Embrasser l'Islam, cliquez ici
ISLAM AL-HAQ: QURAN & HADITH
(The True Islam)
Free Download / Download

Imam Abu Dawud (الامام ابو داود) - 4590 Hadith

Hadith

Imam Abu Dawud : 4361

حَدَّثَنَا مُحَمَّدُ بْنُ سُلَيْمَانَ الْمِصِّيصِيُّ لُوَيْنٌ حَدَّثَنَا ابْنُ أَبِي الزِّنَادِ عَنْ أَبِيهِ عَنْ عُرْوَةَ وَهِشَامٍ عَنْ عُرْوَةَ عَنْ عَائِشَةَ رَضِيَ اللَّهُ عَنْهَا قَالَتْكَانَ رَسُولُ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ يَضَعُ لِحَسَّانَ مِنْبَرًا فِي الْمَسْجِدِ فَيَقُومُ عَلَيْهِ يَهْجُو مَنْ قَالَ فِي رَسُولِ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ فَقَالَ رَسُولُ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ إِنَّ رُوحَ الْقُدُسِ مَعَ حَسَّانَ مَا نَافَحَ عَنْ رَسُولِ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ

Ayebisaki biso [Muhammad bin Sulaiman Al Mishishi Luwain] alobaki, ayebisi biso [Ibn Abu Az Zinad] uta na [tata na ye] uta na [Urwah] mpe [Hisyam] uta na [Urwah] uta na ['Aisyah radliallahu 'anha] alobaki, 'Rasulullah sallallaahu 'alaihi wasallam atie estrade na mosquée mpo na Hassan, bongo Hassan atelemaki likolo na yango pe a défendre mutu oyo alobaki mabe pona Rasulullah sallallaahu 'alaihi wasallam. Na yango Rasulullah shallallahu ‘alaihi wasallam alors alobaki: ‘Ya solo Jibril akozala na Hassan tant que ako défendre Rasulullah shallallahu ‘alaihi wasallam’.

Hadith

Imam Abu Dawud : 4362

حَدَّثَنَا أَحْمَدُ بْنُ مُحَمَّدٍ الْمَرْوَزِيُّ قَالَ حَدَّثَنِي عَلِيُّ بْنُ حُسَيْنٍ عَنْ أَبِيهِ عَنْ يَزِيدَ النَّحْوِيِّ عَنْ عِكْرِمَةَ عَنْ ابْنِ عَبَّاسٍ قَالَ{ وَالشُّعَرَاءُ يَتَّبِعُهُمْ الْغَاوُونَ }فَنَسَخَ مِنْ ذَلِكَ وَاسْتَثْنَى فَقَالَ{ إِلَّا الَّذِينَ آمَنُوا وَعَمِلُوا الصَّالِحَاتِ وَذَكَرُوا اللَّهَ كَثِيرًا }

Ayebisaki biso [Ahmad bin Muhammad Al Marwazi] alobaki; ayebisi ngai [Ali bin Husain] uta na [tata na ye] uta na [Yazid An Nahwi] uta na [Ikrimah] uta na [Ibn Abbas] tanga: '-mpe ba poètes balandamaki na baye babunga nzela-' -Qs. Ash Shura: 224- alobaki, 'Allah alongolaki verset wana mpe sima asali exception'. Na sima Ibn Abbas atangi boye: '-longola se ba -poètes- oyo bandimaka pe basalaka misala ya malamu pe mbala mingi balobelaka kombo ya Allah-' -Qs. Shura ya mputulu: 227-.

Hadith

Imam Abu Dawud : 4363

حَدَّثَنَا عَبْدُ اللَّهِ بْنُ مَسْلَمَةَ عَنْ مَالِكٍ عَنْ إِسْحَقَ بْنِ عَبْدِ اللَّهِ بْنِ أَبِي طَلْحَةَ عَنْ زُفَرَ بْنِ صَعْصَعَةَ عَنْ أَبِيهِ عَنْ أَبِي هُرَيْرَةَأَنَّ رَسُولَ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ كَانَ إِذَا انْصَرَفَ مِنْ صَلَاةِ الْغَدَاةِ يَقُولُ هَلْ رَأَى أَحَدٌ مِنْكُمْ اللَّيْلَةَ رُؤْيَا وَيَقُولُ إِنَّهُ لَيْسَ يَبْقَى بَعْدِي مِنْ النُّبُوَّةِ إِلَّا الرُّؤْيَا الصَّالِحَةُ

Eyebisami na biso ete [Abdullah bin Maslamah] uta na [Malik] uta na [Ishaq bin Abdullah bin Abu Thalhah] uta na [Zufar bin Sha’sha’ah] uta na [tata na ye] uta na [Abu Hurairah] alobaki, ‘Ntoma ya Allah sallallaahu ‘alaihi wasallam tango asilisaki losambo ya tongo atunaki: ‘Est-ce que mutu moko kati na bino alotaki lobi na butu?’. Akobaki: ‘Ya solo eloko moko te etikali nsima na ngai - liwa na ngai - eloko moko ya esakweli kasi ndoto ya solo’.

