Imam Malik : 521
حَدَّثَنِي يَحْيَى عَنْ مَالِك عَنْ عَبْدِ الرَّحْمَنِ بْنِ الْقَاسِمِ عَنْ أَبِيهِ أَنَّ عَائِشَةَ زَوْجَ النَّبِيِّ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَكَانَتْ تَلِي بَنَاتَ أَخِيهَا يَتَامَى فِي حَجْرِهَا لَهُنَّ الْحَلْيُ فَلَا تُخْرِجُ مِنْ حُلِيِّهِنَّ الزَّكَاةَ
Yahya ayebisaki ngai uta na Malik uta na [Abdurrahman bin Al Qasim] uta na [tata na ye] ete [Aisyah] mwasi ya Ntoma sallallaahu ‘alaihi wasallam azalaki kobatela bana basi ya ndeko na ye oyo bazalaki bitike, mpe bazalaki na bijoux. Kasi, Aisyah afutaki zakat te na bijoux na bango.
Imam Malik : 522
و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ نَافِعٍ أَنَّ عَبْدَ اللَّهِ بْنَ عُمَرَكَانَ يُحَلِّي بَنَاتَهُ وَجَوَارِيَهُ الذَّهَبَ ثُمَّ لَا يُخْرِجُ مِنْ حُلِيِّهِنَّ الزَّكَاةَ
Elobami na ngai uta na Malik ya [Nafi’] ete [Abdullah bin ‘Umar] alataki biloko ya kokembisa ya wolo na bana na ye ya basi mpe baombo na ye ya basi. Kasi afutaki zakat te na bijoux na bango.’
Imam Malik : 523
و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ عَبْدِ الرَّحْمَنِ بْنِ الْقَاسِمِ عَنْ أَبِيهِ أَنَّهُ قَالَ كَانَتْ عَائِشَةُتَلِينِي وَأَخًا لِي يَتِيمَيْنِ فِي حَجْرِهَا فَكَانَتْ تُخْرِجُ مِنْ أَمْوَالِنَا الزَّكَاةَ
Elobami na ngai uta na Malik uta na [Abdurrahman bin Al Qasim] uta na [tata na ye] ete alobaki; ’ [Aisyah] abokolaki ngai elongo na ndeko na ngai oyo azalaki orphelin. Mpe 'Aisyah apesaki zakat na bomengo na biso'.
Imam Malik : 524
و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ يَحْيَى بْنِ سَعِيدٍأَنَّهُ اشْتَرَى لِبَنِي أَخِيهِ يَتَامَى فِي حَجْرِهِ مَالًا فَبِيعَ ذَلِكَ الْمَالُ بَعْدُ بِمَالٍ كَثِيرٍ
Malik ayebisaki ngai epai ya [Yahya bin Sa’id], ete asombaki biloko ya motuya mpo na bana ya ndeko na ye oyo bazalaki bitike mpe bazalaki na bobateli na ye. Na nsima, batɛkaka ndako yango mpo na kozwa mbongo mingi.’
Imam Malik : 525
حَدَّثَنِي يَحْيَى عَنْ مَالِك عَنْ ابْنِ شِهَابٍ عَنْ السَّائِبِ بْنِ يَزِيدَ أَنَّ عُثْمَانَ بْنَ عَفَّانَ كَانَ يَقُولُهَذَا شَهْرُ زَكَاتِكُمْ فَمَنْ كَانَ عَلَيْهِ دَيْنٌ فَلْيُؤَدِّ دَيْنَهُ حَتَّى تَحْصُلَ أَمْوَالُكُمْ فَتُؤَدُّونَ مِنْهُ الزَّكَاةَ
Yahya ayebisaki ngai uta na Malik uta na [Ibn Shihab] uta na [As Sa`ib bin Yazid] ete [Uthman bin Affan] alobaki, ‘Oyo ezali sanza ya zakat na yo. Oyo azali na nyongo, tika afuta yango, po bomengo na yo etangama pe zakat elongolama na yango'.
