Imam Ibnu Majah : 1
حَدَّثَنَا أَبُو بَكْرِ بْنُ أَبِي شَيْبَةَ قَالَ حَدَّثَنَا شَرِيكٌ عَنْ الْأَعْمَشِ عَنْ أَبِي صَالِحٍ عَنْ أَبِي هُرَيْرَةَ قَالَقَالَ رَسُولُ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ مَا أَمَرْتُكُمْ بِهِ فَخُذُوهُ وَمَا نَهَيْتُكُمْ عَنْهُ فَانْتَهُوا
Elobami na biso [Abu Bakr bin Abu Syaibah] alobaki; alobeli biso [Sharik] uta na [Al A'masy] uta na [Abu Salih] uta na [Abu Hurairah] alobaki; Ntoma sallallaahu ‘alaihi wasallam alobaki: ‘Oyo napesi mitindo, zwá yango, mpe oyo napekisi, tika yango’.
Imam Ibnu Majah : 2
حَدَّثَنَا مُحَمَّدُ بْنُ الصَّبَّاحِ قَالَ أَنْبَأَنَا جَرِيرٌ عَنْ الْأَعْمَشِ عَنْ أَبِي صَالِحٍ عَنْ أَبِي هُرَيْرَةَ قَالَقَالَ رَسُولُ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ ذَرُونِي مَا تَرَكْتُكُمْ فَإِنَّمَا هَلَكَ مَنْ كَانَ قَبْلَكُمْ بِسُؤَالِهِمْ وَاخْتِلَافِهِمْ عَلَى أَنْبِيَائِهِمْ فَإِذَا أَمَرْتُكُمْ بِشَيْءٍ فَخُذُوا مِنْهُ مَا اسْتَطَعْتُمْ وَإِذَا نَهَيْتُكُمْ عَنْ شَيْءٍ فَانْتَهُوا
Ayebisaki biso [Muhammad bin Ash Shabbah] alobaki; ayebisi biso [Jarir] uta na [Al A'masy] uta na [Abu Salih] uta na [Abu Hurairah] alobaki; Rasulullah sallallaahu ‘alaihi wasallam alobaki: ‘Tika oyo natiki yo. Ya solo, baye bazalaki liboso na bino bakufaki mpo na mituna mpe matata na bango na Baprofeta na bango. Soki natindi yo osala likambo moko alors sala yango ndenge okoki, pe soki napekisi yo eloko moko alors tikala mosika na yango'.
Imam Ibnu Majah : 3
حَدَّثَنَا أَبُو بَكْرِ بْنُ أَبِي شَيْبَةَ حَدَّثَنَا أَبُو مُعَاوِيَةَ وَوَكِيعٌ عَنْ الْأَعْمَشِ عَنْ أَبِي صَالِحٍ عَنْ أَبِي هُرَيْرَةَ قَالَقَالَ رَسُولُ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ مَنْ أَطَاعَنِي فَقَدْ أَطَاعَ اللَّهَ وَمَنْ عَصَانِي فَقَدْ عَصَى اللَّهَ
Ayebisaki biso [Abu Bakr bin Abu Syaibah] alobaki, ayebisaki biso [Abu Mu’awiyah], mpe [Waki’] uta na [Al A’masy] uta na [Abu Salih] uta na [Abu Hurairah] alobaki; Ntoma sallallaahu ‘alaihi wasallam alobaki: ‘Oyo atosi ngai atosi Allah mpe oyo azali kotosa ngai te atosi Allah te’.
Imam Ibnu Majah : 4
حَدَّثَنَا مُحَمَّدُ بْنُ عَبْدِ اللَّهِ بْنِ نُمَيْرٍ حَدَّثَنَا زَكَرِيَّا بْنُ عَدِيٍّ عَنْ ابْنِ الْمُبَارَكِ عَنْ مُحَمَّدِ بْنِ سُوقَةَ عَنْ أَبِي جَعْفَرٍ قَالَكَانَ ابْنُ عُمَرَ إِذَا سَمِعَ مِنْ رَسُولِ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ حَدِيثًا لَمْ يَعْدُهُ وَلَمْ يُقَصِّرْ دُونَهُ
Ayebisaki biso [Muhammad bin Abdullah bin Numair] alobaki, ayebisi biso [Zakaria bin ‘Adi] uta na [Ibn Mubarak] uta na [Muhammad bin Suqah] uta na [Abu Ja’far] alobaki; ' [Ibnu Umar] Soki ayokaki hadith moko ewutaki na Rasulullah sallallaahu 'alaihi wasallam, azangaki yango te mpe azalaki occupé na eloko mosusu te'.