Hadith

Imam Abu Dawud : 4364

حَدَّثَنَا مُحَمَّدُ بْنُ كَثِيرٍ أَخْبَرَنَا شُعْبَةُ عَنْ قَتَادَةَ عَنْ أَنَسٍ عَنْ عُبَادَةَ بْنِ الصَّامِتِعَنْ النَّبِيِّ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ قَالَ رُؤْيَا الْمُؤْمِنِ جُزْءٌ مِنْ سِتَّةٍ وَأَرْبَعِينَ جُزْءًا مِنْ النُّبُوَّةِ

Ayebisaki biso [Muhammad bin Kathir] alobaki, ayebisi biso [Syu’bah] uta na [Qatadah] uta na [Anas] uta na [Ubadah bin Ash Shamit] uta na Ntoma sallallaahu ‘alaihi wasallam, alobi: ‘Ndoto ya mondimi ezali moko ya biteni ntuku minei na motoba ya bosakoli’.

Hadith

Imam Abu Dawud : 4365

حَدَّثَنَا قُتَيْبَةُ بْنُ سَعِيدٍ حَدَّثَنَا عَبْدُ الْوَهَّابِ عَنْ أَيُّوبَ عَنْ مُحَمَّدٍ عَنْ أَبِي هُرَيْرَةَعَنْ النَّبِيِّ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ قَالَ إِذَا اقْتَرَبَ الزَّمَانُ لَمْ تَكَدْ رُؤْيَا الْمُؤْمِنِ أَنْ تَكْذِبَ وَأَصْدَقُهُمْ رُؤْيَا أَصْدَقُهُمْ حَدِيثًا وَالرُّؤْيَا ثَلَاثٌ فَالرُّؤْيَا الصَّالِحَةُ بُشْرَى مِنْ اللَّهِ وَالرُّؤْيَا تَحْزِينٌ مِنْ الشَّيْطَانِ وَرُؤْيَا مِمَّا يُحَدِّثُ بِهِ الْمَرْءُ نَفْسَهُ فَإِذَا رَأَى أَحَدُكُمْ مَا يَكْرَهُ فَلْيَقُمْ فَلْيُصَلِّ وَلَا يُحَدِّثْ بِهَا النَّاسَ قَالَ وَأُحِبُّ الْقَيْدَ وَأَكْرَهُ الْغُلَّ وَالْقَيْدُ ثَبَاتٌ فِي الدِّينِقَالَ أَبُو دَاوُد إِذَا اقْتَرَبَ الزَّمَانُ يَعْنِي إِذَا اقْتَرَبَ اللَّيْلُ وَالنَّهَارُ يَعْنِي يَسْتَوِيَانِ

Eyebisami na biso [Qutaibah bin Sa’id] alobaki, eyebisami na biso na [Abdul Wahhab] uta na [Ayyub] uta na [Muhammad] uta na [Abu Hurairah] uta na Ntoma sallallaahu ‘alaihi wasallam, alobaki: ‘Ntango tango ekomi pene, wana ndoto ya mondimi ekozala na ntembe te lokuta te. Mpe moto oyo bandoto na ye ezali solo ezali moto oyo azali solo na maloba na ye. Na yango, bandoto ezali misato; Ndoto ya solo ezali sango malamu ewutaka na Allah, ndoto ya mawa ewuti na Satana mpe ndoto ewutaka na ba ndoto ya moyi ya mutu. Soki moko na bino aloti likambo oyo ayinaka, atelema mpo na kosambela mpe ayebisa yango na bato te’. Akobaki ete: ‘Nalingaka bokangami mpe nayinaka minyɔlɔlɔ, mpamba te minyɔlɔlɔ ezali ebongiseli na lingomba’. Abu Dawud alobaki, ‘Nini elingi koloba ‘soki ngonga ezali kopusana’, elingi koloba soki butu mpe moi ezali penepene’.