Imam Malik : 526
و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ أَيُّوبَ بْنِ أَبِي تَمِيمَةَ السَّخْتِيَانِيِّ أَنَّ عُمَرَ بْنَ عَبْدِ الْعَزِيزِكَتَبَ فِي مَالٍ قَبَضَهُ بَعْضُ الْوُلَاةِ ظُلْمًا يَأْمُرُ بِرَدِّهِ إِلَى أَهْلِهِ وَيُؤْخَذُ زَكَاتُهُ لِمَا مَضَى مِنْ السِّنِينَ ثُمَّ عَقَّبَ بَعْدَ ذَلِكَ بِكِتَابٍ أَنْ لَا يُؤْخَذَ مِنْهُ إِلَّا زَكَاةٌ وَاحِدَةٌ فَإِنَّهُ كَانَ ضِمَارًا
Malik ayebisaki ngai uta na [Ayyub bin Abu Tamimah As Sahtiyani] ete [Umar bin Abdul Aziz] mokolo moko atyaki mabongisi na oyo etali biloko oyo bakambi bazwaki na nzela ya mobulu. Apesaki mitindo ete bázongisa ndako yango epai ya nkolo na yango. sima bozua zakat ya kala'. Na sima a stipuler pe que biloko esengeli te kozuama lokola zakat sauf mbala moko, po biloko wana ezali na maboko ya nkolo na yango te'.
Imam Malik : 527
و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ يَزِيدَ بْنِ خُصَيْفَةَ أَنَّهُ سَأَلَ سُلَيْمَانَ بْنَ يَسَارٍعَنْ رَجُلٍ لَهُ مَالٌ وَعَلَيْهِ دَيْنٌ مِثْلُهُ أَعَلَيْهِ زَكَاةٌ فَقَالَ لَا
Malik ayebisaki ngai uta na [Yazid bin Khushaifah] ete atunaki [Sulaiman bin Yasar] mpo na moto oyo azali na biloko mpe azali na nyongo ya motuya ya biloko na ye, azali obligé ya kofuta zakat? ayanolaki ete: ‘Te’.
Imam Malik : 528
حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ يَحْيَى بْنِ سَعِيدٍ عَنْ زُرَيْقِ بْنِ حَيَّانَ وَكَانَ زُرَيْقٌ عَلَى جَوَازِ مِصْرَ فِي زَمَانِ الْوَلِيدِ وَسُلَيْمَانَ وَعُمَرَ بْنِ عَبْدِ الْعَزِيزِ فَذَكَرَ أَنَّ عُمَرَ بْنَ عَبْدِ الْعَزِيزِ كَتَبَ إِلَيْهِأَنْ انْظُرْ مَنْ مَرَّ بِكَ مِنْ الْمُسْلِمِينَ فَخُذْ مِمَّا ظَهَرَ مِنْ أَمْوَالِهِمْ مِمَّا يُدِيرُونَ مِنْ التِّجَارَاتِ مِنْ كُلِّ أَرْبَعِينَ دِينَارًا دِينَارًا فَمَا نَقَصَ فَبِحِسَابِ ذَلِكَ حَتَّى يَبْلُغَ عِشْرِينَ دِينَارًا فَإِنْ نَقَصَتْ ثُلُثَ دِينَارٍ فَدَعْهَا وَلَا تَأْخُذْ مِنْهَا شَيْئًا وَمَنْ مَرَّ بِكَ مِنْ أَهْلِ الذِّمَّةِ فَخُذْ مِمَّا يُدِيرُونَ مِنْ التِّجَارَاتِ مِنْ كُلِّ عِشْرِينَ دِينَارًا دِينَارًا فَمَا نَقَصَ فَبِحِسَابِ ذَلِكَ حَتَّى يَبْلُغَ عَشَرَةَ دَنَانِيرَ فَإِنْ نَقَصَتْ ثُلُثَ دِينَارٍ فَدَعْهَا وَلَا تَأْخُذْ مِنْهَا شَيْئًا وَاكْتُبْ لَهُمْ بِمَا تَأْخُذُ مِنْهُمْ كِتَابًا إِلَى مِثْلِهِ مِنْ الْحَوْلِ
