Imam Malik : 21
و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ نَافِعٍأَنَّ عَبْدَ اللَّهِ بْنَ عُمَرَ أُغْمِيَ عَلَيْهِ فَذَهَبَ عَقْلُهُ فَلَمْ يَقْضِ الصَّلَاةَقَالَ مَالِك وَذَلِكَ فِيمَا نَرَى وَاللَّهُ أَعْلَمُ أَنَّ الْوَقْتَ قَدْ ذَهَبَ فَأَمَّا مَنْ أَفَاقَ فِي الْوَقْتِ فَإِنَّهُ يُصَلِّي
Eyebisamaki na ngai uta na Malik uta na [Nafi’], ete [Abdullah bin ‘Umar] azalaki na makanisi te mpe abungisaki bokundoli na ye, mpe asalaki mabondeli na ye te. Malik alobaki ete; 'Na makanisi na biso, Allah ayebi malamu, yango wana tango tango eleki, mpo na mutu oyo ayebi tango, esengeli asambela'.
Imam Malik : 22
حَدَّثَنِي يَحْيَى عَنْ مَالِك عَنْ ابْنِ شِهَابٍ عَنْ سَعِيدِ بْنِ الْمُسَيَّبِأَنَّ رَسُولَ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ حِينَ قَفَلَ مِنْ خَيْبَرَ أَسْرَى حَتَّى إِذَا كَانَ مِنْ آخِرِ اللَّيْلِ عَرَّسَ وَقَالَ لِبِلَالٍ اكْلَأْ لَنَا الصُّبْحَ وَنَامَ رَسُولُ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ وَأَصْحَابُهُ وَكَلَأَ بِلَالٌ مَا قُدِّرَ لَهُ ثُمَّ اسْتَنَدَ إِلَى رَاحِلَتِهِ وَهُوَ مُقَابِلُ الْفَجْرِ فَغَلَبَتْهُ عَيْنَاهُ فَلَمْ يَسْتَيْقِظْ رَسُولُ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ وَلَا بِلَالٌ وَلَا أَحَدٌ مِنْ الرَّكْبِ حَتَّى ضَرَبَتْهُمْ الشَّمْسُ فَفَزِعَ رَسُولُ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ فَقَالَ بِلَالٌ يَا رَسُولَ اللَّهِ أَخَذَ بِنَفْسِي الَّذِي أَخَذَ بِنَفْسِكَ فَقَالَ رَسُولُ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ اقْتَادُوا فَبَعَثُوا رَوَاحِلَهُمْ وَاقْتَادُوا شَيْئًا ثُمَّ أَمَرَ رَسُولُ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ بِلَالًا فَأَقَامَ الصَّلَاةَ فَصَلَّى بِهِمْ رَسُولُ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ الصُّبْحَ ثُمَّ قَالَ حِينَ قَضَى الصَّلَاةَ مَنْ نَسِيَ الصَّلَاةَ فَلْيُصَلِّهَا إِذَا ذَكَرَهَا فَإِنَّ اللَّهَ تَبَارَكَ وَتَعَالَى يَقُولُ فِي كِتَابِهِ{ أَقِمْ الصَّلَاةَ لِذِكْرِي }
Elobami na ngai ete Yahya uta na Malik uta na [Ibn Shihab] uta na [Sa’id bin Musayyab] ntango Rasulullah shallallahu ‘alaihi wasallam alongaki Khaibar, atambolaki kino na nsuka ya butu nsima atɛlɛmaki mpo na kopema, nsima alobaki na Bilal; ‘Botala na ntongo mpo na kolamuka biso’, sima Rasulullah shallallahu ‘alaihi wasallam na baninga na ye balalaki, nzokande Bilal azalaki kokengela na kolendisama, ntango ekómaki pene na ntɔngɔ amikitisi na motuka na ye, mpe na nsuka alali. Rasulullah shallallahu ‘alaihi wasallam, Bilal na baninga mosusu balamukaki te kino moi elamusaki bango, Rasulullah shallallahu ‘alaihi wasallam akamwaki, mpe Bilal alobaki na ye; ‘Ee Ntoma ya Allah, likambo moko esalemi na ngai lokola esalemi na yo,’ sima Rasulullah shallallahu ‘alaihi wasallam alobaki: ‘Kamba bangomba na yo’, yango wana batelemaki mpe batambwisaki bangomba na bango mpo na mwa ntango, nsima Rasulullah shallallahu ‘alaihi wasallam ayebisaki Bilal aloba iqamah, mpe Rasulullah shallallahu ‘alaihi wasallam abondelaki na yango losambo ya ntongo bango, tango asilisaki losambo na ye alobaki, ‘Moto oyo abosani kobondela nde abondelaka tango azali komikundola. Pamba te Allah Ta'ala alobi na buku na ye: 'kotia losambo po okanisa Ngai.' '' .