Hadith

Imam Abu Dawud : 4366

حَدَّثَنَا أَحْمَدُ بْنُ حَنْبَلٍ حَدَّثَنَا هُشَيْمٌ أَخْبَرَنَا يَعْلَى بْنُ عَطَاءٍ عَنْ وَكِيعِ بْنِ عُدُسٍ عَنْ عَمِّهِ أَبِي رَزِينٍ قَالَقَالَ رَسُولُ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ الرُّؤْيَا عَلَى رِجْلِ طَائِرٍ مَا لَمْ تُعَبَّرْ فَإِذَا عُبِّرَتْ وَقَعَتْ قَالَ وَأَحْسِبُهُ قَالَ وَلَا تَقُصَّهَا إِلَّا عَلَى وَادٍّ أَوْ ذِي رَأْيٍ

Elobami na biso [Ahmad bin Hanbal] alobaki, elobami na biso [Husyaim] alobaki, eyebisami na biso [Ya’la bin Atha] uta na [Waki’ bin Udus] uta na yaya na ye ya mobali [Abu Razin] alobaki, ‘Rasulullah shallallahu ‘alaihi wasallam alobaki: ‘Ndoto ekotikala na makolo ya ndeke - kopumbwa - ntango nyonso oyo elobami te, soki balobi ete ekosalema’. Abu Razin alobaki, ‘Nakanisaki ete alobaki: ‘Toyebisa yango te longola se na baye bazali penepene na biso, to baye bakoki kopesa toli’.

Hadith

Imam Abu Dawud : 4367

حَدَّثَنَا النُّفَيْلِيُّ قَالَ سَمِعْتُ زُهَيْرًا يَقُولُ سَمِعْتُ يَحْيَى بْنَ سَعِيدٍ يَقُولُ سَمِعْتُ أَبَا سَلَمَةَ يَقُولُ سَمِعْتُ أَبَا قَتَادَةَ يَقُولُسَمِعْتُ رَسُولَ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ يَقُولُ الرُّؤْيَا مِنْ اللَّهِ وَالْحُلْمُ مِنْ الشَّيْطَانِ فَإِذَا رَأَى أَحَدُكُمْ شَيْئًا يَكْرَهُهُ فَلْيَنْفُثْ عَنْ يَسَارِهِ ثَلَاثَ مَرَّاتٍ ثُمَّ لِيَتَعَوَّذْ مِنْ شَرِّهَا فَإِنَّهَا لَا تَضُرُّهُ

Lokola ayebisaki biso [An Nufaili] alobaki; Nayokaki [Az Zuhair] azali koloba; Nayokaki [Yahya bin Sa’id] koloba; Nayokaki [Abu Salamah] alobi; Nayokaki [Abu Qatadah] alobi; Nayokaki Prophète sallallaahu ‘alaihi wasallam alobi: ‘Ndoto ya malamu ewutaka na Allah mpe ndoto ya mabe ewutaka na Satan. Na yango, soki moko na bino aloti likambo oyo asepeli na yango te, tiká ye abɛta mopɛpɛ na ngámbo na ye ya lobɔkɔ ya mwasi mbala misato. Na sima, tika asenga Allah libateli na makambo na ye ya mabe, po ndoto ya mpasi esala ye mabe te'.

Hadith

Imam Abu Dawud : 4368

حَدَّثَنَا يَزِيدُ بْنُ خَالِدٍ الْهَمْدَانِيُّ وَقُتَيْبَةُ بْنُ سَعِيدٍ الثَّقَفِيُّ قَالَا أَخْبَرَنَا اللَّيْثُ عَنْ أَبِي الزُّبَيْرِ عَنْ جَابِرٍعَنْ رَسُولِ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ أَنَّهُ قَالَ إِذَا رَأَى أَحَدُكُمْ الرُّؤْيَا يَكْرَهُهَا فَلْيَبْصُقْ عَنْ يَسَارِهِ وَلْيَتَعَوَّذْ بِاللَّهِ مِنْ الشَّيْطَانِ ثَلَاثًا وَيَتَحَوَّلُ عَنْ جَنْبِهِ الَّذِي كَانَ عَلَيْهِ

Bayebisaki biso ete [Yazid bin Khalid Al Hamdani] mpe [Qutaibah bin Sa’id Ats Tsaqafi] bango mibale balobaki; ayebisi biso [Al laits] uta na [Abu Az Zubair] uta na [Jabir] uta na Rasulullah sallallaahu ‘alaihi wasallam, alobi: ‘Soki moko na bino aloti likambo oyo ayinaka, tika abwakela ye nsoi na ngambo na ye ya mwasi, sima aluka ekimelo na Allah epai ya Satana mbala misato. Sima na yango esengeli a changer position na position na ye ya ebandeli'.