Ayebisaki ngai uta na Malik uta na [Yahya bin Sa’id] uta na [Zuraiq bin Hayyan] - Zuraiq azalaki officier na Egypte na tango ya Al Walid, Sulaiman mpe ‘Umar bin Abdul Aziz - Alobelaki ete [Umar bin Abdul Aziz] akomelaki ye mokanda; 'Esengeli botala musulman nionso oyo aleki, sima bozua zakat na biloko oyo bako trader.' Elingi koloba ete, bazwaka dinare moko mpo na dinare ntuku minei nyonso. Soki ezali moke koleka wana, boye tanga tii ekokoma na dinars tuku mibale. Soki bomengo na ye ezali na se ya un tiers ya dinare alors tika ezala pe kozua eloko te. Kasi, soki baoyo bazali koleka bazali bato ya mayele na dhimmah, boye bazwa zakat na biloko na bango ya mombongo, elingi koloba dinare moko mpo na dinare ntuku mibale nyonso. Soki ezali moke koleka wana, boye tanga tii ekokoma na dinare zomi. Soki bomengo na ye ezali na se ya un tiers ya dinare, alors tika yango ezala pe kozua eloko te. Pesa bango banote na ntina ya maye ozwi epai na bango mpe kopi mpo na kozwa na makanisi haul -ata mbula moko-'.
Imam Malik : 529
حَدَّثَنِي يَحْيَى عَنْ مَالِك عَنْ عَبْدِ اللَّهِ بْنِ دِينَارٍ أَنَّهُ قَالَ سَمِعْتُ عَبْدَ اللَّهِ بْنَ عُمَرَوَهُوَ يُسْأَلُ عَنْ الْكَنْزِ مَا هُوَ فَقَالَ هُوَ الْمَالُ الَّذِي لَا تُؤَدَّى مِنْهُ الزَّكَاةُ
Yahya ayebisaki ngai uta na Malik uta na [Abdullah bin Dinar] ete alobaki; Nayokaki [Abdullah bin Umar] batuni ye na ntina ya Al kanz, sima ayanolaki, ‘Wana ezali eloko ya motuya oyo zakat moko te esengeli mpo na yango’.
Imam Malik : 530
و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ عَبْدِ اللَّهِ بْنِ دِينَارٍ عَنْ أَبِي صَالِحٍ السَّمَّانِ عَنْ أَبِي هُرَيْرَةَ أَنَّهُ كَانَ يَقُولُمَنْ كَانَ عِنْدَهُ مَالٌ لَمْ يُؤَدِّ زَكَاتَهُ مُثِّلَ لَهُ يَوْمَ الْقِيَامَةِ شُجَاعًا أَقْرَعَ لَهُ زَبِيبَتَانِ يَطْلُبُهُ حَتَّى يُمْكِنَهُ يَقُولُ أَنَا كَنْزُكَ
Elobami na ngai uta na Malik uta na [Abdullah bin Dinar] uta na [Abu Salih As Saman] uta na [Abu Hurairah], ete alobaki, ‘Oyo azali na biloko mpe afutaki zakat te, bongo na mokolo ya lisekwa biloko wana ekokokana na nyoka monene mpe ezali na esika na elongi, nyoka ekobengana ye ntango ezali koloba; "Nazali eloko na yo ya motuya."