Imam Malik : 23
و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ زَيْدِ بْنِ أَسْلَمَ أَنَّهُ قَالَعَرَّسَ رَسُولُ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ لَيْلَةً بِطَرِيقِ مَكَّةَ وَوَكَّلَ بِلَالًا أَنْ يُوقِظَهُمْ لِلصَّلَاةِ فَرَقَدَ بِلَالٌ وَرَقَدُوا حَتَّى اسْتَيْقَظُوا وَقَدْ طَلَعَتْ عَلَيْهِمْ الشَّمْسُ فَاسْتَيْقَظَ الْقَوْمُ وَقَدْ فَزِعُوا فَأَمَرَهُمْ رَسُولُ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ أَنْ يَرْكَبُوا حَتَّى يَخْرُجُوا مِنْ ذَلِكَ الْوَادِي وَقَالَ إِنَّ هَذَا وَادٍ بِهِ شَيْطَانٌ فَرَكِبُوا حَتَّى خَرَجُوا مِنْ ذَلِكَ الْوَادِي ثُمَّ أَمَرَهُمْ رَسُولُ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ أَنْ يَنْزِلُوا وَأَنْ يَتَوَضَّئُوا وَأَمَرَ بِلَالًا أَنْ يُنَادِيَ بِالصَّلَاةِ أَوْ يُقِيمَ فَصَلَّى رَسُولُ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ بِالنَّاسِ ثُمَّ انْصَرَفَ إِلَيْهِمْ وَقَدْ رَأَى مِنْ فَزَعِهِمْ فَقَالَ يَا أَيُّهَا النَّاسُ إِنَّ اللَّهَ قَبَضَ أَرْوَاحَنَا وَلَوْ شَاءَ لَرَدَّهَا إِلَيْنَا فِي حِينٍ غَيْرِ هَذَا فَإِذَا رَقَدَ أَحَدُكُمْ عَنْ الصَّلَاةِ أَوْ نَسِيَهَا ثُمَّ فَزِعَ إِلَيْهَا فَلْيُصَلِّهَا كَمَا كَانَ يُصَلِّيهَا فِي وَقْتِهَا ثُمَّ الْتَفَتَ رَسُولُ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ إِلَى أَبِي بَكْرٍ فَقَالَ إِنَّ الشَّيْطَانَ أَتَى بِلَالًا وَهُوَ قَائِمٌ يُصَلِّي فَأَضْجَعَهُ فَلَمْ يَزَلْ يُهَدِّئُهُ كَمَا يُهَدَّأُ الصَّبِيُّ حَتَّى نَامَ ثُمَّ دَعَا رَسُولُ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ بِلَالًا فَأَخْبَرَ بِلَالٌ رَسُولَ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ مِثْلَ الَّذِي أَخْبَرَ رَسُولُ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ أَبَا بَكْرٍ فَقَالَ أَبُو بَكْرٍ أَشْهَدُ أَنَّكَ رَسُولُ اللَّهِ
Ayebisaki ngai uta na Malik uta na [Zaid bin Aslam] alobaki; 'Mokolo moko na butu Ntoma sallallaahu 'alaihi wasallam atɛlɛmaki mpo na kopema na nzela moko na Mecque, apesaki Bilal mokumba ya kolamuka bango na ngonga ya losambo, na nsima Bilal alali mpɔngi mpe bango mpe tii moi ebimaki. Balamuki na état ya somo, sima Rasulullah sallallaahu ‘alaihi wasallam ayebisaki bango