Hadith

Imam Abu Dawud : 4369

حَدَّثَنَا أَحْمَدُ بْنُ صَالِحٍ حَدَّثَنَا عَبْدُ اللَّهِ بْنُ وَهْبٍ قَالَ أَخْبَرَنِي يُونُسُ عَنْ ابْنِ شِهَابٍ قَالَ أَخْبَرَنِي أَبُو سَلَمَةَ بْنُ عَبْدِ الرَّحْمَنِ أَنَّ أَبَا هُرَيْرَةَ قَالَسَمِعْتُ رَسُولَ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ يَقُولُ مَنْ رَآنِي فِي الْمَنَامِ فَسَيَرَانِي فِي الْيَقَظَةِ أَوْ لَكَأَنَّمَا رَآنِي فِي الْيَقَظَةِ وَلَا يَتَمَثَّلُ الشَّيْطَانُ بِي

Ayebisaki biso [Ahmad bin Salih] alobi, ayebisi biso [Abdullah bin Wahb] alobi; apesaki ngai lapolo [Yunus] uta na [Ibn Shihab] alobaki; ayebisi ngai [Abu Salamah bin ‘Abdurrahman] ete [Abu Hurairah] alobaki, ‘Nayokaki Ntoma ya Allah sallallaahu ‘alaihi wasallam alobi: ‘Oyo akomona ngai na ndoto akomona ngai tango azali na bososoli, to alobaki, ‘lokola amonaki ngai na bosolo. Mpe Satana akokoka kokokana na ngai te’.

Hadith

Imam Abu Dawud : 4370

حَدَّثَنَا مُسَدَّدٌ وَسُلَيْمَانُ بْنُ دَاوُدَ قَالَا حَدَّثَنَا حَمَّادٌ حَدَّثَنَا أَيُّوبُ عَنْ عِكْرِمَةَ عَنْ ابْنِ عَبَّاسٍأَنَّ النَّبِيَّ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ قَالَ مَنْ صَوَّرَ صُورَةً عَذَّبَهُ اللَّهُ بِهَا يَوْمَ الْقِيَامَةِ حَتَّى يَنْفُخَ فِيهَا وَلَيْسَ بِنَافِخٍ وَمَنْ تَحَلَّمَ كُلِّفَ أَنْ يَعْقِدَ شَعِيرَةً وَمَنْ اسْتَمَعَ إِلَى حَدِيثِ قَوْمٍ يَفِرُّونَ بِهِ مِنْهُ صُبَّ فِي أُذُنِهِ الْآنُكُ يَوْمَ الْقِيَامَةِ

Bayebisaki biso ete [Musaddad] mpe [Sulaiman bin Dawud] bango mibale balobaki; ayebisi biso [Hammad] alobi, ayebisi biso [Ayyub] uta na [Ikrimah] uta na [Ibn Abbas] ete Ntoma ya Allah sallallaahu ‘alaihi wasallam alobi: ‘Oyo asali -elilingi- ya bomoi, nde Allah akonyokola ye na mokolo ya lisekwa kino akozala na makoki ya kopema molimo na elilingi, atako akozala na makoki te. Oyo akosala lokola azali kolɔta, bakofuta ye mpo na kokanga mbuma ya blé. Mpe oyo akoyoka masolo ya bato oyo balingaka koyoka te, boye na Mokolo ya Lisekwa matoyi na ye ekozindisama na plomb ya molunge’.

Hadith

Imam Abu Dawud : 4371

حَدَّثَنَا مُوسَى بْنُ إِسْمَعِيلَ حَدَّثَنَا حَمَّادٌ عَنْ ثَابِتٍ عَنْ أَنَسِ بْنِ مَالِكٍأَنَّ رَسُولَ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ قَالَ رَأَيْتُ اللَّيْلَةَ كَأَنَّا فِي دَارِ عُقْبَةَ بْنِ رَافِعٍ وَأُتِينَا بِرُطَبٍ مِنْ رُطَبِ ابْنِ طَابٍ فَأَوَّلْتُ أَنَّ الرِّفْعَةَ لَنَا فِي الدُّنْيَا وَالْعَاقِبَةَ فِي الْآخِرَةِ وَأَنَّ دِينَنَا قَدْ طَابَ

Eyebisami na biso [Musa bin Isma’il] alobaki, eyebisami na biso [Hammad] uta na [Tsabit] uta na [Anas bin Malik] ete Rasulullah sallallaahu ‘alaihi wasallam alobaki: ‘Lobi na butu nalɔtaki lokola soki tozali na ndako ya Uqbah bin Rafi’, nsima bapesaki biso bilei ya dati ya sika oyo euti na libota ya Ibn Thab. Na nsima nalimbolaki ndoto wana, ete tokozwa nkembo na mokili mpe mbano malamu na bomoi nsima ya liwa. Mpe lingomba na biso ekolonga’.