Imam Ibnu Majah : 5
حَدَّثَنَا هِشَامُ بْنُ عَمَّارٍ الدِّمَشْقِيُّ حَدَّثَنَا مُحَمَّدُ بْنُ عِيسَى بْنِ سُمَيْعٍ حَدَّثَنَا إِبْرَاهِيمُ بْنُ سُلَيْمَانَ الْأَفْطَسُ عَنْ الْوَلِيدِ بْنِ عَبْدِ الرَّحْمَنِ الْجُرَشِيِّ عَنْ جُبَيْرِ بْنِ نُفَيْرٍ عَنْ أَبِي الدَّرْدَاءِ قَالَخَرَجَ عَلَيْنَا رَسُولُ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ وَنَحْنُ نَذْكُرُ الْفَقْرَ وَنَتَخَوَّفُهُ فَقَالَ أَالْفَقْرَ تَخَافُونَ وَالَّذِي نَفْسِي بِيَدِهِ لَتُصَبَّنَّ عَلَيْكُمْ الدُّنْيَا صَبًّا حَتَّى لَا يُزِيغَ قَلْبَ أَحَدِكُمْ إِزَاغَةً إِلَّا هِيهْ وَايْمُ اللَّهِ لَقَدْ تَرَكْتُكُمْ عَلَى مِثْلِ الْبَيْضَاءِ لَيْلُهَا وَنَهَارُهَا سَوَاءٌقَالَ أَبُو الدَّرْدَاءِ صَدَقَ وَاللَّهِ رَسُولُ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ تَرَكَنَا وَاللَّهِ عَلَى مِثْلِ الْبَيْضَاءِ لَيْلُهَا وَنَهَارُهَا سَوَاءٌ
Ayebisaki biso [Hisyam bin ‘Ammar Ad Dimasyqi] alobi, ayebisi biso [Muhammad bin Isa bin Sumai’] alobi, ayebisi biso [Ibrahim bin Sulaiman Al Afthas] uta na [Al Walid bin Abdurrahman Al Jurasyi] uta na [Jubair bin Nufair] uta na [Abu Darda`] alobaki; ‘Ntoma ya Allah sallallaahu ‘alaihi wasallam abimaki mpo na kokutana na biso, ntango tozalaki kolobela likambo ya bobola mpe toyokaki kobanga ye. Na nsima alobaki ete: ‘Ozali kobanga bobola? Na Moto oyo molimo na ngai ezali na Loboko na ye, mokili ekopesama na bino, na boye ete motema ya moko na bino ekoki kobaluka te kasi kokutana na yango. Ya solo, natiki mpo na bino biloko oyo ezali kongɛnga makasi, butu mpe moi ezali ndenge moko’. Abu Darda` alobaki ete; 'Na Allah azali solo, Ntoma ya Allah sallallaahu 'alaihi wasallam atiki biso biloko oyo ezali kongenga makasi, butu na moyi ezali ndenge moko'.
Imam Ibnu Majah : 6
حَدَّثَنَا مُحَمَّدُ بْنُ بَشَّارٍ حَدَّثَنَا مُحَمَّدُ بْنُ جَعْفَرٍ حَدَّثَنَا شُعْبَةُ عَنْ مُعَاوِيَةَ بْنِ قُرَّةَ عَنْ أَبِيهِ قَالَقَالَ رَسُولُ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ لَا تَزَالُ طَائِفَةٌ مِنْ أُمَّتِي مَنْصُورِينَ لَا يَضُرُّهُمْ مَنْ خَذَلَهُمْ حَتَّى تَقُومَ السَّاعَةُ
Ayebisaki biso [Muhammad bin Basysyar] alobi, ayebisi biso [Muhammad bin Ja’far] alobaki, ayebisaki biso [Syu’bah] uta na [Mu’awiyah bin Qurrah] uta na [tata na ye] alobaki; Ntoma sallallaahu ‘alaihi wasallam alobaki: ‘Ekozala ntango nyonso na etuluku moko ya Ummah na ngai oyo ekozwa lisalisi. Baoyo bakotyola bango bakosala bango mabe te kino mokolo ya lisekwa’.
Imam Ibnu Majah : 7
حَدَّثَنَا أَبُو عَبْد اللَّهِ قَالَ حَدَّثَنَا هِشَامُ بْنُ عَمَّارٍ قَالَ حَدَّثَنَا يَحْيَى بْنُ حَمْزَةَ قَالَ حَدَّثَنَا أَبُو عَلْقَمَةَ نَصْرُ بْنُ عَلْقَمَةَ عَنْ عُمَيْرِ بْنِ الْأَسْوَدِ وَكَثِيرِ بْنِ مُرَّةَ الْحَضْرَمِيِّ عَنْ أَبِي هُرَيْرَةَأَنَّ رَسُولَ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ قَالَ لَا تَزَالُ طَائِفَةٌ مِنْ أُمَّتِي قَوَّامَةً عَلَى أَمْرِ اللَّهِ لَا يَضُرُّهَا مَنْ خَالَفَهَا
Abu Abdullah ayebisaki biso ete alobaki; ayebisi biso [Hisyam bin ‘Ammar] alobaki; ayebisi biso [Yahya bin Hamzah] alobaki; ayebisi biso [Abu Alqamah Nashr bin Alqamah] uta na [Umair Al Aswad] mpe [Katsir bin Murrah Al Hadlrami] uta na [Abu Hurairah] alobi; Rasulullah sallallaahu ‘alaihi wasallam alobaki: ‘Ekozala ntango nyonso na etuluku moko ya Ummah na ngai oyo batelemi makasi na mitindo ya Allah, mpe bakosala mabe te na baye bayokani te na yango’.