babengana mituka na bango libanda ya lobwaku. Na sima - Rasulullah sallallaahu ‘alaihi wasallam - alobi : ‘Ya solo, lobwaku oyo ezali na zabolo na kati,’ sima batambolaki tii balongwe na esika wana, sima apesaki bango mitindo ete batelema mpo na wudu mpe ayebisaki Bilal asala libiangi ya losambo to iqamah, sima Ntoma ya Nzambe abondelaki elongo na bato, sima na yango abalukaki kotala bango na bobangi, sima alobi: ‘Ee bato, Allah azwi biso milimo, soki alingi Akozwa mpenza milimo na biso na ngonga mosusu oyo ezali te, soki moko na bino alali mpo na kosambela to abosani mpe na nsima amikundoli bongo sala yango ndenge asalaki yango na ntango na ye’. Rasulullah shallallahu ‘alaihi wasallam abalukaki epai ya Abu Bakr mpe alobaki: ‘Ya solo zabolo ayaki epai ya Bilal ntango azalaki kotɛlɛma kosambela mpe asalaki ye kolala, mpe azalaki kaka kolɛmbisa ye lokola mama azali kolɛmbisa mwana na ye tii ntango akolala’, na nsima abengaki Bilal mpe ayebisaki Rasulullah shallallahu ‘alaihi wasallam ndenge ayebisaki Abu Bakra, na nsima Abul Bakr alobaki; 'Nazali kotatola ete ozali Ntoma ya Allah'.
Imam Malik : 24
حَدَّثَنِي يَحْيَى عَنْ مَالِك عَنْ زَيْدِ بْنِ أَسْلَمَ عَنْ عَطَاءِ بْنِ يَسَارٍأَنَّ رَسُولَ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ قَالَ إِنَّ شِدَّةَ الْحَرِّ مِنْ فَيْحِ جَهَنَّمَ فَإِذَا اشْتَدَّ الْحَرُّ فَأَبْرِدُوا عَنْ الصَّلَاةِ وَقَالَ اشْتَكَتْ النَّارُ إِلَى رَبِّهَا فَقَالَتْ يَا رَبِّ أَكَلَ بَعْضِي بَعْضًا فَأَذِنَ لَهَا بِنَفَسَيْنِ فِي كُلِّ عَامٍ نَفَسٍ فِي الشِّتَاءِ وَنَفَسٍ فِي الصَّيْفِ
Yahya ayebisi ngai uta na Malik uta na [Zaid bin Aslam] uta na ['Atho` bin Yasar], Rasulullah sallallaahu 'alaihi wasallam alobaki: 'Ya solo, molunge makasi ewutaka na kopumbwa ya Jahannam, yango wana soki molunge ezali makasi, zongisa losambo sima kino ekozala elili'. Mpe alobaki ete: ‘Lifelo ezali komilelalela epai ya Rabb na yango, mpe elobi; 'O Rabb na ngai, basusu kati na ngai baliaka basusu' sima -Allah 'azza wajalla- apesi yango nzela na mpema mibale mbula na mbula, mpema moko na eleko ya malili mpe mpema mosusu na eleko ya molunge'.