Hadith

Imam Abu Dawud : 4372

حَدَّثَنَا أَحْمَدُ بْنُ يُونُسَ حَدَّثَنَا زُهَيْرٌ عَنْ سُهَيْلٍ عَنْ ابْنِ أَبِى سَعِيدٍ الْخُدْرِيِّ عَنْ أَبِيهِ قَالَقَالَ رَسُولُ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ إِذَا تَثَاءَبَ أَحَدُكُمْ فَلْيُمْسِكْ عَلَى فِيهِ فَإِنَّ الشَّيْطَانَ يَدْخُلُحَدَّثَنَا ابْنُ الْعَلَاءِ عَنْ وَكِيعٍ عَنْ سُفْيَانَ عَنْ سُهَيْلٍ نَحْوَهُ قَالَ فِي الصَّلَاةِ فَلْيَكْظِمْ مَا اسْتَطَاعَ

Ayebisaki biso [Ahmad bin Yunus] alobi, ayebisaki biso [Zuhair] uta na [Suhail] uta na [Ibnu Abu Sa’id Al Khudri] uta na [tata na ye] alobaki, ‘Rasulullah sallallaahu ‘alaihi wasallam alobi: ‘Soki moko na bino azali koswa, tika asimba monoko na ye, mpo zabolo akoki kokota’. Ayebisaki biso [Ibnul ‘Ala] uta na [Waki’] uta na [Sufyan] uta na [Suhail] lokola na hadith. Alobaki boye: ‘Na losambo, asengeli kopekisa yango soki likoki ezali’.

Hadith

Imam Abu Dawud : 4373

حَدَّثَنَا الْحَسَنُ بْنُ عَلِيٍّ حَدَّثَنَا يَزِيدُ بْنُ هَارُونَ أَخْبَرَنَا ابْنُ أَبِي ذِئْبٍ عَنْ سَعِيدٍ الْمَقْبُرِيِّ عَنْ أَبِيهِ عَنْ أَبِي هُرَيْرَةَ قَالَقَالَ رَسُولُ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ إِنَّ اللَّهَ يُحِبُّ الْعُطَاسَ وَيَكْرَهُ التَّثَاؤُبَ فَإِذَا تَثَاءَبَ أَحَدُكُمْ فَلْيَرُدَّهُ مَا اسْتَطَاعَ وَلَا يَقُلْ هَاهْ هَاهْ فَإِنَّمَا ذَلِكُمْ مِنْ الشَّيْطَانِ يَضْحَكُ مِنْهُ

Elobami na biso [Al Hasan bin Ali] alobaki, elobami na biso [Yazid bin Harun] alobaki, eyebisami na biso [Ibn Abu Dzi`b] uta na [Sa’id Al Maqburi] uta na [tata na ye] uta na [Abu Hurairah] alobaki, ‘Ntoma ya Allah sallallaahu ‘alaihi wasallam alobaki: ‘Ya solo Allah alingaka -baoyo- sneeze mpe ayinaka -baoyo- ba- yawn. Na yango, soki moko na bino azali kosɛka, kangá yango na kati na ndenge oyo okoki mpe kosala mongongo ya ‘hah hah’ te. Po zabolo akoseka yango'.

Hadith

Imam Abu Dawud : 4374

حَدَّثَنَا مُسَدَّدٌ حَدَّثَنَا يَحْيَى عَنْ ابْنِ عَجْلَانَ عَنْ سُمَيٍّ عَنْ أَبِي صَالِحٍ عَنْ أَبِي هُرَيْرَةَ قَالَكَانَ رَسُولُ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ إِذَا عَطَسَ وَضَعَ يَدَهُ أَوْ ثَوْبَهُ عَلَى فِيهِ وَخَفَضَ أَوْ غَضَّ بِهَا صَوْتَهُ شَكَّ يَحْيَى

Ayebisaki biso [Musaddad] alobi, ayebisaki biso [Yahya] uta na [Ibnu Ajlan] uta na [Sumay] uta na [Abu Salih] uta na [Abu Hurairah] alobaki, ‘Ntoma ya Allah sallallaahu ‘alaihi wasallam, soki aswaki, atie loboko to elamba na monoko na ye, sima akangaki sima, to akangaki mongongo na ye na yango -Yahya ayokaki kaka ntembe-'.