Imam Ibnu Majah : 8
حَدَّثَنَا أَبُو عَبْد اللَّهِ قَالَ حَدَّثَنَا هِشَامُ بْنُ عَمَّارٍ حَدَّثَنَا الْجَرَّاحُ بْنُ مَلِيحٍ حَدَّثَنَا بَكْرُ بْنُ زُرْعَةَ قَالَ سَمِعْتُ أَبَا عِنَبَةَ الْخَوْلَانِيَّ وَكَانَ قَدْ صَلَّى الْقِبْلَتَيْنِ مَعَ رَسُولِ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ قَالَسَمِعْتُ رَسُولَ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ يَقُولُ لَا يَزَالُ اللَّهُ يَغْرِسُ فِي هَذَا الدِّينِ غَرْسًا يَسْتَعْمِلُهُمْ فِي طَاعَتِهِ
Abu Abdullah ayebisaki biso ete alobaki; ayebisi biso [Hisyam bin ‘Ammar] alobi, ayebisi biso [Al Jarrah bin Malih] alobi, ayebisi biso [Bakr bin Zur’ah] alobi; Nayokaki [Abu ‘Inabah Al Khaulani] mpe azalaki moninga oyo azalaki kosambela elongi na ba Qibla mibale elongo na Rasulullah sallallaahu ‘alaihi wasallam, alobaki; Nayokaki Rasulullah shallallahu ‘alaihi wasallam alobi: ‘Allah akolona tango nionso milona -ba réformistes- na lingomba oyo, oyo ako diriger na botosi na Ye’.
Imam Ibnu Majah : 9
حَدَّثَنَا يَعْقُوبُ بْنُ حُمَيْدِ بْنِ كَاسِبٍ حَدَّثَنَا الْقَاسِمُ بْنُ نَافِعٍ حَدَّثَنَا الْحَجَّاجُ بْنُ أَرْطَاةَ عَنْ عَمْرِو بْنِ شُعَيْبٍ عَنْ أَبِيهِ قَالَ قَامَ مُعَاوِيَةُ خَطِيبًا فَقَالَ أَيْنَ عُلَمَاؤُكُمْ أَيْنَ عُلَمَاؤُكُمْ سَمِعْتُ رَسُولَ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ يَقُولُ لَا تَقُومُ السَّاعَةُ إِلَّا وَطَائِفَةٌ مِنْ أُمَّتِي ظَاهِرُونَ عَلَى النَّاسِ لَا يُبَالُونَ مَنْ خَذَلَهُمْ وَلَا مَنْ نَصَرَهُمْ
Ayebisaki biso [Ya’qub bin Humaid bin Kasib] alobi, ayebisi biso [Al Qasim bin Nafi’] alobaki, ayebisi biso [Al Hajjaj bin Arthah] uta na [‘Amru bin Syu’aib] uta na [tata na ye] alobaki; [Mu’awiyah] atɛlɛmaki mpo na lisukulu, na nsima alobaki; ‘Bato ya mayele na bino bazali wapi? Ba nganga mayele na bino bazali wapi? Nayokaki Rasulullah shallallahu ‘alaihi wasallam alobi: ‘Mokolo ya Kosambisama ekosalema te kino etuluku moko ya ummah na ngai ekolonga bato banso, bakomibanzabanza te mpo na baye bakofinga bango mpe to mpe baye bazali kosalisa bango’.