Imam Malik : 25
و حَدَّثَنَا مَالِك عَنْ عَبْدِ اللَّهِ بْنِ يَزِيدَ مَوْلَى الْأَسْوَدِ بْنِ سُفْيَانَ عَنْ أَبِي سَلَمَةَ بْنِ عَبْدِ الرَّحْمَنِ وَعَنْ مُحَمَّدِ بْنِ عَبْدِ الرَّحْمَنِ بْنِ ثَوْبَانَ عَنْ أَبِي هُرَيْرَةَأَنَّ رَسُولَ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ قَالَ إِذَا اشْتَدَّ الْحَرُّ فَأَبْرِدُوا عَنْ الصَّلَاةِ فَإِنَّ شِدَّةَ الْحَرِّ مِنْ فَيْحِ جَهَنَّمَ وَذَكَرَ أَنَّ النَّارَ اشْتَكَتْ إِلَى رَبِّهَا فَأَذِنَ لَهَا فِي كُلِّ عَامٍ بِنَفَسَيْنِ نَفَسٍ فِي الشِّتَاءِ وَنَفَسٍ فِي الصَّيْفِ
Malik ayebisi ngai uta na [Abdullah bin Yazid] moombo ya kala ya Al Aswad bin Sufyan, uta na [Abu Salamah bin Abdurrahman], mpe uta na [Muhammad bin Abdurrahman bin Tsauban] uta na [Abu Hurairah], Rasulullah sallallaahu ‘alaihi wasallam alobaki: ‘Soki molunge ezali makasi, na nsima zela losambo kino ekozala elili, mpo ete molunge makasi ewutaka na ba coups ya Jahannam,’ mpe alobaki, ‘lifelo wana ezali komilelalela epai ya Rabb na Ye, sima Allah apesaka yango nzela na mbula nyonso na mpema mibale, mpema moko na eleko ya malili mpe mpema moko na eleko ya molunge’.
Imam Malik : 26
و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ أَبِي الزِّنَادِ عَنْ الْأَعْرَجِ عَنْ أَبِي هُرَيْرَةَأَنَّ رَسُولَ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ قَالَ إِذَا اشْتَدَّ الْحَرُّ فَأَبْرِدُوا عَنْ الصَّلَاةِ فَإِنَّ شِدَّةَ الْحَرِّ مِنْ فَيْحِ جَهَنَّمَ
Moyekoli ya lisolo alimboli ete; mpe elobelami na ngai uta na Malik uta na [Abu Az Zinad] uta na [Al A’raj] uta na [Abu Hurairah] Rasulullah sallallaahu ‘alaihi wasallam alobaki: ‘Ntango molunge ezali makasi na nsima kozongisa nsima ntango ya losambo kino ekozala malili, mpo ete makasi ya molunge euti na kopumbwa ya Jahannam’.
Imam Malik : 27
حَدَّثَنِي يَحْيَى عَنْ مَالِك عَنْ ابْنِ شِهَابٍ عَنْ سَعِيدِ بْنِ الْمُسَيَّبِأَنَّ رَسُولَ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ قَالَ مَنْ أَكَلَ مِنْ هَذِهِ الشَّجَرَةِ فَلَا يَقْرُبْ مَسَاجِدَنَا يُؤْذِينَا بِرِيحِ الثُّومِ
Bayebisaki ngai ete Yahya uta na Malik uta na [Ibn Shihab] uta na [Sa’id bin Musayyab] Rasulullah sallallaahu ‘alaihi wasallam alobaki: ‘Oyo azali kolia nzete oyo -matungulu-, apusana penepene na mosquée na biso te, mpo nsolo na yango ekoki kotungisa biso’.
Imam Malik : 28
و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ عَبْدِ الرَّحْمَنِ بْنِ الْمُجَبَّرِأَنَّهُ كَانَ يَرَى سَالِمَ بْنَ عَبْدِ اللَّهِ إِذَا رَأَى الْإِنْسَانَ يُغَطِّي فَاهُ وَهُوَ يُصَلِّي جَبَذَ الثَّوْبَ عَنْ فِيهِ جَبْذًا شَدِيدًا حَتَّى يَنْزِعَهُ عَنْ فِيهِ
Malik ayebisaki ngai uta na [Abdurrahman bin Al Mujabbar], ete amonaki [Salim bin Abdullah], ntango amonaki moto oyo azipaki monoko na ye ntango azalaki kosambela, abendaki chemise na ye makasi mpenza na boye ete ekweaki na monoko na ye’.