Hadith

Imam Abu Dawud : 4375

حَدَّثَنَا مُحَمَّدُ بْنُ دَاوُدَ بْنِ سُفْيَانَ وَخُشَيْشُ بْنُ أَصْرَمَ قَالَا حَدَّثَنَا عَبْدُ الرَّزَّاقِ أَخْبَرَنَا مَعْمَرٌ عَنْ الزُّهْرِيِّ عَنْ ابْنِ الْمُسَيِّبِ عَنْ أَبِي هُرَيْرَةَ قَالَقَالَ رَسُولُ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ خَمْسٌ تَجِبُ لِلْمُسْلِمِ عَلَى أَخِيهِ رَدُّ السَّلَامِ وَتَشْمِيتُ الْعَاطِسِ وَإِجَابَةُ الدَّعْوَةِ وَعِيَادَةُ الْمَرِيضِ وَاتِّبَاعُ الْجَنَازَةِ

Bayebisaki biso ete [Muhammad bin Dawud bin Sufyan] mpe [Khushaisy bin Ashram] bango mibale balobaki; ayebisi biso [Abdurrazaq] alobi, ayebisi biso [Ma’mar] uta na [Az Zuhri] uta na [Ibnul Musayyab] uta na [Abu Hurairah] alobaki, ‘Rasulullah sallallaahu ‘alaihi wasallam alobaki: ‘Makambo mitano oyo musulman asengeli kosala na ndeko na ye; koyanola na mbote, koyanola na koswa, kokokisa mabyangi, kotala ntango ozali kobɛla mpe kokende elongo na bibembe’.

Hadith

Imam Abu Dawud : 4376

حَدَّثَنَا عُثْمَانُ بْنُ أَبِي شَيْبَةَ حَدَّثَنَا جَرِيرٌ عَنْ مَنْصُورٍ عَنْ هِلَالِ بْنِ يَسَافٍ قَالَكُنَّا مَعَ سَالِمِ بْنِ عُبَيْدٍ فَعَطَسَ رَجُلٌ مِنْ الْقَوْمِ فَقَالَ السَّلَامُ عَلَيْكُمْ فَقَالَ سَالِمٌ وَعَلَيْكَ وَعَلَى أُمِّكَ ثُمَّ قَالَ بَعْدُ لَعَلَّكَ وَجَدْتَ مِمَّا قُلْتُ لَكَ قَالَ لَوَدِدْتُ أَنَّكَ لَمْ تَذْكُرْ أُمِّي بِخَيْرٍ وَلَا بِشَرٍّ قَالَ إِنَّمَا قُلْتُ لَكَ كَمَا قَالَ رَسُولُ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ إِنَّا بَيْنَا نَحْنُ عِنْدَ رَسُولِ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ إِذْ عَطَسَ رَجُلٌ مِنْ الْقَوْمِ فَقَالَ السَّلَامُ عَلَيْكُمْ فَقَالَ رَسُولُ اللَّهِ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ وَعَلَيْكَ وَعَلَى أُمِّكَ ثُمَّ قَالَ إِذَا عَطَسَ أَحَدُكُمْ فَلْيَحْمَدْ اللَّهَ قَالَ فَذَكَرَ بَعْضَ الْمَحَامِدِ وَلْيَقُلْ لَهُ مَنْ عِنْدَهُ يَرْحَمُكَ اللَّهُ وَلْيَرُدَّ يَعْنِي عَلَيْهِمْ يَغْفِرُ اللَّهُ لَنَا وَلَكُمْحَدَّثَنَا تَمِيمُ بْنُ الْمُنْتَصِرِ حَدَّثَنَا إِسْحَقُ يَعْنِي ابْنَ يُوسُفَ عَنْ أَبِي بِشْرٍ وَرْقَاءَ عَنْ مَنْصُورٍ عَنْ هِلَالِ بْنِ يَسَافٍ عَنْ خَالِدِ بْنِ عَرْفَجَةَ عَنْ سَالِمِ بْنِ عُبَيْدٍ الْأَشْجَعِيِّ بِهَذَا الْحَدِيثِ عَنْ النَّبِيِّ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ

