Embrasser l'Islam, cliquez ici
ISLAM AL-HAQ: QURAN & HADITH
(The True Islam)
Free Download / Download

Imam Malik (الامام مالك) - 1594 Hadith

Hadith

Imam Malik : 741

و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ يَزِيدَ بْنِ عَبْدِ اللَّهِ بْنِ الْهَادِي عَنْ أَبِي مُرَّةَ مَوْلَى أُمِّ هَانِئٍ أُخْتِ عَقِيلِ بْنِ أَبِي طَالِبٍ عَنْ عَبْدِ اللَّهِ بْنِ عَمْرِو بْنِ الْعَاصِ أَنَّهُ أَخْبَرَهُأَنَّهُ دَخَلَ عَلَى أَبِيهِ عَمْرِو بْنِ الْعَاصِ فَوَجَدَهُ يَأْكُلُ قَالَ فَدَعَانِي قَالَ فَقُلْتُ لَهُ إِنِّي صَائِمٌ فَقَالَ هَذِهِ الْأَيَّامُ الَّتِي نَهَانَا رَسُولُ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ عَنْ صِيَامِهِنَّ وَأَمَرَنَا بِفِطْرِهِنَّقَالَ مَالِك هِيَ أَيَّامُ التَّشْرِيقِ

Eyebisami na ngai na Malik uta na [Yazid bin Abdullah bin Al Had] uta na [Abu Murrah] moombo ya kala ya Umm Hani, ndeko mwasi ya ‘Aqil bin Abu Talib, uta na [Abdullah bin ‘Amru bin Al ‘Ash] oyo ayebisaki ye ete mokolo moko akota mpo na komona tata na ye, [Amru bin Al Ash] mpe akutaki ye azali kolia. Abdullah alobaki, ‘Bongo tata na ngai abengaki ngai mpo na kosangana na ye na kolia. Yango wana nalobaki na ye ete: ‘Nazali kokila bilei’. Amru bin al Ash alobaki, ‘Oyo ezali mikolo oyo Rasulullah shallallahu ‘alaihi wasallam apekisaki biso kokila bilei, mpe ayebisaki biso totika kokila bilei’. Malik alobaki ete; 'Ndimbola ezali mikolo ya Tasyriq'.

Hadith

Imam Malik : 742

حَدَّثَنِي يَحْيَى عَنْ مَالِك عَنْ نَافِعٍ عَنْ عَبْدِ اللَّهِ بْنِ أَبِي بَكْرِ بْنِ مُحَمَّدِ بْنِ عَمْرِو بْنِ حَزْمٍأَنَّ رَسُولَ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ أَهْدَى جَمَلًا كَانَ لِأَبِي جَهْلِ بْنِ هِشَامٍ فِي حَجٍّ أَوْ عُمْرَةٍ

Elobami na ngai ete Yahya uta na Malik uta na Nafi’ uta na [Abdullah bin Abu Bakr bin Muhammad bin ‘Amru bin Hazm] alobaki, ‘Rasulullah sallallaahu ‘alaihi wasallam abomaki kamela oyo kala ezalaki ya Abu Jahl bin Hisham na tango ya Hajj to Umrah’.

Hadith

Imam Malik : 743

و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ أَبِي الزِّنَادِ عَنْ الْأَعْرَجِ عَنْ أَبِي هُرَيْرَةَأَنَّ رَسُولَ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ رَأَى رَجُلًا يَسُوقُ بَدَنَةً فَقَالَ ارْكَبْهَا فَقَالَ يَا رَسُولَ اللَّهِ إِنَّهَا بَدَنَةٌ فَقَالَ ارْكَبْهَا وَيْلَكَ فِي الثَّانِيَةِ أَوْ الثَّالِثَةِ

Elobami na ngai uta na Malik uta na [Abu Az Zinad] uta na [Al A’raj] uta na [Abu Hurairah] koloba ete, ‘Ntoma ya Allah sallallaahu ‘alaihi wasallam amonaki moto moko azali kokamba kamela. Na nsima alobaki ete: ‘Matá likoló’. Moto yango ayanolaki ete; ‘Ee Ntoma ya Nzambe (Allah), oyo ezali kamela oyo babomi’. Rasulullah shallallahu ‘alaihi wasallam alobaki: ‘Bomata! ' sima alobaki 'mawa na yo', mbala ya mibale to ya misato alobaki yango'.