Imam Ibnu Majah : 10
حَدَّثَنَا هِشَامُ بْنُ عَمَّارٍ حَدَّثَنَا مُحَمَّدُ بْنُ شُعَيْبٍ حَدَّثَنَا سَعِيدُ بْنُ بَشِيرٍ عَنْ قَتَادَةَ عَنْ أَبِي قِلَابَةَ عَنْ أَبِي أَسْمَاءَ الرَّحَبِيِّ عَنْ ثَوْبَانَأَنَّ رَسُولَ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ قَالَ لَا تَزَالُ طَائِفَةٌ مِنْ أُمَّتِي عَلَى الْحَقِّ مَنْصُورِينَ لَا يَضُرُّهُمْ مَنْ خَالَفَهُمْ حَتَّى يَأْتِيَ أَمْرُ اللَّهِ عَزَّ وَجَلَّ
Ayebisaki biso [Hisyam bin ‘Ammar] alobi, ayebisi biso [Muhammad bin Syu’aib] alobaki, ayebisaki biso [Sa’id bin Basyir] uta na [Qatadah] uta na [Abu Qilabah] uta na [Abu Asma` Ar Rahabi] uta na [Tsauban] alobaki; Rasulullah shallallahu ‘alaihi wasallam alobaki: ‘Ekozala ntango nyonso na etuluku ya bato na ngai oyo bakosunga na bosolo, kosala mabe te na baye bayokani te kino mokano ya Allah ekoya’.
Imam Ibnu Majah : 11
حَدَّثَنَا أَبُو سَعِيدٍ عَبْدُ اللَّهِ بْنُ سَعِيدٍ حَدَّثَنَا أَبُو خَالِدٍ الْأَحْمَرُ قَالَ سَمِعْتُ مُجَالِدًا يَذْكُرُ عَنْ الشَّعْبِيِّ عَنْ جَابِرِ بْنِ عَبْدِ اللَّهِ قَالَكُنَّا عِنْدَ النَّبِيِّ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ فَخَطَّ خَطًّا وَخَطَّ خَطَّيْنِ عَنْ يَمِينِهِ وَخَطَّ خَطَّيْنِ عَنْ يَسَارِهِ ثُمَّ وَضَعَ يَدَهُ فِي الْخَطِّ الْأَوْسَطِ فَقَالَ هَذَا سَبِيلُ اللَّهِ ثُمَّ تَلَا هَذِهِ الْآيَةَ{ وَأَنَّ هَذَا صِرَاطِي مُسْتَقِيمًا فَاتَّبِعُوهُ وَلَا تَتَّبِعُوا السُّبُلَ فَتَفَرَّقَ بِكُمْ عَنْ سَبِيلِهِ }
Ayebisaki biso [Abu Sa’id Abdullah bin Sa’id] alobaki, ayebisi biso [Abu Khalid Al Ahmar] alobaki; Nayokaki [Mujalid] alobelaki epai ya [Ash Sya’bi] epai ya [Jabir bin Abdullah] alobaki; ‘Tozalaki na ngambo ya Ntoma sallallaahu ‘alaihi wasallam, na sima asalaki ligne moko, sima asalaki ba lignes mibale na côté na ye ya droite pe ba lignes mibale mosusu na côté na ye ya gauche. Na sima atie loboko na ye na ligne ya kati pe alobaki : 'Oyo ezali nzela ya Allah'. Na sima atangi molongo oyo: ‘Mpe ete - oyo Topesaki mitindo - oyo ezali nzela na Ngai ya semba, yango wana bolanda yango; mpe bolanda banzela mosusu te, mpo bakopalanganisa bino uta na nzela na Ye’.
Imam Ibnu Majah : 12
حَدَّثَنَا أَبُو بَكْرِ بْنُ أَبِي شَيْبَةَ قَالَ حَدَّثَنَا زَيْدُ بْنُ الْحُبَابِ عَنْ مُعَاوِيَةَ بْنِ صَالِحٍ حَدَّثَنِي الْحَسَنُ بْنُ جَابِرٍ عَنْ الْمِقْدَامِ بْنِ مَعْدِيكَرِبَ الْكِنْدِيِّأَنَّ رَسُولَ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ قَالَ يُوشِكُ الرَّجُلُ مُتَّكِئًا عَلَى أَرِيكَتِهِ يُحَدَّثُ بِحَدِيثٍ مِنْ حَدِيثِي فَيَقُولُ بَيْنَنَا وَبَيْنَكُمْ كِتَابُ اللَّهِ عَزَّ وَجَلَّ مَا وَجَدْنَا فِيهِ مِنْ حَلَالٍ اسْتَحْلَلْنَاهُ وَمَا وَجَدْنَا فِيهِ مِنْ حَرَامٍ حَرَّمْنَاهُ أَلَّا وَإِنَّ مَا حَرَّمَ رَسُولُ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ مِثْلُ مَا حَرَّمَ اللَّهُ
Ayebisaki biso [Abu Bakr bin Abu Syaibah] alobaki, alobaki; ayebisi biso [Zaid Ibnu Al Hubab] uta na [Mu’awiyah bin Salih] alobaki, ayebisi ngai [Al Hasan bin Jabir] uta na [Al Miqdam bin Ma’dikarib Al Kindi] alobaki; Rasulullah sallallaahu ‘alaihi wasallam alobaki: ‘ Ezalaki kobanga ete moto akomikitisa na kiti na ye, bayebisaki ye hadith moko epai na ngai, kasi alobaki; 'Kati na biso na yo ezali buku ya Allah 'azza wajalla.' Oyo nionso tokokuta halal na yango, tosalaka halal, pe nionso tokokuta haram na yango, tosalaka yango haram'. Yeba, ya solo, oyo epekisamaki na Ntoma sallallaahu ‘alaihi wasallam ezali oyo Allah apekisi.