Ayebisaki biso [Uthman bin Abu Syaibah] alobaki, ayebisaki biso [Jarir] uta na [Mansur] uta na [Hilal bin Yasaf] alobaki; Tozalaki elongo na [Salim bin Ubaid], sima mobali moko aswaki pe alobaki, 'Assalamu Alaikum - kimia ezala likolo na bino -'. Salim ayanolaki, '-na elikya- mpo na yo mpe mpo na mama na yo mpe'. Sima na yango Salim alobaki lisusu, 'Na elikya ete okozwa oyo nalobaki na yo'. Na nsima, mobali yango alobaki ete, ‘Nazali mpenza na elikya ete okoloba likambo ya malamu to ya mabe te mpo na mama na ngai’. Salim alobaki, ‘Nazali koloba kaka likambo oyo Rasulullah sallallaahu ‘alaihi wasallam alobaki mokolo moko. Tango tozalaki na Rasulullah sallallaahu 'alaihi wasallam, mobali moko a étouffer. Mobali wana alobaki na sima, 'Assalamu Alaikum - kimia ezala likolo na yo -'. Yango wana Ntoma sallallaahu ‘alaihi wasallam alobaki: ‘-may- mpo na yo mpe mpo na mama na yo mpe’. Na sima alobi: ‘Soki moko na bino azongisi, kumisa Allah - loba ‘Al hamdulillah’ - Sima loba mua maloba ya masanzoli -. Sima tika mutu oyo azali pembeni na ye aloba 'YARHAMUKAALLAH -Allah ayokela yo mawa-. Mpe tika ye aloba na esika na bango YAGHFIRULLAHU LANA WA LAKUM -Allah alimbisa biso na bino-'. Ayebisaki biso [Tamim Ibnul Muntashir] alobaki, ayebisi biso [Ishaq] -elingi koloba Ibn Yusuf- uta na [Abu Bisyr Warqa] uta na [Mansur] uta na [Hilal bin Yasaf] uta na [Khalid bin Arfajah] uta na [Salim bin Ubaid Al Asyja’i] na hadith moko, uta na Ntoma sallallaahu ‘alaihi wasallam’.

Hadith

Imam Abu Dawud : 4377

حَدَّثَنَا مُوسَى بْنُ إِسْمَعِيلَ حَدَّثَنَا عَبْدُ الْعَزِيزِ بْنُ عَبْدِ اللَّهِ بْنِ أَبِي سَلَمَةَ عَنْ عَبْدِ اللَّهِ بْنِ دِينَارٍ عَنْ أَبِي صَالِحٍ عَنْ أَبِي هُرَيْرَةَعَنْ النَّبِيِّ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ قَالَ إِذَا عَطَسَ أَحَدُكُمْ فَلْيَقُلْ الْحَمْدُ لِلَّهِ عَلَى كُلِّ حَالٍ وَلْيَقُلْ أَخُوهُ أَوْ صَاحِبُهُ يَرْحَمُكَ اللَّهُ وَيَقُولُ هُوَ يَهْدِيكُمُ اللَّهُ وَيُصْلِحُ بَالَكُمْ

Ayebisaki biso [Musa bin Isma’il] alobi, ayebisi biso [Abdul Aziz bin Abdullah bin Abu Salamah] ewutaki na [Abdullah bin Dinar] ewutaki na [Abu Salih] ewutaki na [Abu Hurairah] ewutaki na Ntoma sallallaahu ‘alaihi wasallam, alobi: ‘Soki moko na bino azali koswa, tika ye aloba ‘AL HAMDULILLAH ALA KULLI HAL -All masanzoli ezala na Allah na situation nionso-. Mpe tika ndeko na ye to moninga na ye aloba YAHAMUKALLAHU -Allah ayokela yo mawa-, sima abongwanaka na koloba YAHDIKUMULLAHU WA YUSHLIHU BALAKUM -Allah atambwisa yo mpe abongisa situation na yo-'.

Hadith

Imam Abu Dawud : 4378

حَدَّثَنَا مُسَدَّدٌ حَدَّثَنَا يَحْيَى عَنْ ابْنِ عَجْلَانَ قَالَ حَدَّثَنِي سَعِيدُ بْنُ أَبِي سَعِيدٍ عَنْ أَبِي هُرَيْرَةَ قَالَشَمِّتْ أَخَاكَ ثَلَاثًا فَمَا زَادَ فَهُوَ زُكَامٌحَدَّثَنَا عِيسَى بْنُ حَمَّادٍ الْمِصْرِيُّ أَخْبَرَنَا اللَّيْثُ عَنْ ابْنِ عَجْلَانَ عَنْ سَعِيدِ بْنِ أَبِي سَعِيدٍ عَنْ أَبِي هُرَيْرَةَ قَالَ لَا أَعْلَمُهُ إِلَّا أَنَّهُ رَفَعَ الْحَدِيثَ إِلَى النَّبِيِّ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ بِمَعْنَاهُ قَالَ أَبُو دَاوُد رَوَاهُ أَبُو نُعَيْمٍ عَنْ مُوسَى بْنِ قَيْسٍ عَنْ مُحَمَّدِ بْنِ عَجْلَانَ عَنْ سَعِيدٍ عَنْ أَبِي هُرَيْرَةَ عَنْ النَّبِيِّ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ

Alobeli biso [Musaddad] alobaki, alobeli biso [Yahya] uta na [Ibn Ajlan] alobaki; [Sa’id bin Abu Sa’id] ayebisaki ngai uta na [Abu Hurairah] alobaki, ‘Yanola na ba etouffes ya ndeko na yo mbala misato, soki koleka wana elakisi ete azali na malili’. Ayebisaki biso [Isa bin Hammad Al Mishri] alobaki, ayebisi biso [Al laits] uta na [Ibn Ajlan] uta na [Sa’id bin Abu Sa’id] uta na [Abu Hurairah] alobaki, ‘Nayebi te longola se soki alimboli hadith na Ntoma sallallaahu ‘alaihi wasallam na ndimbola moko’. Abu Dawud alobaki, ‘[Abu Nu’aim] alobelaki yango epai ya [Musa bin Qais], uta na [Muhammad bin Ajlan], uta na [Sa’id], uta na [Abu Hurairah], uta na Ntoma sallallaahu ‘alaihi wasallam’.

Hadith

Imam Abu Dawud : 4379

حَدَّثَنَا هَارُونُ بْنُ عَبْدِ اللَّهِ حَدَّثَنَا مَالِكُ بْنُ إِسْمَعِيلَ حَدَّثَنَا عَبْدُ السَّلَامِ بْنُ حَرْبٍ عَنْ يَزِيدَ بْنِ عَبْدِ الرَّحْمَنِ عَنْ يَحْيَى بْنِ إِسْحَقَ بْنِ عَبْدِ اللَّهِ بْنِ أَبِي طَلْحَةَ عَنْ أُمِّهِ حُمَيْدَةَ أَوْ عُبَيْدَةَ بِنْتِ عُبَيْدِ بْنِ رِفَاعَةَ الزُّرَقِيِّ عَنْ أَبِيهَاعَنْ النَّبِيِّ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ قَالَ تُشَمِّتُ الْعَاطِسَ ثَلَاثًا فَإِنْ شِئْتَ أَنْ تُشَمِّتَهُ فَشَمِّتْهُ وَإِنْ شِئْتَ فَكُفَّ

Ayebisaki biso [Harun bin Abdullah] alobi, ayebisi biso [Malik bin Isma’il] alobaki, ayebisi biso [Abdussalam bin Harb] uta na [Yazid bin ‘Abdurrahman] uta na [Yahya bin Ishaq bin Abdullah bin Abu Thalhah] uta na mama na ye [Humaidah] -to Ubaidah bint Ubaid bin Rifa’ah Az Zuraqqi- uta na [his tata] uta na Ntoma sallallaahu ‘alaihi wasallam, Alobi: ‘Koyanola na koswa mbala misato te, kasi soki olingi koyanola nde yanola, mpe soki te bongo yango ekoki’.

Hadith

Imam Abu Dawud : 4380

حَدَّثَنَا إِبْرَاهِيمُ بْنُ مُوسَى أَخْبَرَنَا ابْنُ أَبِي زَائِدَةَ عَنْ عِكْرِمَةَ بْنِ عَمَّارٍ عَنْ إِيَاسِ بْنِ سَلَمَةَ بْنِ الْأَكْوَعِ عَنْ أَبِيهِأَنَّ رَجُلًا عَطَسَ عِنْدَ النَّبِيِّ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ فَقَالَ لَهُ يَرْحَمُكَ اللَّهُ ثُمَّ عَطَسَ فَقَالَ النَّبِيُّ صَلَّى اللَّهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ الرَّجُلُ مَزْكُومٌ

Ayebisaki biso [Ibrahim bin Musa] alobi, ayebisaki biso [Ibn Abu Zaidah] uta na [Ikrimah bin Ammar] uta na [Iyas bin Salamah Ibnul Akwa’] uta na [tata na ye] alobaki, ‘Moto moko aswaki na ngambo ya Ntoma sallallaahu ‘alaihi wasallam, sima abondelaki mpo na ye: ‘YARHAMUKAALLAHU -Allah ayokela mawa yo-'. Sima mobali yango aswaki lisusu, alobi: ‘Mobali azali na malili’.