Imam Malik : 29
حَدَّثَنِي يَحْيَى عَنْ مَالِك عَنْ عَمْرِو بْنِ يَحْيَى الْمَازِنِيِّ عَنْ أَبِيهِ أَنَّهُ قَالَ لِعَبْدِ اللَّهِ بْنِ زَيْدِ بْنِ عَاصِمٍ وَهُوَ جَدُّ عَمْرِو بْنِ يَحْيَى الْمَازِنِيِّ وَكَانَ مِنْ أَصْحَابِ رَسُولِ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَهَلْ تَسْتَطِيعُ أَنْ تُرِيَنِي كَيْفَ كَانَ رَسُولُ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ يَتَوَضَّأُ فَقَالَ عَبْدُ اللَّهِ بْنُ زَيْدِ بْنِ عَاصِمٍ نَعَمْ فَدَعَا بِوَضُوءٍ فَأَفْرَغَ عَلَى يَدِهِ فَغَسَلَ يَدَيْهِ مَرَّتَيْنِ مَرَّتَيْنِ ثُمَّ تَمَضْمَضَ وَاسْتَنْثَرَ ثَلَاثًا ثُمَّ غَسَلَ وَجْهَهُ ثَلَاثًا ثُمَّ غَسَلَ يَدَيْهِ مَرَّتَيْنِ مَرَّتَيْنِ إِلَى الْمِرْفَقَيْنِ ثُمَّ مَسَحَ رَأْسَهُ بِيَدَيْهِ فَأَقْبَلَ بِهِمَا وَأَدْبَرَ بَدَأَ بِمُقَدَّمِ رَأْسِهِ ثُمَّ ذَهَبَ بِهِمَا إِلَى قَفَاهُ ثُمَّ رَدَّهُمَا حَتَّى رَجَعَ إِلَى الْمَكَانِ الَّذِي بَدَأَ مِنْهُ ثُمَّ غَسَلَ رِجْلَيْهِ
Ayebisaki ngai Yahya uta na Malik uta na ['Amru bin Yahya Al Mazini] uta na [tata na ye], alobaki na Abdullah Zaid bin Ashim mpe azalaki koko ya 'Amru bin Yahya Al Mazini, moko ya baninga ya Rasulullah sallallaahu 'alaihi wasallam; 'Okoki kolakisa ngai ndenge nini Rasulullah shallallahu 'alaihi wasallam asalaka wudu?' Abdullah bin Zaid bin 'Ashim alobaki; 'Iyo'. yango wana asengaki mai ya wudu, na nsima asopaki yango likoló ya mabɔkɔ na ye, mpe asukolaki mabɔkɔ na ye mbala mibale. na nsima, asukolaki monɔkɔ na ye mpe asalaki mpema na ye ya liboso mbala misato. Na nsima, asukolaki elongi mbala misato, na nsima asukolaki mabɔkɔ tii na mabɔlɔngɔ mbala mibale to mibale. Sima a frotter mutu na maboko mibale, liboso pe sima, abandaki na liboso ya mutu sima a continuer yango tii na nape ya kingo na ye pe azongisi yango esika abandaki sima asukolaki makolo mibale.
Imam Malik : 30
و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ أَبِي الزِّنَادِ عَنْ الْأَعْرَجِ عَنْ أَبِي هُرَيْرَةَأَنَّ رَسُولَ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ قَالَ إِذَا تَوَضَّأَ أَحَدُكُمْ فَلْيَجْعَلْ فِي أَنْفِهِ مَاءً ثُمَّ لِيَنْثِرْ وَمَنْ اسْتَجْمَرَ فَلْيُوتِرْ
Elobami na ngai uta na Malik uta na Abu Az Zinad uta na [Al A’raj] uta na [Abu Hurairah], Rasulullah sallallaahu ‘alaihi wasallam alobaki: ‘Ntango moko na bino asali wudu, asengeli kotia mayi na zolo na ye mpe na nsima asala istintsar. Mpe oyo akosambela na mabanga, tika yango ezala na motango moko ya mpamba’.