Hadith

Imam Malik : 744

و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ عَبْدِ اللَّهِ بْنِ دِينَارٍ أَنَّهُ كَانَ يَرَى عَبْدَ اللَّهِ بْنَ عُمَرَيُهْدِي فِي الْحَجِّ بَدَنَتَيْنِ بَدَنَتَيْنِ وَفِي الْعُمْرَةِ بَدَنَةً بَدَنَةً قَالَ وَرَأَيْتُهُ فِي الْعُمْرَةِ يَنْحَرُ بَدَنَةً وَهِيَ قَائِمَةٌ فِي دَارِ خَالِدِ بْنِ أَسِيدٍ وَكَانَ فِيهَا مَنْزِلُهُ قَالَ وَلَقَدْ رَأَيْتُهُ طَعَنَ فِي لَبَّةِ بَدَنَتِهِ حَتَّى خَرَجَتْ الْحَرْبَةُ مِنْ تَحْتِ كَتِفِهَا

Malik ayebisaki ngai uta na [Abdullah bin Dinar] ete amonaki [Abdullah bin Umar] koboma bakamela mibale, bakamela mibale na ntango ya Hajj, mpe moko na ntango ya Umrah. Abdullah bin Dinar alobaki ete; ‘Mpe na tango ya Umrah namonaki ye azali koboma kamela, kamela yango etelemaki na ndako ya Khalid bin Asid, mpe kuna afandaki butu mobimba. Namonaki ye azali kobɛta kamela na nkingo tii mbeli ebimaki na nse ya lipeka’.

Hadith

Imam Malik : 745

و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ يَحْيَى بْنِ سَعِيدٍ أَنَّ عُمَرَ بْنَ عَبْدِ الْعَزِيزِأَهْدَى جَمَلًا فِي حَجٍّ أَوْ عُمْرَةٍ

Elobami na ngai uta na Malik ete [Yahya bin Sa’id] alobaki, ‘ [Umar bin Abdul Aziz] abomaki kamela na ntango ya Hajj to Umrah.

Hadith

Imam Malik : 746

و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ أَبِي جَعْفَرٍ الْقَارِئِ أَنَّ عَبْدَ اللَّهِ بْنَ عَيَّاشِ بْنِ أَبِي رَبِيعَةَ الْمَخْزُومِيَّأَهْدَى بَدَنَتَيْنِ إِحْدَاهُمَا بُخْتِيَّةٌ

Eyebisami na ngai uta na Malik ete [Abu Ja’far Al Qari] alobaki, ‘[Abdullah bin ‘Ayyas bin Abu Rabi’ah al Makhzumi] abomaki bakamela mibale, moko na yango ezalaki na nkingo molai’.

Hadith

Imam Malik : 747

و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ نَافِعٍ أَنَّ عَبْدَ اللَّهِ بْنَ عُمَرَ كَانَ يَقُولُإِذَا نُتِجَتْ النَّاقَةُ فَلْيُحْمَلْ وَلَدُهَا حَتَّى يُنْحَرَ مَعَهَا فَإِنْ لَمْ يُوجَدْ لَهُ مَحْمَلٌ حُمِلَ عَلَى أُمِّهِ حَتَّى يُنْحَرَ مَعَهَا

Elobami na ngai ete Malik uta na [Nafi’] alobaki, ‘[Abdullah bin Umar] alobaki, ‘Ntango kamela eboti, tika ete mwana ya ngɔmbɛ ememama elongo na ye mpe aboma elongo na ye. Soki nzela ya komema yango ezali te, esengeli komema yango likoló ya nzoto ya mama na yango tii ntango bakoboma yango elongo na ye’.

Hadith

Imam Malik : 748

و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ هِشَامِ بْنِ عُرْوَةَ أَنَّ أَبَاهُ قَالَإِذَا اضْطُرِرْتَ إِلَى بَدَنَتِكَ فَارْكَبْهَا رُكُوبًا غَيْرَ فَادِحٍ وَإِذَا اضْطُرِرْتَ إِلَى لَبَنِهَا فَاشْرَبْ بَعْدَ مَا يَرْوَى فَصِيلُهَا فَإِذَا نَحَرْتَهَا فَانْحَرْ فَصِيلَهَا مَعَهَا

Elobami na ngai uta na Malik ya [Hisham bin Urwah] ete [tata na ye] alobaki, ‘Soki ozali na mposa ya kamela na yo, mata yango kozanga kolemba. Soki ozali na mposa ya miliki, mela yango nsima ya mwana komɛla na yango. Soki obomi yango, bongo boma bana na yango elongo na mama na yango’.