Imam Malik : 531
حَدَّثَنِي يَحْيَى عَنْ مَالِك عَنْ حُمَيْدِ بْنِ قَيْسٍ الْمَكِّيِّ عَنْ طَاوُسٍ الْيَمَانِيِّ أَنَّ مُعَاذَ بْنَ جَبَلٍ الْأَنْصَارِيَّأَخَذَ مِنْ ثَلَاثِينَ بَقَرَةً تَبِيعًا وَمِنْ أَرْبَعِينَ بَقَرَةً مُسِنَّةً وَأُتِيَ بِمَا دُونَ ذَلِكَ فَأَبَى أَنْ يَأْخُذَ مِنْهُ شَيْئًا وَقَالَ لَمْ أَسْمَعْ مِنْ رَسُولِ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ فِيهِ شَيْئًا حَتَّى أَلْقَاهُ فَأَسْأَلَهُ فَتُوُفِّيَ رَسُولُ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ قَبْلَ أَنْ يَقْدُمَ مُعَاذُ بْنُ جَبَلٍ
Yahya ayebisaki ngai uta na Malik uta na [Humaid bin Qais Al Maki] uta na [Thawus Al Yamani] ete [Mu’adz bin Jabal Al Ansari] azwaki mwana ya ngɔmbɛ moko na ngombe nyonso ntuku misato, mpe mwana ya ngɔmbɛ moko ya mbula misato na ngombe nyonso ntuku minei. Na yango, ntango moto moko apesaki zakat oyo azalaki na nse ya mbula oyo epesamaki, Mu’adz aboyaki. Mu’adz sima alobaki, ‘Nayoki naino te epayi ya Rasulullah sallallaahu ‘alaihi wasallam que obligation ezalaki likolo na ye. Na yango -nakozwa yango te- kino nakokutana na ye mpe nakotuna mpo na yango'. Kasi, Rasulullah shallallahu ‘alaihi wasallam akufaki liboso ete Mu’adz bin Jabal akóma.
Imam Malik : 532
حَدَّثَنِي يَحْيَى عَنْ مَالِك عَنْ ثَوْرِ بْنِ زَيْدٍ الدِّيلِيِّ عَنْ ابْنٍ لِعَبْدِ اللَّهِ بْنِ سُفْيَانَ الثَّقَفِيِّ عَنْ جَدِّهِ سُفْيَانَ بْنِ عَبْدِ اللَّهِ أَنَّ عُمَرَ بْنَ الْخَطَّابِبَعَثَهُ مُصَدِّقًا فَكَانَ يَعُدُّ عَلَى النَّاسِ بِالسَّخْلِ فَقَالُوا أَتَعُدُّ عَلَيْنَا بِالسَّخْلِ وَلَا تَأْخُذُ مِنْهُ شَيْئًا فَلَمَّا قَدِمَ عَلَى عُمَرَ بْنِ الْخَطَّابِ ذَكَرَ لَهُ ذَلِكَ فَقَالَ عُمَرُ نَعَمْ تَعُدُّ عَلَيْهِمْ بِالسَّخْلَةِ يَحْمِلُهَا الرَّاعِي وَلَا تَأْخُذُهَا وَلَا تَأْخُذُ الْأَكُولَةَ وَلَا الرُّبَّى وَلَا الْمَاخِضَ وَلَا فَحْلَ الْغَنَمِ وَتَأْخُذُ الْجَذَعَةَ وَالثَّنِيَّةَ وَذَلِكَ عَدْلٌ بَيْنَ غِذَاءِ الْغَنَمِ وَخِيَارِهِ
Yahya ayebisaki ngai uta na Malik uta na [Tsaur bin Zaid Ad Dailami] uta na [Mwana ya Abdullah bin Sufyan Ats Tsaqafi] uta na nkoko na ye [Sufyan bin Abdullah], ete mokolo moko ‘Umar bin Khattab atindaki ye lokola mosangisi zakat. Na nsima, alingaki kokɔtisa bana ya bibwɛlɛ oyo babotamaki sika na motángo yango, yango wana bato balobaki; ‘Okokɔtisa banyama oyo ebotami sika na ba calculs, atako ozali na mposa na yango te? Tango Sufyan bin Abdullah akutanaki na Umar bin Khattab, apesaki ye likambo oyo. [Umar] alobaki; 'Iyo. Ozuaka na compte ba niama oyo babotami sika oyo mobateli ya mpate amemi, kasi ozali kozua yango lokola zakat te. Kozwa mpe te - lokola zakat - banyama oyo ekanamaki mpo na koliama, banyama oyo euti kobota mpe ezali komɛlisa bana na yango mabɛlɛ, banyama oyo ezali na zemi mpe ata banyama ya mibali te, kasi kozwa oyo ezali na mbula mibale mpe mbula misato, yango ezali katikati kati na ntaba oyo esengeli koliama mpe biloko ya motuya’.