Imam Malik : 31
و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ ابْنِ شِهَابٍ عَنْ أَبِي إِدْرِيسَ الْخَوْلَانِيِّ عَنْ أَبِي هُرَيْرَةَأَنَّ رَسُولَ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ قَالَ مَنْ تَوَضَّأَ فَلْيَسْتَنْثِرْ وَمَنْ اسْتَجْمَرَ فَلْيُوتِرْ
Elobami na ngai uta na Malik uta na [Ibnu Shihab] uta na [Abu Idris Al Khaulani] uta na [Abu Hurairah], Ntoma ya Allah (kimia mpe mapamboli ya Allaah ezala likolo na ye) alobaki: ‘Oyo asali wudu asengeli kosala istijmar mpe oyo asali istijmar asala yango na motango moko ya mpamba’.
Imam Malik : 32
و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ يَحْيَى بْنِ مُحَمَّدِ بْنِ طَحْلَاءَ عَنْ عُثْمَانَ بْنِ عَبْدِ الرَّحْمَنِ أَنَّ أَبَاهُ حَدَّثَهُ أَنَّهُ سَمِعَ عُمَرَ بْنَ الْخَطَّابِيَتَوَضَّأُ بِالْمَاءِ لِمَا تَحْتَ إِزَارِهِ
Eyebisami na ngai uta na Malik uta na [Yahya bin Muhammad bin Thahla`] uta na [Uthman bin Abdurrahman], ete [tata na ye] ayebisaki ye ete ayokaki ete [Umar bin Al Khatthab] asalaki wudu na mai oyo basalelaka mpo na kosala mabondeli na ye.
Imam Malik : 33
حَدَّثَنِي يَحْيَى عَنْ مَالِك عَنْ أَبِي الزِّنَادِ عَنْ الْأَعْرَجِ عَنْ أَبِي هُرَيْرَةَأَنَّ رَسُولَ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ قَالَ إِذَا اسْتَيْقَظَ أَحَدُكُمْ مِنْ نَوْمِهِ فَلْيَغْسِلْ يَدَهُ قَبْلَ أَنْ يُدْخِلَهَا فِي وَضُوئِهِ فَإِنَّ أَحَدَكُمْ لَا يَدْرِي أَيْنَ بَاتَتْ يَدُهُ
Eyebisami na ngai na Yahya uta na Malik uta na Abu Az Zinad uta na [Al A’raj] uta na [Abu Hurairah], Ntoma ya Allah sallallaahu ‘alaihi wasallam alobaki: ‘Ntango moko kati na bino alamuki na pongi, sukola maboko na ye yambo atia yango na mayi ya wudu, mpo moko na bino ayebi te esika wapi maboko na ye alekisaki butu’.
Imam Malik : 34
و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ زَيْدِ بْنِ أَسْلَمَ أَنَّ عُمَرَ بْنَ الْخَطَّابِ قَالَإِذَا نَامَ أَحَدُكُمْ مُضْطَجِعًا فَلْيَتَوَضَّأْ
Elobami na ngai uta na Malik uta na [Zaid bin Aslam], [Umar bin Al Khatthab] alobaki; 'Soki moko na bino alali alali na mokɔngɔ alors tika ye asala ablution'.
Imam Malik : 35
و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ زَيْدِ بْنِ أَسْلَمَأَنَّ تَفْسِيرَ هَذِهِ الْآيَةِ{ يَا أَيُّهَا الَّذِينَ آمَنُوا إِذَا قُمْتُمْ إِلَى الصَّلَاةِ فَاغْسِلُوا وُجُوهَكُمْ وَأَيْدِيَكُمْ إِلَى الْمَرَافِقِ وَامْسَحُوا بِرُءُوسِكُمْ وَأَرْجُلَكُمْ إِلَى الْكَعْبَيْنِ }أَنَّ ذَلِكَ إِذَا قُمْتُمْ مِنْ الْمَضَاجِعِ يَعْنِي النَّوْمَ
Malik ayebisaki ngai uta na [Zaid bin Aslam], na oyo etali ndimbola ya vɛrsɛ: ‘Ee bino oyo bondimi, ntango bolingi kosala losambo, bosukola bilongi na bino mpe maboko na bino kino na makolo, mpe bopangusa mitó mpe makolo na bino kino na makolo’ oyo ezali oyo esalemaka ntango bolamuki na mpɔngi.