Hadith

Imam Malik : 749

حَدَّثَنِي يَحْيَى عَنْ مَالِك عَنْ نَافِعٍ عَنْ عَبْدِ اللَّهِ بْنِ عُمَرَأَنَّهُ كَانَ إِذَا أَهْدَى هَدْيًا مِنْ الْمَدِينَةِ قَلَّدَهُ وَأَشْعَرَهُ بِذِي الْحُلَيْفَةِ يُقَلِّدُهُ قَبْلَ أَنْ يُشْعِرَهُ وَذَلِكَ فِي مَكَانٍ وَاحِدٍ وَهُوَ مُوَجَّهٌ لِلْقِبْلَةِ يُقَلِّدُهُ بِنَعْلَيْنِ وَيُشْعِرُهُ مِنْ الشِّقِّ الْأَيْسَرِ ثُمَّ يُسَاقُ مَعَهُ حَتَّى يُوقَفَ بِهِ مَعَ النَّاسِ بِعَرَفَةَ ثُمَّ يَدْفَعُ بِهِ مَعَهُمْ إِذَا دَفَعُوا فَإِذَا قَدِمَ مِنًى غَدَاةَ النَّحْرِ نَحَرَهُ قَبْلَ أَنْ يَحْلِقَ أَوْ يُقَصِّرَ وَكَانَ هُوَ يَنْحَرُ هَدْيَهُ بِيَدِهِ يَصُفُّهُنَّ قِيَامًا وَيُوَجِّهُهُنَّ إِلَى الْقِبْلَةِ ثُمَّ يَأْكُلُ وَيُطْعِمُ

Yahya ayebisaki ngai uta na Malik uta na [Nafi’] uta na [Abdullah bin ‘Umar] ete soki abomi nyama oyo babomi uta na Medina, wana akambaka ye mpe apesi ye elembo na Dhul Hulaifah. Akambaki yango liboso ya kotya elembo na yango na esika moko oyo etalani na Qibla; ememaki ye na kolata sapato nyonso mibale, na nsima apesaki ye elembo uta na lobɔkɔ na ye ya mwasi. Sima na yango akambaki ye tii akomaki na Arafat mpo na kosangana na bato. Sima kokende na Mina, soki peuple bazalaki kokende, tango akomi na Mina na tongo, akata liboma avant akata mutu pe asala yango mokuse. Na sima abomaki koboma na maboko mibale etali Qibla, sima aliaki misuni pe apesaki mua yango na batu misusu'.

Hadith

Imam Malik : 750

و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ نَافِعٍ أَنَّ عَبْدَ اللَّهِ بْنَ عُمَرَكَانَ إِذَا طَعَنَ فِي سَنَامِ هَدْيِهِ وَهُوَ يُشْعِرُهُ قَالَ بِسْمِ اللَّهِ وَاللَّهُ أَكْبَرُ

Eyebisami na ngai uta na Malik uta na [Nafi’] ete [Abdullah bin Umar] tango azali kotɔbɔla libenga ya nyama na ye oyo abomaki mpo na kopesa elembo, alobi, ‘BISMILLAHI ALLAHU AKBAR -Na kombo ya Allah, Allah azali Monene-’.

Hadith

Imam Malik : 751

و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ نَافِعٍ أَنَّ عَبْدَ اللَّهِ بْنَ عُمَرَ كَانَ يَقُولُالْهَدْيُ مَا قُلِّدَ وَأُشْعِرَ وَوُقِفَ بِهِ بِعَرَفَةَ

Elobami na ngai uta na Malik uta na [Nafi’] ete [Abdullah bin Umar] alobaki, ‘Nyama oyo babomami ezali nyama oyo ekangami na ntolo, etiamaki elembo na esika ya kotelemela na Arafat’.

Hadith

Imam Malik : 752

و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ نَافِعٍ أَنَّ عَبْدَ اللَّهِ بْنَ عُمَرَكَانَ يُجَلِّلُ بُدْنَهُ الْقُبَاطِيَّ وَالْأَنْمَاطَ وَالْحُلَلَ ثُمَّ يَبْعَثُ بِهَا إِلَى الْكَعْبَةِ فَيَكْسُوهَا إِيَّاهَا

Elobami na ngai ete Malik uta na [Nafi’] alobaki, ‘[Abdullah bin Umar] akembisaki kamela na ye na elamba ya pembe ya pete oyo ewutaki na Egypte, elamba ya soie mpe elamba ya kosangisa, sima atindaki yango na Kaaba mpe azipaki yango na elamba moko’.