Imam Ibnu Majah : 13
حَدَّثَنَا نَصْرُ بْنُ عَلِيٍّ الْجَهْضَمِيُّ حَدَّثَنَا سُفْيَانُ بْنُ عُيَيْنَةَ فِي بَيْتِهِ أَنَا سَأَلْتُهُ عَنْ سَالِمٍ أَبِي النَّضْرِ ثُمَّ مَرَّ فِي الْحَدِيثِ قَالَ أَوْ زَيْدِ بْنِ أَسْلَمَ عَنْ عُبَيْدِ اللَّهِ بْنِ أَبِي رَافِعٍ عَنْ أَبِيهِأَنَّ رَسُولَ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ قَالَ لَا أُلْفِيَنَّ أَحَدَكُمْ مُتَّكِئًا عَلَى أَرِيكَتِهِ يَأْتِيهِ الْأَمْرُ مِمَّا أَمَرْتُ بِهِ أَوْ نَهَيْتُ عَنْهُ فَيَقُولُ لَا أَدْرِي مَا وَجَدْنَا فِي كِتَابِ اللَّهِ اتَّبَعْنَاهُ
Ayebisaki biso [Nashr bin Ali Al Jahdlami] alobi, ayebisi biso [Sufyan bin Uyainah] -natunaki ye na ndako na ye- epai ya [Salim Abu Al Nadlr] -na nsima atangi hadith-, alobaki; to [Zaid bin Aslam] uta na [Ubaidullah bin Abu Rafi’] uta na [tata na ye] alobaki; Rasulullah shallallahu ‘alaihi wasallam alobaki: ‘Ya solo, moko na bino akozwama afandi sima na kiti na ye, sima akoya epai na ye na mitindo mpe bipekiseli na ngai, kasi akoloba; ‘Nayebaki te maye tokutaki na Buku ya Allah, yango wana tolandaki yango.’
Imam Ibnu Majah : 14
حَدَّثَنَا أَبُو مَرْوَانَ مُحَمَّدُ بْنُ عُثْمَانَ الْعُثْمَانِيُّ حَدَّثَنَا إِبْرَاهِيمُ بْنُ سَعْدِ بْنِ إِبْرَاهِيمَ بْنِ عَبْدِ الرَّحْمَنِ بْنِ عَوْفٍ عَنْ أَبِيهِ عَنْ الْقَاسِمِ بْنِ مُحَمَّدٍ عَنْ عَائِشَةَأَنَّ رَسُولَ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ قَالَ مَنْ أَحْدَثَ فِي أَمْرِنَا هَذَا مَا لَيْسَ مِنْهُ فَهُوَ رَدٌّ
Ayebisaki biso [Abu Marwan Muhammad bin Uthman Al Utsmani] alobaki, ayebisi biso [Ibrahim bin Sa’d bin Ibrahim bin Abdurrahman bin Auf] uta na [tata na ye] uta na [Al Qasim bin Muhammad] uta na [Aisyah] alobaki; Rasulullah sallallaahu ‘alaihi wasallam alobaki: ‘Oyo azali kokela likambo ya sika na makambo na biso oyo ezali eteni na yango te, baboyami’.