Imam Malik : 36
و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ نَافِعٍ أَنَّ ابْنَ عُمَرَكَانَ يَنَامُ جَالِسًا ثُمَّ يُصَلِّي وَلَا يَتَوَضَّأُ
Moyekoli ya lisolo alimboli ete; ayebisi ngai, uta na Malik uta na [Nafi’], ete [Ibn Umar] mokolo moko alalaki afandi mpe na nsima abondelaki mpe asalaki wudu te.
Imam Malik : 37
حَدَّثَنِي يَحْيَى عَنْ مَالِك عَنْ صَفْوَانَ بْنِ سُلَيْمٍ عَنْ سَعِيدِ بْنِ سَلَمَةَ مِنْ آلِ بَنِي الْأَزْرَقِ عَنْ الْمُغِيرَةِ بْنِ أَبِي بُرْدَةَ وَهُوَ مِنْ بَنِي عَبْدِ الدَّارِ أَنَّهُ سَمِعَ أَبَا هُرَيْرَةَ يَقُولُجَاءَ رَجُلٌ إِلَى رَسُولِ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ فَقَالَ يَا رَسُولَ اللَّهِ إِنَّا نَرْكَبُ الْبَحْرَ وَنَحْمِلُ مَعَنَا الْقَلِيلَ مِنْ الْمَاءِ فَإِنْ تَوَضَّأْنَا بِهِ عَطِشْنَا أَفَنَتَوَضَّأُ بِهِ فَقَالَ رَسُولُ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ هُوَ الطَّهُورُ مَاؤُهُ الْحِلُّ مَيْتَتُهُ
Moyekoli ya lisolo alimboli ete; ayebisi ngai uta na Malik uta na [Shafwan bin Sulaim] uta na [Sa’id bin Salamah] kati na Bani Al Arzaq, uta na [Al Mughirah bin Abu Burdah] kati na Bani Abdud Dar, ete ayokaki [Abu Hurairah] koloba; moto moko ayaki epai ya Rasulullah sallallaahu ‘alaihi wasallam mpe alobaki; ‘Ee Ntoma ya Allah, tokendeki na masuwa na mbu ntango tomemaki kaka mwa mai moke. Soki tosali wudu elongo na ye tokozala na mposa ya mai, tokoki kosala wudu elongo na ye?’ Ntoma sallallaahu ‘alaihi wasallam alobaki: ‘Mai ya mbu ezali mosantu, bibembe na yango ezali halal’.
Imam Malik : 38
و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ إِسْحَقَ بْنِ عَبْدِ اللَّهِ بْنِ أَبِي طَلْحَةَ عَنْ حُمَيْدَةَ بِنْتِ عُبَيْدِ بْنِ رِفَاعَةَ عَنْ خَالَتِهَا كَبْشَةَ بِنْتِ كَعْبِ بْنِ مَالِكٍ وَكَانَتْ تَحْتَ ابْنِ أَبِي قَتَادَةَ الْأَنْصَارِيِّ أَنَّهَا أَخْبَرَتْهَاأَنَّ أَبَا قَتَادَةَ دَخَلَ عَلَيْهَا فَسَكَبَتْ لَهُ وَضُوءًا فَجَاءَتْ هِرَّةٌ لِتَشْرَبَ مِنْهُ فَأَصْغَى لَهَا الْإِنَاءَ حَتَّى شَرِبَتْ قَالَتْ كَبْشَةُ فَرَآنِي أَنْظُرُ إِلَيْهِ فَقَالَ أَتَعْجَبِينَ يَا ابْنَةَ أَخِي قَالَتْ فَقُلْتُ نَعَمْ فَقَالَ إِنَّ رَسُولَ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ قَالَ إِنَّهَا لَيْسَتْ بِنَجَسٍ إِنَّمَا هِيَ مِنْ الطَّوَّافِينَ عَلَيْكُمْ أَوْ الطَّوَّافَاتِ