Hadith

Imam Malik : 753

و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك أَنَّهُ سَأَلَ عَبْدَ اللَّهِ بْنَ دِينَارٍ مَا كَانَ عَبْدُ اللَّهِ بْنُ عُمَرَيَصْنَعُ بِجِلَالِ بُدْنِهِ حِينَ كُسِيَتْ الْكَعْبَةُ هَذِهِ الْكِسْوَةَ قَالَ كَانَ يَتَصَدَّقُ بِهَا

Malik ayebisaki ngai ete mokolo moko atunaki [Abdullah bin Dinar] na ntina ya mosala [ya Abdullah bin Umar] ya kozipa nyama oyo akoboma ntango Kaaba ezipamaki na elamba ya kiswah?’ Abdullah bin Dinar ayanolaki ete; 'Apesaki yango na charité'.

Hadith

Imam Malik : 754

و حَدَّثَنِي مَالِك عَنْ نَافِعٍ أَنَّ عَبْدَ اللَّهِ بْنَ عُمَرَ كَانَ يَقُولُفِي الضَّحَايَا وَالْبُدْنِ الثَّنِيُّ فَمَا فَوْقَهُ

Malik ayebisaki ngai uta na [Nafi’] ete [Abdullah bin ‘Umar] alobelaki mokolo moko na ntina ya banyama ya mbeka -mpo na mokolo ya Id- mpe bakamela oyo ebongisami mpo na hadyu, elingi koloba Ats Tsaniy -ntaba oyo ezali na mibu misato to bakamela oyo ezali na mibu motoba - to koleka wana’.

Hadith

Imam Malik : 755

و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ نَافِعٍ أَنَّ عَبْدَ اللَّهِ بْنَ عُمَرَكَانَ لَا يَشُقُّ جِلَالَ بُدْنِهِ وَلَا يُجَلِّلُهَا حَتَّى يَغْدُوَ مِنْ مِنًى إِلَى عَرَفَةَ

Eyebisami na ngai uta na Malik uta na [Nafi’] ete [Abdullah bin Umar] apasolaki to alongolaki te elamba oyo ezipaki mokɔngɔ ya kamela na ye kino abandaki mobembo longwa na Mina epai ya Arafah’.

Hadith

Imam Malik : 756

و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ هِشَامِ بْنِ عُرْوَةَ عَنْ أَبِيهِ أَنَّهُ كَانَ يَقُولُ لِبَنِيهِيَا بَنِيَّ لَا يُهْدِيَنَّ أَحَدُكُمْ مِنْ الْبُدْنِ شَيْئًا يَسْتَحْيِي أَنْ يُهْدِيَهُ لِكَرِيمِهِ فَإِنَّ اللَّهَ أَكْرَمُ الْكُرَمَاءِ وَأَحَقُّ مَنْ اخْتِيرَ لَهُ

Elobami na ngai uta na Malik uta na [Hisyam bin Urwah] uta na [tata na ye] ete alobaki na bana na ye, ‘Ee bana na ngai ya mibali, botika moko te kati na bino aboma kamela, oyo azali na soni ya kopesa na moto oyo azali kokumisa, ya solo Allah azali moto oyo aleki lokumu, mpe oyo azali na lotomo mingi ya koponama’.

Hadith

Imam Malik : 757

حَدَّثَنِي يَحْيَى عَنْ مَالِك عَنْ هِشَامِ بْنِ عُرْوَةَ عَنْ أَبِيهِأَنَّ صَاحِبَ هَدْيِ رَسُولِ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ قَالَ يَا رَسُولَ اللَّهِ كَيْفَ أَصْنَعُ بِمَا عَطِبَ مِنْ الْهَدْيِ فَقَالَ لَهُ رَسُولُ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ كُلُّ بَدَنَةٍ عَطِبَتْ مِنْ الْهَدْيِ فَانْحَرْهَا ثُمَّ أَلْقِ قِلَادَتَهَا فِي دَمِهَا ثُمَّ خَلِّ بَيْنَهَا وَبَيْنَ النَّاسِ يَأْكُلُونَهَا