Imam Ibnu Majah : 15
حَدَّثَنَا مُحَمَّدُ بْنُ رُمْحِ بْنِ الْمُهَاجِرِ الْمِصْرِيُّ أَنْبَأَنَا اللَّيْثُ بْنُ سَعْدٍ عَنْ ابْنِ شِهَابٍ عَنْ عُرْوَةَ بْنِ الزُّبَيْرِ أَنَّ عَبْدَ اللَّهِ بْنَ الزُّبَيْرِ حَدَّثَهُأَنَّ رَجُلًا مِنْ الْأَنْصَارِ خَاصَمَ الزُّبَيْرَ عِنْدَ رَسُولِ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ فِي شِرَاجِ الْحَرَّةِ الَّتِي يَسْقُونَ بِهَا النَّخْلَ فَقَالَ الْأَنْصَارِيُّ سَرِّحْ الْمَاءَ يَمُرُّ فَأَبَى عَلَيْهِ فَاخْتَصَمَا عِنْدَ رَسُولِ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ فَقَالَ رَسُولُ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ اسْقِ يَا زُبَيْرُ ثُمَّ أَرْسِلْ الْمَاءَ إِلَى جَارِكَ فَغَضِبَ الْأَنْصَارِيُّ فَقَالَ يَا رَسُولَ اللَّهِ أَنْ كَانَ ابْنَ عَمَّتِكَ فَتَلَوَّنَ وَجْهُ رَسُولِ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ ثُمَّ قَالَ يَا زُبَيْرُ اسْقِ ثُمَّ احْبِسْ الْمَاءَ حَتَّى يَرْجِعَ إِلَى الْجَدْرِ قَالَ فَقَالَ الزُّبَيْرُ وَاللَّهِ إِنِّي لَأَحْسِبُ هَذِهِ الْآيَةَ نَزَلَتْ فِي ذَلِكَ{ فَلَا وَرَبِّكَ لَا يُؤْمِنُونَ حَتَّى يُحَكِّمُوكَ فِيمَا شَجَرَ بَيْنَهُمْ ثُمَّ لَا يَجِدُوا فِي أَنْفُسِهِمْ حَرَجًا مِمَّا قَضَيْتَ وَيُسَلِّمُوا تَسْلِيمًا }
Ayebisaki biso [Muhammad bin Rumh bin Al Muhajir Al Mishri] alobi, ayebisi biso [Al Laist bin Sa’d] uta na [Ibnu Shihab] uta na [Urwah bin Az Zubair] ete [Abdullah bin Az Zubair] ayebisaki ye, ete moto moko ya Ansar aswanaki na Az Zubair pembeni ya Ntoma sallallaahu ‘alaihi wasallam mpo na mokakatano ya mai oyo bazalaki kosopela mai banzete ya mbila ya date. Ba Ansar balobaki; ‘Tiká mai eleka,’ kasi Az Zubair atyaki likebi te. Donc débat esalemaki entre bango mibale devant Prophète sallallaahu ‘alaihi wasallam. Yango wana Rasulullah sallallaahu ‘alaihi wasallam alobaki: ‘Kosopela elanga na yo mai, O Zubair, sima ko canaliser mayi na ba voisins na yo’. Kasi ba Ansar basilikaki mpe balobaki; ‘Ee Ntoma ya Nzambe (Allah), ezali mpo azali mwana ya yaya na yo?’. Na sima elongi ya Rasulullah sallallaahu ‘alaihi wasallam ebongwanaki, sima alobaki: ‘Ee Zubair, mayi -elanga na yo-, sima kanga mayi po ezonga na ebandeli na yango’. Abdullah bin Zubair alobi ete; Yango wana Zubair alobaki: ‘Na nzela ya Allah, nakanisi ete vɛrsɛ oyo ebimaki na likambo wana: ‘Bongo na Rabb na yo, bango - na tina - bandimaka te kino bakokómisa yo mosambisi na likambo oyo bazali kowelana, na nsima bazali na botelemeli te na mitema na bango mpo na ekateli oyo opesi, mpe bandimaka yango mobimba’.
Imam Ibnu Majah : 16
حَدَّثَنَا مُحَمَّدُ بْنُ يَحْيَى النَّيْسَابُورِيُّ حَدَّثَنَا عَبْدُ الرَّزَّاقِ أَنْبَأَنَا مَعْمَرٌ عَنْ الزُّهْرِيِّ عَنْ سَالِمٍ عَنْ ابْنِ عُمَرَأَنَّ رَسُولَ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ قَالَ لَا تَمْنَعُوا إِمَاءَ اللَّهِ أَنْ يُصَلِّينَ فِي الْمَسْجِدِفَقَالَ ابْنٌ لَهُ إِنَّا لَنَمْنَعُهُنَّ فَغَضِبَ غَضَبًا شَدِيدًا وَقَالَ أُحَدِّثُكَ عَنْ رَسُولِ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ تَقُولُ إِنَّا لَنَمْنَعُهُنَّ
Ayebisaki biso [Muhammad bin Yahya An Naisaburi] alobi, ayebisaki biso [Abdurrazaq] alobaki, ayebisaki biso [Ma’mar] uta na [Az Zuhri] uta na [Salim] uta na [Ibn Umar] alobi; Ntoma sallallaahu ‘alaihi wasallam alobaki: ‘Kopekisa te basali ya basi ya Allah kosambela na mosquée’. Bongo mwana moko alobaki; 'Ya solo, tokopekisa bango'. Yango wana Ibnu Umar asilikaki makasi mpe apamelaki ye; ‘Natangi bino hadith ya Ntoma sallallaahu ‘alaihi wasallam, kasi bolobaki; 'Ya solo, tokopekisa bango'.'
