aishah], mwasi ya Ntoma salla Allahu ‘alaihi wa sallam alobi; 'Na tango ya Rasulullah sallallaahu 'alaihi wasallam groupe ya batu ya Bédouin babetaki ba tambourines pona koyamba boyei ya Eid al-Adha, sima Rasulullah salla Allahu 'alaihi wa sallam alobaki: 'Bobikisa misuni ya mbeka mikolo misato pe pesa oyo etikali na charité'. Aisha alobaki ete; ‘Nsima na yango moto moko atunaki Rasulullah salla Allahu ‘alaihi wa sallam; ‘Bato basaleli banyama oyo bapesaka mbeka na kolongola mafuta na yango mpe kokómisa mposo na bango bambɛki ya mai?’ Rasulullah salla Allahu 'alaihi wa sallam alobaki: 'Mpo na nini ezali bongo?' to eloko mosusu ya ndenge wana. Bayanolaki ete: ‘Bopekisi misuni ya mbeka nsima ya mikolo misato’. Rasulullah salla Allahu ‘alaihi wa sallam alobaki: ‘Napekisaki bino mpo na bato oyo bayaki. Lia misuni, pesa yango na bolingo mpe bikisa oyo etikali, mpo na kopesa na babola oyo bayaka na Medina’.
Imam Malik : 919
و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ رَبِيعَةَ بْنِ أَبِي عَبْدِ الرَّحْمَنِ عَنْ أَبِي سَعِيدٍ الْخُدْرِيِّأَنَّهُ قَدِمَ مِنْ سَفَرٍ فَقَدَّمَ إِلَيْهِ أَهْلُهُ لَحْمًا فَقَالَ انْظُرُوا أَنْ يَكُونَ هَذَا مِنْ لُحُومِ الْأَضْحَى فَقَالُوا هُوَ مِنْهَا فَقَالَ أَبُو سَعِيدٍ أَلَمْ يَكُنْ رَسُولُ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ نَهَى عَنْهَا فَقَالُوا إِنَّهُ قَدْ كَانَ مِنْ رَسُولِ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ بَعْدَكَ أَمْرٌ فَخَرَجَ أَبُو سَعِيدٍ فَسَأَلَ عَنْ ذَلِكَ فَأُخْبِرَ أَنَّ رَسُولَ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ قَالَ نَهَيْتُكُمْ عَنْ لُحُومِ الْأَضْحَى بَعْدَ ثَلَاثٍ فَكُلُوا وَتَصَدَّقُوا وَادَّخِرُوا وَنَهَيْتُكُمْ عَنْ الِانْتِبَاذِ فَانْتَبِذُوا وَكُلُّ مُسْكِرٍ حَرَامٌ وَنَهَيْتُكُمْ عَنْ زِيَارَةِ الْقُبُورِ فَزُورُوهَا وَلَا تَقُولُوا هُجْرًايَعْنِي لَا تَقُولُوا سُوءًا
Eyebisamaki na ngai uta na Malik uta na [Rabi’ah bin Abu Abdurrahman] uta na [Abu Sa’id Al Khudri] ete awutaki kouta na mobembo, mpe libota na ye bapesaki ye misuni. Na sima Abu Sa’id alobaki; ‘Talá oyo, oyo ezali misuni ya mbeka?’ Bayanolaki; 'Ee, oyo ezali misuni ya mbeka'. Abu Sa’id alobaki; 'Est-ce que Ntoma sallallaahu alaihi wasallam apekisaki yango te?' Bayanolaki; 'Ezali na motindo mosusu uta na Rasulullah salla Allahu 'alaihi wa sallam sima ya bolongwi na yo'. Abu Sa’id alors abimaki pe atunaki na likambo yango, sima bayebisaki ye que Rasulullah sallallaahu ‘alaihi wasallam alobaki: ‘Napekisi yo kolia misuni ya mbeka sima ya mikolo misato, sikoyo lia yango, pesa yango na charité pe bomba oyo etikali. Napekisi yo pe obomba vinyo ya pressé, sikoyo sala bongo, pe nionso oyo ezo lakisa eza haram. Napekisi yo pe kokende kotala lilita, sikoyo sala pèlerinage pe koloba maloba ya mabe te -ntango ozali kosala pèlerinage-'.
Imam Malik : 920
حَدَّثَنِي يَحْيَى عَنْ مَالِك عَنْ أَبِي الزُّبَيْرِ الْمَكِّيِّ عَنْ جَابِرِ بْنِ عَبْدِ اللَّهِ أَنَّهُ قَالَنَحَرْنَا مَعَ رَسُولِ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ عَامَ الْحُدَيْبِيَةِ الْبَدَنَةَ عَنْ سَبْعَةٍ وَالْبَقَرَةَ عَنْ سَبْعَةٍ
Ayebisaki ngai Yahya uta na Malik uta na [Abu Az Zubair Al Maki] uta na [Jabir bin Abdullah] alobaki; ‘Na likambo ya Hudaibiyah, tosalaki mbeka elongo na Ntoma sallallaahu ‘alaihi wasallam; kamela moko mpo na bato nsambo mpe ngombe moko mpo na bato nsambo’.