Imam Malik : 533
حَدَّثَنِي يَحْيَى عَنْ مَالِك عَنْ يَحْيَى بْنِ سَعِيدٍ عَنْ مُحَمَّدِ بْنِ يَحْيَى بْنِ حَبَّانَ عَنْ الْقَاسِمِ بْنِ مُحَمَّدٍ عَنْ عَائِشَةَ زَوْجِ النَّبِيِّ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ أَنَّهَا قَالَتْمُرَّ عَلَى عُمَرَ بْنِ الْخَطَّابِ بِغَنَمٍ مِنْ الصَّدَقَةِ فَرَأَى فِيهَا شَاةً حَافِلًا ذَاتَ ضَرْعٍ عَظِيمٍ فَقَالَ عُمَرُ مَا هَذِهِ الشَّاةُ فَقَالُوا شَاةٌ مِنْ الصَّدَقَةِ فَقَالَ عُمَرُ مَا أَعْطَى هَذِهِ أَهْلُهَا وَهُمْ طَائِعُونَ لَا تَفْتِنُوا النَّاسَ لَا تَأْخُذُوا حَزَرَاتِ الْمُسْلِمِينَ نَكِّبُوا عَنْ الطَّعَامِ
Yahya ayebisaki ngai uta na Malik uta na [Yahya bin Sa’id] uta na [Muhammad bin Yahya bin Habban] uta na [Al Qasim bin Muhammad] uta na [Aisyah] mwasi ya Ntoma sallallaahu ‘alaihi wasallam, alobaki, ‘Mbala moko amemaki ntaba ya zakat epai ya [Umar bin Khattab], amonaki ntaba oyo ezalaki na miliki mingi. Umar atunaki ete; ‘Ntaba oyo ezali nini? ’ bayanolaki ete; 'Oyo ezali ntaba ya zakat'. Na nsima alobaki ete; ‘Nkolo apesaka te mpo azali na botosi. Kofinga bato te. "Kozwa te biloko ya motuya mingi ya ba musulmans, kotika te ba officiers ya zakat bazua miliki na bango."
Imam Malik : 534
و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ يَحْيَى بْنِ سَعِيدٍ عَنْ مُحَمَّدِ بْنِ يَحْيَى بْنِ حَبَّانَ أَنَّهُ قَالَ أَخْبَرَنِي رَجُلَانِ مِنْ أَشْجَعَ أَنَّ مُحَمَّدَ بْنَ مَسْلَمَةَ الْأَنْصَارِيَّكَانَ يَأْتِيهِمْ مُصَدِّقًا فَيَقُولُ لِرَبِّ الْمَالِ أَخْرِجْ إِلَيَّ صَدَقَةَ مَالِكَ فَلَا يَقُودُ إِلَيْهِ شَاةً فِيهَا وَفَاءٌ مِنْ حَقِّهِ إِلَّا قَبِلَهَاقَالَ مَالِك السُّنَّةُ عِنْدَنَا وَالَّذِي أَدْرَكْتُ عَلَيْهِ أَهْلَ الْعِلْمِ بِبَلَدِنَا أَنَّهُ لَا يُضَيَّقُ عَلَى الْمُسْلِمِينَ فِي زَكَاتِهِمْ وَأَنْ يُقْبَلَ مِنْهُمْ مَا دَفَعُوا مِنْ أَمْوَالِهِمْ
Ayebisaki ngai uta na Malik uta na [Yahya bin Sa’id] uta na [Muhammad bin Yahya bin Habban] alobaki; ayebisi ngai [Mibali mibale ya Ashja’], ete [Muhammad bin Maslamah Al Ansari] ayaki epai na bango lokola mosangisi zakat. Na sima Muhammad alobaki na moto oyo azalaki na bomengo; ‘Pesá zakat na bozwi na yo! "Bongo bakomema ye ntaba moko te oyo etalelami ete ekoki lokola zakat na bomengo na ye, longola se soki azali na ntembe te ete akondima yango." Malik alobaki, ‘Sunnah engebene na madhhab na biso, mpe oyo nayebi epai ya bato ya mayele ya mboka na biso, ezali ete bato oyo bazwaka zakat basengeli te kosala makambo mpasi mpo na Bamizilma na makambo ya zakat na bango. Mpe tika andima oyo bapesaka na bomengo na bango'.