Imam Ibnu Majah : 17
حَدَّثَنَا أَحْمَدُ بْنُ ثَابِتٍ الْجَحْدَرِيُّ وَأَبُو عَمْرٍو حَفْصُ بْنُ عُمَرَ قَالَا حَدَّثَنَا عَبْدُ الْوَهَّابِ الثَّقَفِيُّ حَدَّثَنَا أَيُّوبُ عَنْ سَعِيدِ بْنِ جُبَيْرٍ عَنْ عَبْدِ اللَّهِ بْنِ مُغَفَّلٍأَنَّهُ كَانَ جَالِسًا إِلَى جَنْبِهِ ابْنُ أَخٍ لَهُ فَخَذَفَ فَنَهَاهُ وَقَالَ إِنَّ رَسُولَ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ نَهَى عَنْهَا فَقَالَ إِنَّهَا لَا تَصِيدُ صَيْدًا وَلَا تَنْكِي عَدُوًّا وَإِنَّهَا تَكْسِرُ السِّنَّ وَتَفْقَأُ الْعَيْنَقَالَ فَعَادَ ابْنُ أَخِيهِ فَخَذَفَ فَقَالَ أُحَدِّثُكَ أَنَّ رَسُولَ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ نَهَى عَنْهَا ثُمَّ عُدْتَ تَخْذِفُ لَا أُكَلِّمُكَ أَبَدًا
Bayebisaki biso ete [Ahmad bin Thabit Al Jadari] mpe [Abu ‘Amru Hafsh bin Umar] bango mibale balobaki; ayebisi biso [Abdul Wahhab Ats Tsaqafi] alobaki, ayebisi biso [Ayyub] uta na [Sa’id bin Jubair] uta na [Abdullah bin Mughaffal], ete moko ya bana ya ndeko na ye afandaki pembeni na ye, sima abɛtaki mbeli. Bongo apekisaki ye mpe alobaki; Ya solo, Ntoma sallallaahu ‘alaihi wasallam apekisi yango. Alobaki boye: ‘Mosala oyo ekoki te koluka nyama oyo elyaka, mpe koboma monguna te. Abukaka mino kaka pe azo gouger miso'.
Imam Ibnu Majah : 18
حَدَّثَنَا هِشَامُ بْنُ عَمَّارٍ حَدَّثَنَا يَحْيَى بْنُ حَمْزَةَ حَدَّثَنِي بُرْدُ بْنُ سِنَانٍ عَنْ إِسْحَقَ بْنِ قَبِيصَةَ عَنْ أَبِيهِأَنَّ عُبَادَةَ بْنَ الصَّامِتِ الْأَنْصَارِيَّ النَّقِيبَ صَاحِبَ رَسُولِ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ غَزَا مَعَ مُعَاوِيَةَ أَرْضَ الرُّومِ فَنَظَرَ إِلَى النَّاسِ وَهُمْ يَتَبَايَعُونَ كِسَرَ الذَّهَبِ بِالدَّنَانِيرِ وَكِسَرَ الْفِضَّةِ بِالدَّرَاهِمِ فَقَالَ يَا أَيُّهَا النَّاسُ إِنَّكُمْ تَأْكُلُونَ الرِّبَا سَمِعْتُ رَسُولَ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ يَقُولُ لَا تَبْتَاعُوا الذَّهَبَ بِالذَّهَبِ إِلَّا مِثْلًا بِمِثْلٍ لَا زِيَادَةَ بَيْنَهُمَا وَلَا نَظِرَةًفَقَالَ لَهُ مُعَاوِيَةُ يَا أَبَا الْوَلِيدِ لَا أَرَى الرِّبَا فِي هَذَا إِلَّا مَا كَانَ مِنْ نَظِرَةٍ فَقَالَ عُبَادَةُ أُحَدِّثُكَ عَنْ رَسُولِ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ وَتُحَدِّثُنِي عَنْ رَأْيِكَ لَئِنْ أَخْرَجَنِي اللَّهُ لَا أُسَاكِنُكَ بِأَرْضٍ لَكَ عَلَيَّ فِيهَا إِمْرَةٌ فَلَمَّا قَفَلَ لَحِقَ بِالْمَدِينَةِ فَقَالَ لَهُ عُمَرُ بْنُ الْخَطَّابِ مَا أَقْدَمَكَ يَا أَبَا الْوَلِيدِ فَقَصَّ عَلَيْهِ الْقِصَّةَ وَمَا قَالَ مِنْ مُسَاكَنَتِهِ فَقَالَ ارْجِعْ يَا أَبَا الْوَلِيدِ إِلَى أَرْضِكَ فَقَبَحَ اللَّهُ أَرْضًا لَسْتَ فِيهَا وَأَمْثَالُكَ وَكَتَبَ إِلَى مُعَاوِيَةَ لَا إِمْرَةَ لَكَ عَلَيْهِ وَاحْمِلْ النَّاسَ عَلَى مَا قَالَ فَإِنَّهُ هُوَ الْأَمْرُ