Moyekoli ya lisolo alimboli ete; ayebisi ngai uta na Malik uta na [Ishaq bin Abdullah bin Abu Thalhah] uta na [Humaidah bint Ubaid bin Rifa’ah] uta na noko na ye - [Kabsyah bint Ka’ab bin Malik] - mpe azalaki na nse ya bobateli ya Abu Qatadah Al Ansari, ayebisaki ye ete [Abu Qatadah] akendaki kotala ye, Kabsyah asopaki ye mai ya ablution, na mbalakaka mbwa moko ayaki mpe amelaki mai ya wudu na ye, yango wana amemaki mbɛki yango penepene mpo mbwa emɛla yango. Kabsyah alobaki ete; Bongo amonaki ngai oyo nazalaki kotala ye mpe alobaki; ‘Okamwi O mwana mwasi ya ndeko na ngai?’ Alobi ete; na nsima nayanolaki ete, ‘Ɛɛ’. Abu Qatadah alimbolaki ete Ntoma sallallaahu ‘alaihi wasallam alobaki: ‘Ba mbwa bazali mbindo te, mpo ezali banyama oyo ezali zingazinga na biso’.
Imam Malik : 39
و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ يَحْيَى بْنِ سَعِيدٍ عَنْ مُحَمَّدِ بْنِ إِبْرَاهِيمَ بْنِ الْحَارِثِ التَّيْمِيِّ عَنْ يَحْيَى بْنِ عَبْدِ الرَّحْمَنِ بْنِ حَاطِبٍأَنَّ عُمَرَ بْنَ الْخَطَّابِ خَرَجَ فِي رَكْبٍ فِيهِمْ عَمْرُو بْنُ الْعَاصِ حَتَّى وَرَدُوا حَوْضًا فَقَالَ عَمْرُو بْنُ الْعَاصِ لِصَاحِبِ الْحَوْضِ يَا صَاحِبَ الْحَوْضِ هَلْ تَرِدُ حَوْضَكَ السِّبَاعُ فَقَالَ عُمَرُ بْنُ الْخَطَّابِ يَا صَاحِبَ الْحَوْضِ لَا تُخْبِرْنَا فَإِنَّا نَرِدُ عَلَى السِّبَاعِ وَتَرِدُ عَلَيْنَا
Moyekoli ya lisolo alimboli ete; ayebisi ngai uta na Malik uta na [Yahya bin Said] uta na [Muhammad bin Ibrahim bin Al Harits Na Taimi] uta na [Yahya bin Abdurrahman bin Hathib], ete [Umar bin Al Khathab] mokolo moko abimaki na etuluku moko oyo ezalaki na kati na yango ‘Amru bin Al Ash, ntango bakomaki na laki moko, ‘Amru bin Al Ash alobaki na nkolo laki; ‘Ee mobateli ya laki, ezali na banyama ya zamba oyo ezali komɛla na laki na yo?’ na nsima, Umar bin Al Khatthab akataki maloba; 'Ee mobateli ya laki, koyebisa biso te, tomelaka na mayi oyo banyama ya zamba bameli pe banyama ya zamba pe bamelaka na mayi oyo tomeli'.
Imam Malik : 40
و حَدَّثَنِي عَنْ مَالِك عَنْ نَافِعٍ أَنَّ عَبْدَ اللَّهِ بْنَ عُمَرَ كَانَ يَقُولُإِنْ كَانَ الرِّجَالُ وَالنِّسَاءُ فِي زَمَانِ رَسُولِ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ لَيَتَوَضَّئُونَ جَمِيعًا
Moyekoli ya lisolo alimboli ete; ayebisi ngai uta na Malik uta na [Nafi’]; Yango [Abdullah bin Umar] alobaki; 'Mibali na basi na tango ya Ntoma sallallaahu 'alaihi wasallam basalaki wudu na tango moko'.