Imam Malik : 535
حَدَّثَنِي يَحْيَى عَنْ مَالِك عَنْ زَيْدِ بْنِ أَسْلَمَ عَنْ عَطَاءِ بْنِ يَسَارٍأَنَّ رَسُولَ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ قَالَ لَا تَحِلُّ الصَّدَقَةُ لِغَنِيٍّ إِلَّا لِخَمْسَةٍ لِغَازٍ فِي سَبِيلِ اللَّهِ أَوْ لِعَامِلٍ عَلَيْهَا أَوْ لِغَارِمٍ أَوْ لِرَجُلٍ اشْتَرَاهَا بِمَالِهِ أَوْ لِرَجُلٍ لَهُ جَارٌ مِسْكِينٌ فَتُصُدِّقَ عَلَى الْمِسْكِينِ فَأَهْدَى الْمِسْكِينُ لِلْغَنِيِّ
Bayebisaki ngai ete Yahya uta na Malik uta na [Zaid bin Aslam] uta na [’Atha bin Yasar] Rasulullah sallallaahu ‘alaihi wasallam alobaki: ‘Zakat epesami nzela te mpo na bazwi longola se bituluku mitano; bato oyo babundaka na nzela ya Allah, basangisi ya zakat, bato oyo bazali na banyongo, bato oyo basombaka biloko ya zakat na bomengo na bango, bato oyo bazali na ba voisins babola oyo bapesaka bango biloko ya zakat, sima mobola apesaka makabo na moto ya bozwi’.
Imam Malik : 536
و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ زَيْدِ بْنِ أَسْلَمَ أَنَّهُ قَالَ شَرِبَ عُمَرُ بْنُ الْخَطَّابِ لَبَنًافَأَعْجَبَهُ فَسَأَلَ الَّذِي سَقَاهُ مِنْ أَيْنَ هَذَا اللَّبَنُ فَأَخْبَرَهُ أَنَّهُ وَرَدَ عَلَى مَاءٍ قَدْ سَمَّاهُ فَإِذَا نَعَمٌ مِنْ نَعَمْ الصَّدَقَةِ وَهُمْ يَسْقُونَ فَحَلَبُوا لِي مِنْ أَلْبَانِهَا فَجَعَلْتُهُ فِي سِقَائِي فَهُوَ هَذَا فَأَدْخَلَ عُمَرُ بْنُ الْخَطَّابِ يَدَهُ فَاسْتَقَاءَهُ
Bayebisaki ngai ete Malik uta na [Zaid bin Aslam] alobaki, ‘[Umar bin al Khatthab] amelaki miliki, mpe ayokaki mposa. Na nsima, atunaki moto oyo apesaki ye ete: ‘Ozwi miliki oyo wapi?’ Na nsima moto yango ayebisaki ye ete azalaki koluka mai na esika oyo azalaki koluka mai mingi, mpe emonanaki ete banyama ya zakat ezalaki kuna. Bato bazalaki komɛla mpe komɛla miliki mpo na ngai. Na nsima natyaki yango na masanga na ngai, mpe kati na bango ezalaki oyo’. Na nsima, Umar bin Khattab atyaki mosapi na ye na monɔkɔ mpe amekaki kobwakela yango nsoi.’