Elobami na ngai ete Yahya uta na Malik uta na [Hisyam bin Urwah] uta na [tata na ye] alobaki, ‘Momemi ya banyama ya hadyu, Rasulullah sallallaahu ‘alaihi wasallam, alobaki, ‘Ee Rasulullah, nasengeli kosala nini na banyama oyo babomi oyo ezali na mbeba?’. Rasulullah shallallahu ‘alaihi wasallam ayanolaki ete; ‘Kamela nyonso oyo babomi oyo ezali na mbeba, boma yango, na nsima bóbwaka nsinga na makila na yango. Tika bato balya yango'.

Hadith

Imam Malik : 758

و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ ابْنِ شِهَابٍ عَنْ سَعِيدِ بْنِ الْمُسَيَّبِ أَنَّهُ قَالَمَنْ سَاقَ بَدَنَةً تَطَوُّعًا فَعَطِبَتْ فَنَحَرَهَا ثُمَّ خَلَّى بَيْنَهَا وَبَيْنَ النَّاسِ يَأْكُلُونَهَا فَلَيْسَ عَلَيْهِ شَيْءٌ وَإِنْ أَكَلَ مِنْهَا أَوْ أَمَرَ مَنْ يَأْكُلُ مِنْهَا غَرِمَهَاو حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ ثَوْرِ بْنِ زَيْدٍ الدِّيلِيِّ عَنْ عَبْدِ اللَّهِ بْنِ عَبَّاسٍ مِثْلَ ذَلِكَ

Elobami na ngai uta na Malik uta na [Ibn Shihab] uta na [Sa’id bin Musayyab] alobi, ‘Oyo azali kokamba kamela mpo na kobomama tathawwu’, sima kamela ekufaka pene yango wana abomaka yango. Soki atiki ete bato bálya koboma yango, boye mokumba moko te ezali likoló na ye. Kasi soki alei yango, to apesi mitindo na moto mosusu alya yango, boye azali na nyongo’. Ayebisaki ngai uta na Malik uta na [Tsaur bin Zaid ad Dili] uta na [Abdullah bin Abbas] lokola likolo.

Hadith

Imam Malik : 759

و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ ابْنِ شِهَابٍ أَنَّهُ قَالَمَنْ أَهْدَى بَدَنَةً جَزَاءً أَوْ نَذْرًا أَوْ هَدْيَ تَمَتُّعٍ فَأُصِيبَتْ فِي الطَّرِيقِ فَعَلَيْهِ الْبَدَلُ

Ayebisaki ngai uta na Malik uta na [Ibn Shihab] alobaki; 'Oyo abomi kamela oyo ekozwa esika na yango, to mpo na nadzar, to mpo na mbeka ya hajj tamattu, boye nyama ya hadyu abetami na likama na nzela, na nsima azali na mokumba ya kozongisa yango na esika na yango'.

Hadith

Imam Malik : 760

و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ نَافِعٍ عَنْ عَبْدِ اللَّهِ بْنِ عُمَرَ أَنَّهُ قَالَمَنْ أَهْدَى بَدَنَةً ثُمَّ ضَلَّتْ أَوْ مَاتَتْ فَإِنَّهَا إِنْ كَانَتْ نَذْرًا أَبْدَلَهَا وَإِنْ كَانَتْ تَطَوُّعًا فَإِنْ شَاءَ أَبْدَلَهَا وَإِنْ شَاءَ تَرَكَهَاو حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك أَنَّهُ سَمِعَ أَهْلَ الْعِلْمِ يَقُولُونَ لَا يَأْكُلُ صَاحِبُ الْهَدْيِ مِنْ الْجَزَاءِ وَالنُّسُكِ

Elobami na ngai uta na Malik uta na [Nafi’] uta na [Abdullah bin ‘Umar] koloba; 'Oyo alingi koboma kamela, mpe kamela ebunga to ekufi, soki ezali mpo na nadzar nde azongisaka yango na esika na yango.' Kasi soki ezali mpo na Hajj Tathawwu', soki olingi yango okoki mpe soki te alors ntina ya kozongisa yango ezali te'. Malik ayebisaki ngai ete ayokaki moto moko ya siansi alobi; 'Moto oyo asali mbeka ya hadyu lokola remplacement to piercing, asengeli kolia misuni te'.