Ayebisaki biso [Hisyam bin ‘Ammar] alobi, ayebisi biso [Yahya bin Hamzah] alobaki, ayebisi ngai [Burd bin Sinan] uta na [Ishaq bin Qabishah] uta na [tata na ye] alobaki; [Ubadah bin Shamit Al Ansari] azalaki mokonzi mpe moninga ya Ntoma sallallaahu ‘alaihi wasallam oyo abundaki na Mu’awiyah na mokili ya Baloma. Amonaki bato oyo bazalaki kosomba mpe kotɛka biteni ya wolo na dinars mpe biteni ya palata na dirham. Na nsima, agangaki ete; ‘Ee bato, ya solo bosili kolya litomba, nayoki Ntoma ya Allah sallallaahu ‘alaihi wasallam alobi: ‘Boteka wolo te mpo na wolo longola se soki ekokani te, eleki ezali te mpe retard ezali te kati na bango mibale’. Mu’awiyah alobaki na ye; ‘Ee Abul Walid namoni litomba te na transaction oyo, longola se na suspension na yango! ’ Ubada ayanolaki ete; ‘Napesaki bino hadith oyo ewutaki na Ntoma sallallaahu ‘alaihi wasallam, kasi bokanisaka na makanisi na bino moko. Ya solo, soki Allah abimisi ngai, wana nakotikala na territoire na bino te atako nazali na se ya commandement na bino’. Tango azongi na Medina akutanaki na Umar bin Khaththab, sima Umar alobi na ye, ‘Ee Abul Walid, nini esalaki yo oya awa? Na nsima, ayebisaki Umar lisolo yango, mpe ayebisaki ye te esika oyo azalaki kofanda. Umar alobaki: ‘Ee Abul Walid, zonga na mboka na yo. Ya solo, Allah akosala ete mboka oyo bato batyolama kozanga yo mpe bato lokola yo’. Na sima Umar akomi mokanda na Mu’awiyah; 'Ozali na lotomo te ya kopesa ye mitindo, pe kobengisa bato balanda oyo alobi, po azali likolo ya bosolo'.
Imam Ibnu Majah : 19
حَدَّثَنَا أَبُو بَكْرِ بْنُ الْخَلَّادِ الْبَاهِلِيُّ حَدَّثَنَا يَحْيَى بْنُ سَعِيدٍ عَنْ ابْنِ عَجْلَانَ أَنْبَأَنَا عَوْنُ بْنُ عَبْدِ اللَّهِ عَنْ عَبْدِ اللَّهِ بْنِ مَسْعُودٍ قَالَإِذَا حَدَّثْتُكُمْ عَنْ رَسُولِ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ فَظُنُّوا بِرَسُولِ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ الَّذِي هُوَ أَهْنَاهُ وَأَهْدَاهُ وَأَتْقَاهُ
Ayebisaki biso [Abu Bakr bin Al Khallad Al Bahili] alobaki, ayebisi biso [Yahya bin Sa’id] uta na [Ibn ‘Ajlan] alobaki, ayebisaki biso [‘Aun bin Abdullah] uta na [Abdullah bin Mas’ud] alobaki; 'Soki natangi na bino hadith moko ewutaki na Ntoma ya Nzambe (Allah), boye kanisá ete Ntoma ya Nzambe (Allah) apesaki yango, apesaki malako mpe apesaki litatoli ya kobanga Nzambe'.
Imam Ibnu Majah : 20
حَدَّثَنَا مُحَمَّدُ بْنُ بَشَّارٍ حَدَّثَنَا يَحْيَى بْنُ سَعِيدٍ عَنْ شُعْبَةَ عَنْ عَمْرِو بْنِ مُرَّةَ عَنْ أَبِي الْبَخْتَرِيِّ عَنْ أَبِي عَبْدِ الرَّحْمَنِ السُّلَمِيِّ عَنْ عَلِيِّ بْنِ أَبِي طَالِبٍ قَالَ إِذَا حَدَّثْتُكُمْ عَنْ رَسُولِ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ حَدِيثًا فَظُنُّوا بِهِ الَّذِي هُوَ أَهْنَاهُ وَأَهْدَاهُ وَأَتْقَاهُ
Ayebisaki biso [Muhamad bin Basysyar] alobaki, ayebisi biso [Yahya bin Sa’id] uta na [Syu’bah] uta na [’Amru bin Murrah] uta na [Abul Bahktari] uta na [Abu Abdurrahman As Sulami] uta na [Ali bin Abu Talib] alobaki; 'Ntango natangi bino hadith moko ewutaki na Ntoma sallallaahu 'alaihi wasallam, sima kanisá ete Ntoma ya Allah apesaki yango, apesaki malako mpe apesaki litatoli ya kobanga Nzambe'.