Imam Malik : 537
و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ زِيَادِ بْنِ سَعْدٍ عَنْ ابْنِ شِهَابٍ أَنَّهُ قَالَلَا يُؤْخَذُ فِي صَدَقَةِ النَّخْلِ الْجُعْرُورُ وَلَا مُصْرَانُ الْفَارَةِ وَلَا عَذْقُ ابْنِ حُبَيْقٍ قَالَ وَهُوَ يُعَدُّ عَلَى صَاحِبِ الْمَالِ وَلَا يُؤْخَذُ مِنْهُ فِي الصَّدَقَةِ
Eyebisami na biso uta na Malik uta na [Ziyad bin Aslam] uta na [Ibn Shihab] alobaki; 'Esengeli te kozua zakat ya date na ba dates ya qualité ya se, ya qualité ya malamu mingi, to ba dates ya adzaq ya mabe mingi'. Ibnu Syhab abakisaki ete, ‘Ba dates etangamaka kaka, kasi ekoki kozuama lokola zakat te’.
Imam Malik : 538
حَدَّثَنِي يَحْيَى عَنْ مَالِك أَنَّهُ سَأَلَ ابْنَ شِهَابٍعَنْ الزَّيْتُونِ فَقَالَ فِيهِ الْعُشْرُ
Bayebisaki ngai ete Yahya uta na Malik atunaki [Ibn Shihab] na ntina ya olive, na nsima ayanolaki; 'Zakat ezali moko ya zomi'.
Imam Malik : 539
حَدَّثَنِي يَحْيَى عَنْ مَالِك عَنْ عَبْدِ اللَّهِ بْنِ دِينَارٍ عَنْ سُلَيْمَانَ بْنِ يَسَارٍ عَنْ عِرَاكِ بْنِ مَالِكٍ عَنْ أَبِي هُرَيْرَةَأَنَّ رَسُولَ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ قَالَ لَيْسَ عَلَى الْمُسْلِمِ فِي عَبْدِهِ وَلَا فِي فَرَسِهِ صَدَقَةٌ
Eyebisami na ngai na Yahya uta na Malik uta na [Abdullah bin Dinar] uta na [Sulaiman bin Yasar] uta na [‘Irak bin Malik] uta na [Abu Hurairah], ete Ntoma ya Allah sallallaahu ‘alaihi wasallam alobaki: ‘Ezali na mokumba moko te mpo na musulman kofuta zakat na baombo mpe bampunda na ye’.
Imam Malik : 540
و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ ابْنِ شِهَابٍ عَنْ سُلَيْمَانَ بْنِ يَسَارٍأَنَّ أَهْلَ الشَّامِ قَالُوا لِأَبِي عُبَيْدَةَ بْنِ الْجَرَّاحِ خُذْ مِنْ خَيْلِنَا وَرَقِيقِنَا صَدَقَةً فَأَبَى ثُمَّ كَتَبَ إِلَى عُمَرَ بْنِ الْخَطَّابِ فَأَبَى عُمَرُ ثُمَّ كَلَّمُوهُ أَيْضًا فَكَتَبَ إِلَى عُمَرَ فَكَتَبَ إِلَيْهِ عُمَرُ إِنْ أَحَبُّوا فَخُذْهَا مِنْهُمْ وَارْدُدْهَا عَلَيْهِمْ وَارْزُقْ رَقِيقَهُمْقَالَ مَالِك مَعْنَى قَوْلِهِ رَحِمَهُ اللَّهُ وَارْدُدْهَا عَلَيْهِمْ يَقُولُ عَلَى فُقَرَائِهِمْ
Elobami na ngai uta na Malik uta na [Ibn Shihab] uta na [Sulaiman bin Yasar] ete bato ya Syrie balobaki na [Abu Ubaidah bin Jarrah], ‘Bozwa zakat na bampunda mpe baombo na biso! ’ Kasi Abu Ubaidah aboyaki. Sima na yango akomaki mokanda epai ya Umar bin Khatthab, mpe emonani ete Umar mpe aboyaki. Bato ya Sham bamemaki lisusu masengi na bango na Abu Ubaidah, kino na suka Abu Ubaidah akomaki mokanda mosusu epai ya Umar. Na sima Umar akomaki na eyano, ‘Soki balingi, sima bazua zakat na bango pe zongisa yango na bango, sima bapesa baombo na bango part’. Malik alobaki, 'Ndimbola ya maloba ya Umar 'zongisa yango epai na bango', ezalaki mpo na bato na bango ya babola'.